Marcos 6
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC
1 Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama.
1 Depois, ele partiu dali e foi para a sua pátria, seguido de seus discípulos.
2 Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani.
2 Quando chegou o dia de sábado, começou a ensinar na sinagoga. Muitos o ouviam e, tomados de admiração, diziam: Donde lhe vem isso? Que sabedoria é essa que lhe foi dada, e como se operam por suas mãos tão grandes milagres?
3 Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? »
3 Não é ele o carpinteiro, o filho de Maria, o irmão de Tiago, de José, de Judas e de Simão? Não vivem aqui entre nós também suas irmãs? E ficaram perplexos a seu respeito.
4 Yesu alobaki na bango : « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »
4 Mas Jesus disse-lhes: Um profeta só é desprezado na sua pátria, entre os seus parentes e na sua própria casa.
5 Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko.
5 Não pôde fazer ali milagre algum. Curou apenas alguns poucos enfermos, impondo-lhes as mãos.
6 Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango.
6 Admirava-se ele da desconfiança deles. E ensinando, percorria as aldeias circunvizinhas.
7 Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
7 Então chamou os Doze e começou a enviá-los, dois a dois; e deu-lhes poder sobre os espíritos imundos.
8 Alobaki na bango : « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. »
8 Ordenou-lhes que não levassem coisa alguma para o caminho, senão somente um bordão; nem pão, nem mochila, nem dinheiro no cinto;
9 Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te.
9 como calçado, unicamente sandálias, e que se não revestissem de duas túnicas.
10 Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.
10 E disse-lhes: Em qualquer casa em que entrardes, ficai nela, até vos retirardes dali.
11 Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino ; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. »
11 Se em algum lugar não vos receberem nem vos escutarem, saí dali e sacudi o pó dos vossos pés em testemunho contra ele.
12 Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema.
12 Eles partiram e pregaram a penitência.
13 Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.
13 Expeliam numerosos demônios, ungiam com óleo a muitos enfermos e os curavam.
14 Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi.
14 O rei Herodes ouviu falar de Jesus, cujo nome se tornara célebre. Dizia-se: João Batista ressurgiu dos mortos e por isso o poder de fazer milagres opera nele.
15 Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! »
15 Uns afirmavam: É Elias! Diziam outros: É um profeta como qualquer outro.
16 Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! »
16 Ouvindo isto, Herodes repetia: É João, a quem mandei decapitar. Ele ressuscitou!
17 Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.
17 Pois o próprio Herodes mandara prender João e acorrentá-lo no cárcere, por causa de Herodíades, mulher de seu irmão Filipe, com a qual ele se tinha casado.
18 Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »
18 João tinha dito a Herodes: Não te é permitido ter a mulher de teu irmão.
19 Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te,
19 Por isso Herodíades o odiava e queria matá-lo, não o conseguindo, porém.
20 pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.
20 Pois Herodes respeitava João, sabendo que era um homem justo e santo; protegia-o e, quando o ouvia, sentia-se embaraçado. Mas, mesmo assim, de boa mente o ouvia.
21 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile.
21 Chegou, porém, um dia favorável em que Herodes, por ocasião do seu natalício, deu um banquete aos grandes de sua corte, aos seus oficiais e aos principais da Galiléia.
22 Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi :
22 A filha de Herodíades apresentou-se e pôs-se a dançar, com grande satisfação de Herodes e dos seus convivas. Disse o rei à moça: Pede-me o que quiseres, e eu to darei.
23 Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye :
23 E jurou-lhe: Tudo o que me pedires te darei, ainda que seja a metade do meu reino.
24 Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye :
24 Ela saiu e perguntou à sua mãe: Que hei de pedir? E a mãe respondeu: A cabeça de João Batista.
25 Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
25 Tornando logo a entrar apressadamente à presença do rei, exprimiu-lhe seu desejo: Quero que sem demora me dês a cabeça de João Batista.
26 Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango.
26 O rei entristeceu-se; todavia, por causa da sua promessa e dos convivas, não quis recusar.
27 Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane,
27 Sem tardar, enviou um carrasco com a ordem de trazer a cabeça de João. Ele foi, decapitou João no cárcere,
28 amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye.
