Levítico 13

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC

Sair da comparação
VC Versão Católica
1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
1 O Senhor disse a Moisés e a Aarão:
2 « Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.
2 "Quando um homem tiver um tumor, uma inflamação ou uma mancha branca na pele de seu corpo, e esta se tornar em sua pele uma chaga de lepra, ele será levado a Aarão, o sacerdote, ou a um dos seus filhos sacerdotes.
3 Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.
3 O sacerdote examinará o mal que houver na pele do corpo: se o cabelo se tornou branco naquele lugar, e a chaga parecer mais funda que a pele, será uma chaga de lepra. O sacerdote verificará o fato e declarará impuro o homem.
4 Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo.
4 Se houver na pele de seu corpo uma mancha branca que não parecer mais funda que a pele sã, e o cabelo não se tiver tornado branco, o sacerdote isolará o doente durante sete dias.
5 Sima na mikolo yango sambo, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto efungwami te mpe epanzani te na nzoto mobimba, akotika moto oyo abeli na esika oyo atiaki ye mpo ete asala lisusu mikolo sambo.
5 No sétimo dia examinará: se a chaga parecer não ter progredido e não se tiver estendido pela pele, isolá-lo-á uma segunda vez durante sete dias.
6 Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te ; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te.
6 No sétimo dia o sacerdote o examinará novamente: se a parte afetada perdeu a sua cor e não se tiver estendido por sobre a pele, declará-lo-á puro; é dartro. O homem lavará suas vestes e será puro.
7 Nzokande, soki sima na Nganga-Nzambe kotala mpe koloba ete moto yango azali peto, kolokoto yango epanzani na poso, moto yango asengeli kozonga epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala ye lisusu.
7 Mas se o dartro se tiver estendido por sobre a pele, depois de se ter mostrado ao sacerdote para ser declarado puro, se lhe mostrará uma segunda vez.
8 Soki amoni ete kolokoto epanzani na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na bokono ya maba mpe azali mbindo.
8 Se o sacerdote verificar a extensão do dartro por sobre a pele, declará-lo-á impuro: é lepra.
9 Soki moto azwi bokono ya maba, basengeli komema ye epai ya Nganga-Nzambe.
9 " Quando um homem for atingido pela lepra, será conduzido ao sacerdote, que o examinará.
10 Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota,
10 Se houver na sua pele um tumor branco, e este tiver branqueado o cabelo, e aparecer a carne viva no tumor,
11 wana elakisi ete ezali bokono ya maba ya libela kati na poso ya nzoto na ye, mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo. Ekozala na tina te kotia ye na esika oyo akozala ye moko, pamba te emonani ete azali mbindo.
11 é lepra inveterada na pele de seu corpo; o sacerdote o declarará impuro; não o encerrará, porque é imundo.
12 Kasi soki bokono na ye ya maba ebimisi bambuma ya mike-mike na poso ya nzoto na ye mobimba, kobanda na moto kino na makolo, na bisika nyonso oyo Nganga-Nzambe akoki kotala,
12 Se a chaga se estendeu por toda a pele do doente, da cabeça aos pés, o sacerdote que o examinar, verificando, segundo o que viu,
13 Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba.
13 que a lepra cobre toda a pele, o declarará puro. Como se tornou completamente branco, é puro.
14 Kasi akokoma mbindo na mokolo kaka poso ya nzoto na ye ekofungwama mpe ekobimisa bapota.
14 Mas no dia em que se perceber nele a carne viva, será impuro;
15 Soki kaka Nganga-Nzambe atali mpe amoni bapota oyo ebimi na poso, akoloba ete moto yango azali mbindo mpe bapota oyo efungwami ezali mbindo : ezali bokono ya maba.
15 o sacerdote, vendo a carne viva, declará-lo-á impuro; a carne viva é impura; é a lepra.
16 Mpe soki bapota oyo efungwami ekomi lisusu pembe, moto yango akozonga lisusu epai ya Nganga-Nzambe
16 Se a carne viva mudar e ficar de novo branca, o homem irá ao sacerdote, que o examinará;
17 mpo ete atala ye malamu. Soki Nganga-Nzambe amoni ete bapota yango ekomi penza pembe, akoloba ete nzoto ezali mbindo te mpe ye moko moto yango azali mbindo te.
