Mateus 25
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH
1 Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.
1 Jesus disse:
2 Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.
2 Cinco eram sem juízo, e cinco eram ajuizadas.
3 Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ;
3 As moças sem juízo pegaram as suas lamparinas, mas não levaram óleo de reserva.
4 ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.
4 As ajuizadas levaram vasilhas com óleo para as suas lamparinas.
5 Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.
5 Como o noivo estava demorando, as dez moças começaram a cochilar e pegaram no sono.
6 Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »
6 — À meia-noite se ouviu este grito: “O noivo está chegando! Venham se encontrar com ele!”
7 Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.
7 — Então as dez moças acordaram e acenderam as suas lamparinas.
8 Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
8 Aí as moças sem juízo disseram às outras: “Deem um pouco de óleo para nós, pois as nossas lamparinas estão se apagando.”
9 Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »
9 — “De jeito nenhum”, responderam as moças ajuizadas. “O óleo que nós temos não dá para nós e para vocês. Se vocês querem óleo, vão comprar!”
10 Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
10 — Então as moças sem juízo saíram para comprar óleo, e, enquanto estavam fora, o noivo chegou. As cinco moças que estavam com as lamparinas prontas entraram com ele para a festa do casamento, e a porta foi trancada.
11 Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke ! »
11 — Mais tarde as outras chegaram e começaram a gritar: “Senhor, senhor, nos deixe entrar!”
12 Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te. »
12 — O noivo respondeu: “Eu afirmo a vocês que isto é verdade: eu não sei quem são vocês!”
13 Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.
13 E Jesus terminou, dizendo:
14 Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye.
14 Jesus continuou:
15 Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.
15 E lhes deu dinheiro de acordo com a capacidade de cada um: ao primeiro deu quinhentas moedas de ouro; ao segundo deu duzentas; e ao terceiro deu cem. Então foi viajar.
16 Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki.
16 O empregado que tinha recebido quinhentas moedas saiu logo, fez negócios com o dinheiro e conseguiu outras quinhentas.
17 Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.
17 Do mesmo modo, o que havia recebido duzentas moedas conseguiu outras duzentas.
18 Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.
18 Mas o que tinha recebido cem moedas saiu, fez um buraco na terra e escondeu o dinheiro do patrão.
19 Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango : « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »
19 — Depois de muito tempo, o patrão voltou e fez um acerto de contas com eles.
20 Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano ; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki. »
20 O empregado que havia recebido quinhentas moedas chegou e entregou mais quinhentas, dizendo: “O senhor me deu quinhentas moedas. Veja! Aqui estão mais quinhentas que consegui ganhar.”
21 Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
21 — “Muito bem, empregado bom e fiel”, disse o patrão. “Você foi fiel negociando com pouco dinheiro, e por isso vou pôr você para negociar com muito. Venha festejar comigo!”
22 Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale ; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki. »
22 — Então o empregado que havia recebido duzentas moedas chegou e disse: “O senhor me deu duzentas moedas. Veja! Aqui estão mais duzentas que consegui ganhar.”
23 Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
23 — “Muito bem, empregado bom e fiel”, disse o patrão. “Você foi fiel negociando com pouco dinheiro, e por isso vou pôr você para negociar com muito. Venha festejar comigo!”
24 Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te.
24 — Aí o empregado que havia recebido cem moedas chegou e disse: “Eu sei que o senhor é um homem duro, que colhe onde não plantou e junta onde não semeou.
25 Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »
25 Fiquei com medo e por isso escondi o seu dinheiro na terra. Veja! Aqui está o seu dinheiro.”
26 Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,
26 — “Empregado mau e preguiçoso!”, disse o patrão. “Você sabia que colho onde não plantei e junto onde não semeei.
27 mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki ?
27 Por isso você devia ter depositado o meu dinheiro no banco, e, quando eu voltasse, o receberia com juros.”
28 Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi.
28 “Tirem dele o dinheiro e deem ao que tem mil moedas.
29 Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
29 Porque aquele que tem muito receberá mais e assim terá mais ainda; mas quem não tem, até o pouco que tem será tirado dele.
30 Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
30 E joguem fora, na escuridão, o empregado inútil. Ali ele vai chorar e ranger os dentes de desespero.”
31 Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.
31 Jesus terminou, dizendo:
32 Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba :
32 Todos os povos da terra se reunirão diante dele, e ele separará as pessoas umas das outras, assim como o pastor separa as ovelhas das cabras.
33 akotia bameme na ngambo ya loboko na Ye ya mobali, mpe bantaba, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
33 Ele porá os bons à sua direita e os outros, à esquerda.
34 Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.
34 Então o Rei dirá aos que estiverem à sua direita: “Venham, vocês que são abençoados pelo meu Pai! Venham e recebam o
35 Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei ; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu ;
35 Pois eu estava com fome, e vocês me deram comida; estava com sede, e me deram água. Era estrangeiro, e me receberam na sua casa.
36 nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba ; nabelaki, mpe bosungaki Ngai ; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »
36 Estava sem roupa, e me vestiram; estava doente, e cuidaram de mim. Estava na cadeia, e foram me visitar.”
37 Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei ; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela ?
37 — Então os bons perguntarão: “Senhor, quando foi que o vimos com fome e lhe demos comida ou com sede e lhe demos água?
38 Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu ; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo ?
38 Quando foi que vimos o senhor como estrangeiro e o recebemos na nossa casa ou sem roupa e o vestimos?
39 Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo ? »
39 Quando foi que vimos o senhor doente ou na cadeia e fomos visitá-lo?”
40 Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
40 — Aí o Rei responderá: “Eu afirmo a vocês que isto é verdade: quando vocês fizeram isso ao mais humilde dos meus irmãos, foi a mim que fizeram.”
41 Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.
41 — Depois ele dirá aos que estiverem à sua esquerda: “Afastem-se de mim, vocês que estão debaixo da maldição de Deus! Vão para o fogo eterno, preparado para o Diabo e os seus anjos!
42 Pamba te nayokaki nzala, kasi bopesaki Ngai bilei te ; nayokaki posa ya mayi, kasi bopesaki Ngai te mayi ya komela ;
42 Pois eu estava com fome, e vocês não me deram comida; estava com sede, e não me deram água.
43 nazalaki mopaya, kasi boyambaki Ngai malamu te epai na bino ; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki Ngai te ; nabelaki mpe nakotaki na boloko, kasi bosungaki Ngai te. »
43 Era estrangeiro, e não me receberam na sua casa; estava sem roupa, e não me vestiram. Estava doente e na cadeia, e vocês não cuidaram de mim.”
44 Bango mpe bakotuna Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi ; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te ? »
44 — Então eles perguntarão: “Senhor, quando foi que vimos o senhor com fome, ou com sede, ou como estrangeiro, ou sem roupa, ou doente, ou na cadeia e não o ajudamos?”
45 Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »
45 — O Rei responderá: “Eu afirmo a vocês que isto é verdade: todas as vezes que vocês deixaram de ajudar uma destas pessoas mais humildes, foi a mim que deixaram de ajudar.”
46 Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.
46 E Jesus terminou assim:
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Mateus 25, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.