28 trouxe a sua cabeça num prato e a deu à moça, e esta a entregou à sua mãe.
29 Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
29 Ouvindo isto, os seus discípulos foram tomar o seu corpo e o depositaram num sepulcro.
30 Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.
30 Os apóstolos voltaram para junto de Jesus e contaram-lhe tudo o que haviam feito e ensinado.
31 Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »
31 Ele disse-lhes: Vinde à parte, para algum lugar deserto, e descansai um pouco. Porque eram muitos os que iam e vinham e nem tinham tempo para comer.
32 Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.
32 Partiram na barca para um lugar solitário, à parte.
33 Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende.
33 Mas viram-nos partir. Por isso, muitos deles perceberam para onde iam, e de todas as cidades acorreram a pé para o lugar aonde se dirigiam, e chegaram primeiro que eles.
34 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.
34 Ao desembarcar, Jesus viu uma grande multidão e compadeceu-se dela, porque era como ovelhas que não têm pastor. E começou a ensinar-lhes muitas coisas.
35 Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye :
35 A hora já estava bem avançada quando se achegaram a ele os seus discípulos e disseram: Este lugar é deserto, e já é tarde.
36 Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga.
36 Despede-os, para irem aos sítios e aldeias vizinhas a comprar algum alimento.
37 Kasi Yesu azongisaki :
37 Mas ele respondeu-lhes: Dai-lhes vós mesmos de comer. Replicaram-lhe: Iremos comprar duzentos denários de pão para dar-lhes de comer?
38 Yesu atunaki bango :
38 Ele perguntou-lhes: Quantos pães tendes? Ide ver. Depois de se terem informado, disseram: Cinco, e dois peixes.
39 Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu.
39 Ordenou-lhes que mandassem todos sentar-se, em grupos, na relva verde.
40 Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano.
40 E assentaram-se em grupos de cem e de cinqüenta.
41 Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.
41 Então tomou os cinco pães e os dois peixes e, erguendo os olhos ao céu, abençoou-os, partiu-os e os deu a seus discípulos, para que lhos distribuíssem, e repartiu entre todos os dois peixes.
42 Bato nyonso baliaki mpe batondaki.
42 Todos comeram e ficaram fartos.
43 Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
43 Recolheram do que sobrou doze cestos cheios de pedaços, e os restos dos peixes.
44 Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.
44 Foram cinco mil os homens que haviam comido daqueles pães.
45 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.
45 Imediatamente ele obrigou os seus discípulos a subirem para a barca, para que chegassem antes dele à outra margem, em frente de Betsaida, enquanto ele mesmo despedia o povo.
46 Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.
46 E despedido que foi o povo, retirou-se ao monte para orar.
47 Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale ; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili,
47 À noite, achava-se a barca no meio do lago e ele, a sós, em terra.
48 amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
48 Vendo-os se fatigarem em remar, sendo-lhes o vento contrário, foi ter com eles pela quarta vigília da noite, andando por cima do mar, e fez como se fosse passar ao lado deles.
49 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga.
49 À vista de Jesus, caminhando sobre o mar, pensaram que fosse um fantasma e gritaram;
50 Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango.
50 pois todos o viram e se assustaram. Mas ele logo lhes falou: Tranqüilizai-vos, sou eu; não vos assusteis!
51 Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,
51 E subiu para a barca, junto deles, e o vento cessou. Todos se achavam tomados de um extremo pavor,
52 pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.
52 pois ainda não tinham compreendido o caso dos pães; os seus corações estavam insensíveis.
53 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo.
53 Navegaram para o outro lado e chegaram à região de Genesaré, onde aportaram.
54 Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu.
54 Assim que saíram da barca, o povo o reconheceu.
55 Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna.
55 Percorrendo toda aquela região, começaram a levar, em leitos, os que padeciam de algum mal, para o lugar onde ouviam dizer que ele se encontrava.
56 Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.
56 Onde quer que ele entrasse, fosse nas aldeias ou nos povoados, ou nas cidades, punham os enfermos nas ruas e pediam-lhe que os deixassem tocar ao menos na orla de suas vestes. E todos os que tocavam em Jesus ficavam sãos.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Marcos 6, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.