17 se a chaga se tornou verdadeiramente branca, o sacerdote declará-lo-á puro: e ele o é.
18 Soki moto moko abelaki bibon mpe yango ekawuki ;
18 Quando um homem tiver tido na pele de seu corpo uma úlcera que foi curada,
19 bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu.
19 e no lugar da úlcera aparecer um tumor branco ou uma mancha de um branco-avermelhado, esse homem se apresentará ao sacerdote para ser examinado.
20 Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.
20 Se a mancha parecer mais funda que a pele, e o cabelo se tiver tornado branco, o sacerdote declará-lo-á impuro: é uma chaga de lepra que nasceu na úlcera.
21 Nzokande, soki na ngonga ya kotala ye, Nganga-Nzambe amoni te bapwale ya moto yango kobongwana pembe mpe lidusu kosalema na poso na ye, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
21 Mas, se o sacerdote verificar que não há cabelo branco na mancha, e ela não parecer mais funda que a pele, e se tiver tornado de uma cor pálida, isolará esse homem durante sete dias.
22 Sima na yango, soki Nganga-Nzambe amoni ete lipalata yango epanzani na poso ya nzoto, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
22 Se a mancha se estender por sobre a pele, o sacerdote declarará o homem impuro: é uma chaga de lepra.
23 Kasi soki lipalata yango epanzani te, wana elakisi ete ezali bobele elembo ya pota ya bibon ; mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na ye mbindo te.
23 Mas, se a mancha ficou no seu lugar sem se estender, é a cicatriz da úlcera; o sacerdote declará-lo-á puro.
24 Soki poso ya nzoto ya moto moko eziki na moto, bongo litono moko ya pembe to ya motane esalemi kati na esika oyo eziki,
24 Quando um homem tiver na pele uma queimadura de fogo, e a cicatriz dessa queimadura apresentar uma mancha branca ou de um branco-avermelhado, o sacerdote o examinará.
25 Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu : soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota : elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
25 Se o cabelo se tornou branco na mancha, e esta parecer mais funda que a pele, é a lepra que nasceu na queimadura; o sacerdote declará-lo-á impuro: é uma chaga de lepra.
26 Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono ; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te ; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
26 Se o sacerdote verificar que não há cabelo branco na mancha, e que ela não parece mais funda que a pele, e se tiver tornado de uma cor pálida, isolará esse homem durante sete dias.
27 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki litono epanzani solo na poso, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba.
27 Depois disso o examinará. Se a mancha tiver se estendido por sobre a pele, o sacerdote declará-lo-á impuro; é uma chaga de lepra.
28 Nzokande, soki litono yango etikali kaka esika moko, epanzani te na poso kasi ekawuki, wana etalisi ete ezali kaka kobeba ya poso ya nzoto mpo na kozika na ye na moto. Boye Nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo te, pamba te ezali kaka elembo ya pota ya moto.
28 Mas, se a mancha ficou no mesmo lugar sem se estender por sobre a pele, e se tiver tornado de uma cor pálida, é o tumor da queimadura. O sacerdote declará-lo-á puro, pois é a cicatriz da queimadura.
29 Soki mobali to mwasi abeli bokono ya poso ya nzoto, ezala na moto to na mbanga,
29 Quando um homem ou uma mulher tiver uma chaga na cabeça ou no queixo, o sacerdote o examinará.
30 Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto ya moto yango : soki amoni ete bapota ebimi na poso ya nzoto ya moto yango, bapwale eteli mpe kotela na yango epanzani, akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo, pamba te ezali lipalata ya moto to ya mbanga.
30 Se ela parecer mais funda que a pele, e nela houver os cabelos finos e amarelados, o sacerdote declarará impuro o enfermo: esta é a tinha, a lepra da cabeça ou do queixo
31 Nzokande, soki Nganga-Nzambe amoni ete poso ya nzoto ebimisi na yango bapota te, atako bapwale ezali kaka ya mwindo, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
31 Se o sacerdote averiguar que a chaga da tinha não parece mais funda que a pele, e nela não houver cabelos negros, o sacerdote isolará durante sete dias aquele que tem a chaga da tinha.
