Zacarias 7

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVT

Sair da comparação
NVT Nova Versão Transformadora
1 Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari.
1 Em 7 de dezembro do quarto ano do reinado de Dario, o S enhor deu outra mensagem a Zacarias.
2 Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe
2 O povo de Betel tinha enviado Sarezer, Regem-Meleque e seus homens para buscar o favor do S enhor
3 mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli :
3 e para perguntar aos profetas e aos sacerdotes no templo do S enhor dos Exércitos: “Devemos continuar a lamentar e jejuar no quinto mês, como temos feito por tantos anos?”.
4 Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
4 Em resposta, o S enhor dos Exércitos me deu esta mensagem:
5 — Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe : « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai ?
5 “Diga a todo o seu povo e a seus sacerdotes: ‘Durante estes setenta anos de exílio, vocês jejuaram e lamentaram no quinto e no sétimo mês, mas foi, de fato, para mim que jejuaram?
6 Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko ?
6 E, mesmo agora, não comem e bebem apenas para agradar a si mesmos?
7 Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? »
7 Não é esta a mesma mensagem que o S enhor proclamou por meio dos profetas no passado, quando Jerusalém e as cidades de Judá estavam cheias de gente, e quando havia muitos habitantes no Neguebe e nas colinas de Judá?’”.
8 Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari :
8 Então Zacarias recebeu esta mensagem do S enhor :
9 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
9 “Assim diz o S enhor dos Exércitos: Julguem com justiça e mostrem compaixão e bondade uns pelos outros.
10 Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
10 Não oprimam as viúvas, nem os órfãos, nem os estrangeiros, nem os pobres. E não tramem o mal uns contra os outros.
11 Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te.
11 “Seus antepassados não quiseram ouvir esta mensagem. Em rebeldia, deram-me as costas e taparam os ouvidos para não escutar.
12 Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
12 Tornaram o coração duro como pedra, para não ouvir as instruções nem as mensagens que o S enhor dos Exércitos lhes enviou por seu Espírito, por meio dos antigos profetas. Por isso o S enhor dos Exércitos ficou tão irado com eles.
13 Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki : « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai.
13 “Porque não quiseram ouvir quando eu os chamei, não os ouvi quando eles me chamaram, diz o S enhor dos Exércitos.
14 Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »
14 Como um vendaval, eu os espalhei entre as nações distantes, que eles não conheciam. Sua terra ficou tão desolada que ninguém sequer passava por ela. Transformaram sua terra agradável num deserto”.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Zacarias 7, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.