Mateus 3

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NAA

Sair da comparação
NAA Nova Almeida Atualizada 2017
1 Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda :
1 Naqueles dias, apareceu João Batista pregando no deserto da Judeia.
2 « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
2 Ele dizia: — Arrependam-se, porque está próximo o Reino dos Céus.
3 Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki :
3 Pois é a João que se refere o que foi dito por meio do profeta Isaías: “Voz do que clama no deserto: Preparem o caminho do Senhor, endireitem as suas veredas.”
4 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
4 João usava uma roupa feita de pelos de camelo e um cinto de couro. O seu alimento eram gafanhotos e mel silvestre.
5 Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani ;
5 Então os moradores de Jerusalém, de toda a Judeia e de toda a região em volta do Jordão iam até onde ele estava.
6 bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
6 E, confessando os seus pecados, eram batizados por ele no rio Jordão.
7 Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
7 Quando João viu que muitos fariseus e saduceus vinham ao seu batismo, disse-lhes: — Raça de víboras! Quem deu a entender que vocês podem fugir da ira que está por vir?
8 Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.
8 Produzam fruto digno de arrependimento!
9 Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
9 E não pensem que podem dizer uns aos outros: “Temos por pai Abraão”, porque eu afirmo a vocês que Deus pode fazer com que destas pedras surjam filhos a Abraão.
10 Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa : nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.
10 E o machado já está posto à raiz das árvores. Portanto, toda árvore que não produz bom fruto é cortada e lançada ao fogo.
11 Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
11 Eu batizo vocês com água, para arrependimento; mas aquele que vem depois de mim é mais poderoso do que eu, do qual não sou digno de carregar as sandálias. Ele os batizará com o Espírito Santo e com fogo.
12 Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
12 Ele tem a pá em suas mãos, limpará a sua eira e recolherá o seu trigo no celeiro; porém queimará a palha num fogo que nunca se apaga.
13 Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye.
13 Por esse tempo, Jesus foi da Galileia para o rio Jordão, a fim de que João o batizasse.
14 Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki :
14 João, porém, quis convencê-lo a mudar de ideia, dizendo: — Eu é que preciso ser batizado por você, e é você que vem a mim?
15 Yesu azongiselaki ye :
15 Mas Jesus respondeu: Então ele concordou.
16 Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga.
16 Depois de batizado, Jesus logo saiu da água. E eis que os céus se abriram e ele viu o Espírito de Deus descendo como pomba, vindo sobre ele.
17 Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
17 E eis que uma voz dos céus dizia: — Este é o meu Filho amado, em quem me agrado.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Mateus 3, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.