32 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu poso : soki bokono yango epanzani te, bapwale eteli te, bapota ebimi te na poso,
32 No sétimo dia o examinará. Se a tinha não se espalhou, nela não houver cabelo amarelado algum, e a chaga não parecer mais funda do que a pele,
33 mobeli akokokola suki na ye kasi akotika suki oyo ezali na bisika oyo bokono emonani. Bongo Nganga-Nzambe akotia lisusu mobeli na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
33 o enfermo cortará a barba, exceto no lugar da chaga, e o sacerdote o isolará de novo durante sete dias.
34 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu bokono yango ya poso ya nzoto : soki epanzani te mpe ebimisi bapota te, Nganga-Nzambe akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo te. Boye mobali to mwasi yango akosukola kaka bilamba na ye mpe akokoma peto.
34 No sétimo dia o examinará. Se a tinha não se espalhou por sobre a pele, e a chaga não parecer mais funda que a pele, o sacerdote declará-lo-á puro; ele levará suas vestes e será puro.
35 Nzokande, atako Nganga-Nzambe asili koloba ete mobali to mwasi wana azali peto kasi soki bokono yango epanzani ye kaka na poso ya nzoto,
35 Se, entretanto, depois que o tiver declarado puro, a tinha se estender por sobre a pele, o sacerdote o examinará.
36 Nganga-Nzambe akotala malamu : lokola bokono epanzani ye penza na poso ya nzoto, ekozala na tina te ete Nganga-Nzambe aluka lisusu koyeba soki bapwale eteli to te, pamba te mobali to mwasi yango azali penza mbindo.
36 Se a tinha se tiver espalhado na pele, o sacerdote não procurará o cabelo amarelo, porque o homem é impuro
37 Nzokande, soki bokono epanzani na yango te mpe bapwale ya mwindo ebimi na bisika oyo bokono ezali, wana elakisi ete mobeli abiki na bokono na ye mpe azali peto : Nganga-Nzambe akoloba ete azali peto.
37 Se a tinha lhe parece estacionária, e nela houver crescido cabelos negros, ele sarou; o homem está puro e o sacerdote declará-lo-á como tal.
38 Soki mobali to mwasi amoni matono ya pembe kobima na poso ya nzoto na ye,
38 Quando o homem ou mulher tiver na pele manchas brancas, o sacerdote o examinará.
39 Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki pembe ya matono yango ezali na yango ya pete, wana elakisi ete ezali na yango penza bokono te : moto yango azali peto.
39 Se essas manchas na pele são de um branco pálido, é uma mancha branca superficial: ele é puro.
40 Soki suki ya mobali moko ekatani, bongo akomi na libandi, elakisi te ete akomi mbindo.
40 Quando um homem perder os seus cabelos, ele será simplesmente calvo, mas será puro.
41 Soki suki yango ekataneli ye na mbunzu, bongo akomi na libandi, wana elakisi ete azali peto.
41 Se lhe caírem os cabelos da fronte, ele terá a fronte calva, mas será puro.
42 Kasi soki lipalata moko ya mwa pembe mpe ya mwa motane ebimi ye na libandi, ezala na dikosi to na mbunzu, wana elakisi ete bokono ya maba ebandi kobima ye na libandi.
42 Mas se na parte calva, posterior ou dianteira, se encontrar uma chaga de um branco-avermelhado, é a lepra que se declarou na parte calva posterior ou dianteira.
43 Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu ; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi.
43 O sacerdote o examinará. Se o tumor da chaga for de um branco-avermelhado na parte calva posterior ou dianteira, tendo o aspecto da lepra da pele do corpo, esse homem é leproso,
44 Boye mobali yango azali na bokono ya maba, azali mbindo ; mpe Nganga-Nzambe asengeli koloba ete azali mbindo mpo na bokono oyo akomi na yango na moto.
44 é impuro; a sua lepra está na cabeça.
