Lucas 15
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVT
1 Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye.
1 Cobradores de impostos e outros pecadores vinham ouvir Jesus ensinar.
2 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba :
2 Os fariseus e mestres da lei o criticavam, dizendo: “Ele se reúne com pecadores e até come com eles!”.
3 Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo :
3 Então Jesus lhes contou esta parábola:
4 — Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango ?
4 “Se um homem tiver cem ovelhas e uma delas se perder, o que acham que ele fará? Não deixará as outras noventa e nove no pasto e buscará a perdida até encontrá-la?
5 Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.
5 E, quando a encontrar, ele a carregará alegremente nos ombros e a levará para casa.
6 Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »
6 Quando chegar, reunirá os amigos e vizinhos e dirá: ‘Alegrem-se comigo, pois encontrei minha ovelha perdida!’.
7 Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
7 Da mesma forma, há mais alegria no céu por causa do pecador perdido que se arrepende do que por noventa e nove justos que não precisam se arrepender.”
8 Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango ?
8 “Ou suponhamos que uma mulher tenha dez moedas de prata e perca uma. Acaso não acenderá uma lâmpada, varrerá a casa inteira e procurará com cuidado até encontrá-la?
9 Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki ! »
9 E, quando a encontrar, reunirá as amigas e vizinhas e dirá: ‘Alegrem-se comigo, pois encontrei a minha moeda perdida!’.
10 Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.
10 Da mesma forma, há alegria na presença dos anjos de Deus quando um único pecador se arrepende”.
11 Yesu alobaki lisusu :
11 Jesus continuou: “Um homem tinha dois filhos.
12 Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. »
12 O filho mais jovem disse ao pai: ‘Quero a minha parte da herança’, e o pai dividiu seus bens entre os filhos.
13 Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.
13 “Alguns dias depois, o filho mais jovem arrumou suas coisas e se mudou para uma terra distante, onde desperdiçou tudo que tinha por viver de forma desregrada.
14 Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.
14 Quando seu dinheiro acabou, uma grande fome se espalhou pela terra, e ele começou a passar necessidade.
15 Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu.
15 Convenceu um fazendeiro da região a empregá-lo, e esse homem o mandou a seus campos para cuidar dos porcos.
16 Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.
16 Embora quisesse saciar a fome com as vagens dadas aos porcos, ninguém lhe dava coisa alguma.
17 Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala !
17 “Quando finalmente caiu em si, disse: ‘Até os empregados de meu pai têm comida de sobra, e eu estou aqui, morrendo de fome.
18 Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.
18 Vou retornar à casa de meu pai e dizer: Pai, pequei contra o céu e contra o senhor,
19 Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo ! › »
19 e não sou mais digno de ser chamado seu filho. Por favor, trate-me como seu empregado’.
20 Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
20 “Então voltou para a casa de seu pai. Quando ele ainda estava longe, seu pai o viu. Cheio de compaixão, correu para o filho, o abraçou e o beijou.
21 Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »
21 O filho disse: ‘Pai, pequei contra o céu e contra o senhor, e não sou mais digno de ser chamado seu filho’.
22 Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.
22 “O pai, no entanto, disse aos servos: ‘Depressa! Tragam a melhor roupa da casa e vistam nele. Coloquem-lhe um anel no dedo e sandálias nos pés.
23 Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango ; tolia mpe tosala feti,
23 Matem o novilho gordo. Faremos um banquete e celebraremos,
24 pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »
24 pois este meu filho estava morto e voltou à vida. Estava perdido e foi achado!’. E começaram a festejar.
25 Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina.
25 “Enquanto isso, o filho mais velho trabalhava no campo. Na volta para casa, ouviu música e dança,
26 Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka.
26 e perguntou a um dos servos o que estava acontecendo.
27 Mosali azongisaki : « Ndeko na yo azongi ! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono. »
27 O servo respondeu: ‘Seu irmão voltou, e seu pai matou o novilho gordo, pois ele voltou são e salvo!’.
28 Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye.
28 “O irmão mais velho se irou e não quis entrar. O pai saiu e insistiu com o filho,
29 Kasi azongiselaki tata na ye : « Tala ! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai.
29 mas ele respondeu: ‘Todos esses anos, tenho trabalhado como um escravo para o senhor e nunca me recusei a obedecer às suas ordens. E o senhor nunca me deu nem mesmo um cabrito para eu festejar com meus amigos.
30 Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye ! »
30 Mas, quando esse seu filho volta, depois de desperdiçar o seu dinheiro com prostitutas, o senhor comemora matando o novilho!’.
31 Tata azongiselaki ye : « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo.
31 “O pai lhe respondeu: ‘Meu filho, você está sempre comigo, e tudo que eu tenho é seu.
32 Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »
32 Mas tínhamos de comemorar este dia feliz, pois seu irmão estava morto e voltou à vida. Estava perdido e foi achado!’”.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Lucas 15, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.