45 Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga : ‹ Mbindo ! Mbindo ! ›
45 Todo homem atingido pela lepra terá suas vestes rasgadas e a cabeça descoberta. Cobrirá a barba e clamará: Impuro! Impuro!
46 Lokola bokono oyo akomi na yango ezali mbindo, ye moko mpe akozala mbindo. Boye akotonga ndako na ye mosika na bato mpe akovanda libanda ya molako.
46 Enquanto durar o seu mal, ele será impuro. É impuro; habitará só, e a sua habitação será fora do acampamento."
47 Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme
47 "Quando a lepra aparecer numa veste de lã ou de linho,
48 to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,
48 num tecido de tela ou de trama, quer seja de lã quer de linho, numa pele ou num objeto qualquer de pele,
49 soki mbungi yango ezwi langi ya mayi ya pondu to ezwi langi ya motane, na likolo ya elamba, wana elakisi ete ezali litono ya maba ; boye basengeli komema yango epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala yango malamu.
49 se a mancha na veste, na pele, no tecido de tela ou de trama ou no objeto de pele, for esverdeada ou avermelhada, é uma lepra: será mostrada ao sacerdote.
50 Sima na Nganga-Nzambe kotala yango malamu, akotia yango na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
50 O sacerdote examinará a mancha e isolará durante sete dias o objeto atingido pelo mal.
51 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono yango. Soki amoni ete epanzani na likolo ya elamba ya kolata, ya elamba ya pamba, ya elamba ya malili to na likolo ya kapo ; wana elakisi ete ezali litono ya bokono ya maba oyo bakoki kolongola te mpe elakisi lisusu ete elamba yango ezali mbindo.
51 No sétimo dia examinará a chaga. Se ela se tiver espalhado pela veste, pelo tecido de tela ou de trama, pela pele ou pelo objeto de pele, seja qual for, é uma lepra roedora; o objeto é impuro.
52 Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango.
52 Queimará a veste, o tecido de tela ou de trama de linho ou de lã, o objeto de pele, seja qual for, em que se encontre a mancha, porque é uma lepra roedora; o objeto será queimado no fogo.
53 Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo,
53 Mas se o sacerdote verificar que mancha não se espalhou pela veste, pelo tecido de tela ou de trama, ou pelo objeto de pele,
54 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete basukola yango ; bongo akotia yango lisusu na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
54 mandará lavar o objeto afetado e o isolará uma segunda vez durante sete dias.
55 Sima na kosukola yango, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono ; soki amoni ete ebongwani te mpe epanzani na yango te, wana elakisi ete elamba ezali mbindo mpe esengeli kotumba yango na moto : ezali elamba oyo ebebi na liboso mpe na sima.
55 Em seguida examinará a mancha, depois que ela tiver sido lavada. Se não mudou de aspecto nem se espalhou, o objeto é impuro. Tu o queimarás no fogo: a mancha roeu o objeto de um lado a outro.
56 Nzokande, soki Nganga-Nzambe, sima na kotala malamu elamba, amoni ete litono elongwaki na tango basukolaki elamba ; akokata kaka eteni ya elamba epai wapi litono ezali.
56 Mas se o sacerdote verificar que a mancha lavada tomou uma cor pálida, arrancá-la-á da veste, da pele ou do tecido de tela ou de trama.
57 Soki sima na mwa tango, litono yango ezongi lisusu, wana elakisi ete ezali bokono ya maba oyo ezali kokola. Boye esengeli kotumba na moto eteni oyo ezali na litono na elamba.
57 Se ela voltar novamente à veste, ao tecido de tela ou de trama ou ao objeto de pele, é uma erupção de lepra. Tu queimarás no fogo o objeto atingido pela mancha.
58 Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. »
58 Mas a veste, o tecido de tela ou de trama, o objeto de pele, seja o que for, que tiveres lavado e do qual a mancha tiver desaparecido, será lavado uma segunda vez e será puro.
59 Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.
59 Tal é a lei relativa à mancha de lepra que atacar as vestes de lã ou de linho, os tecidos de tela ou de trama, ou qualquer objeto de pele; é segundo ela que se declararão esses objetos puros ou impuros."

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Levítico 13, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.