Juízes 9

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki :
1 Abimeleque, filho de Jerubaal, foi aos irmãos de sua mãe em Siquém e disse a eles e a todo o clã da família de sua mãe:
2 « Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »
2 "Perguntem a todos os cidadãos de Siquém: O que é melhor para vocês: ter todos os setenta filhos de Jerubaal governando sobre vocês, ou somente um homem? Lembrem-se de que eu sou sua própria carne".
3 Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali.
3 Os irmãos de sua mãe repetiram tudo aos cidadãos de Siquém, e estes se mostraram propensos a seguir Abimeleque, pois disseram: "Ele é nosso irmão".
4 Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.
4 Deram-lhe setenta peças de prata tiradas do templo de Baal-Berite, as quais Abimeleque usou para contratar alguns desocupados e vadios, que se tornaram seus seguidores.
5 Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki.
5 Foi à casa de seu pai em Ofra e matou seus setenta irmãos, filhos de Jerubaal, sobre uma rocha. Mas Jotão, o filho mais novo de Jerubaal, escondeu-se e escapou.
6 Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi.
6 Então todos os cidadãos de Siquém e de Bete-Milo reuniram-se ao lado do Carvalho, junto à coluna de Siquém, para coroar Abimeleque rei.
7 Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi : « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino.
7 Quando Jotão soube disso, subiu ao topo do monte Gerizim e gritou para eles: "Ouçam-me, cidadãos de Siquém, para que Deus os ouça.
8 Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive : ‹ Zala mokonzi na biso. ›
8 Certo dia as árvores saíram para ungir um rei para si. Disseram à oliveira: ‘Seja o nosso rei! ’
9 Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
9 "A oliveira, porém, respondeu: ‘Deveria eu renunciar ao meu azeite, com o qual se presta honra aos deuses e aos homens, para dominar sobre as árvores? ’
10 Banzete elobaki na nzete ya figi : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
10 "Então as árvores disseram à figueira: ‘Venha ser o nosso rei! ’
11 Nzete ya figi ezongiselaki yango : ‹ Natika penza elengi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
11 "A figueira, porém, respondeu: ‘Deveria eu renunciar ao meu fruto saboroso e doce, para dominar sobre as árvores? ’
12 Banzete elobaki na nzete ya vino : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
12 "Depois as árvores disseram à videira: ‘Venha ser o nosso rei! ’
13 Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango : ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
13 "A videira, porém, respondeu: ‘Deveria eu renunciar ao meu vinho, que alegra os deuses e os homens, para ter domínio sobre as árvores? ’
14 Sima, banzete nyonso elobaki na nzete ya nzube : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
14 "Finalmente todas as árvores disseram ao espinheiro: ‘Venha ser o nosso rei! ’
15 Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! ›
15 "O espinheiro disse às árvores: ‘Se querem realmente ungir-me rei sobre vocês, venham abrigar-se à minha sombra; do contrário, sairá fogo do espinheiro e consumirá até os cedros do Líbano! ’
16 Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi ; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino,
16 "Será que vocês agiram de fato com sinceridade quando fizeram Abimeleque rei? Foram justos com Jerubaal e sua família, como ele merecia?
17 bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani.
17 Meu pai lutou por vocês e arriscou a vida para livrá-los das mãos de Midiã,
18 Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali.
18 hoje, porém, vocês se revoltaram contra a família de meu pai, mataram seus setenta filhos sobre a mesma rocha, e proclamaram Abimeleque, o filho de sua escrava, rei sobre os cidadãos de Siquém pelo fato de ser irmão de vocês.
19 Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye !
19 Se hoje vocês de fato agiram com sinceridade para com Jerubaal e sua família, alegrem-se com Abimeleque, e alegre-se ele com vocês!
20 Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »
20 Entretanto, se não foi assim, que saia fogo de Abimeleque e consuma os cidadãos de Siquém e de Bete-Milo, e que saia fogo dos cidadãos de Siquém e de Bete-Milo, e consuma Abimeleque! "
21 Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali.
21 Depois Jotão fugiu para Beer, e foi morar ali, longe de seu irmão Abimeleque.
22 Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato.
22 Fazia três anos que Abimeleque governava Israel,
23 Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita.
23 quando Deus enviou um espírito maligno entre Abimeleque e os cidadãos de Siquém, e estes agiram traiçoeiramente contra Abimeleque.
24 Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali.
24 Isso aconteceu para que o crime contra os setenta filhos de Jerubaal, o derramamento do sangue deles, fosse vingado em seu irmão Abimeleque e nos cidadãos de Siquém que o ajudaram a assassinar os seus irmãos.
25 Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
25 Os cidadãos de Siquém enviaram homens para o alto das colinas para emboscarem os que passassem por ali, e Abimeleque foi informado disso.
26 Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema.
26 Nesse meio tempo Gaal, filho de Ebede, mudou-se com seus parentes para Siquém, cujos cidadãos confiavam nele.
27 Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.
27 Sucedeu que foram ao campo, colheram uvas, pisaram-nas, e fizeram uma festa no templo do seu deus. Comendo e bebendo, amaldiçoaram Abimeleque.
28 Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ?
28 Então Gaal, filho de Ebede, disse: "Quem é Abimeleque para que o sirvamos? E quem é Siquém? Não é ele o filho de Jerubaal, e não é Zebul o seu representante? Sirvam aos homens de Hamor, o pai de Siquém! Por que servir a Abimeleque?
29 Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
29 Ah! Se eu tivesse esse povo sob o meu comando! Eu me livraria dele. E diria a Abimeleque: ‘Mobilize o seu exército e venha! ’"
30 Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi.
30 Quando Zebul, o governante da cidade, ouviu o que dizia Gaal, filho de Ebede, ficou indignado.
31 Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo.
31 Secretamente enviou mensageiros a Abimeleque dizendo: "Gaal, filho de Ebede, e seus parentes vieram a Siquém e estão agitando a cidade contra você.
32 Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama.
32 Venha de noite, você e seus homens, e fiquem à espera no campo.
33 Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
33 De manhã, ao nascer do sol, avance contra a cidade. Quando Gaal e sua tropa atacarem, faça com eles o que achar melhor".
34 Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi.
34 E assim Abimeleque e todas as suas tropas partiram de noite e prepararam emboscadas perto de Siquém, em quatro companhias.
35 Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki.
35 Ora, Gaal, filho de Ebede, tinha saído e estava à porta da cidade quando Abimeleque e seus homens saíram da sua emboscada.
36 Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli :
36 Quando Gaal os viu, disse a Zebul: "Veja, vem gente descendo do alto das colinas! " Zebul, porém, respondeu: "Você está confundindo as sombras dos montes com homens".
37 Kasi Gali alobaki lisusu :
37 Mas Gaal tornou a falar: "Veja, vem gente descendo da parte central do território, e uma companhia está vindo pelo caminho do carvalho dos Adivinhadores".
38 Zebuli alobaki na Gali :
38 Disse-lhe Zebul: "Onde está toda aquela sua conversa? Você dizia: ‘Quem é Abimeleque, para que o sirvamos? ’ Não são estes os homens que você ridicularizou? Saia e lute contra eles! "
39 Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki.
39 Então Gaal conduziu para fora os cidadãos de Siquém e lutou contra Abimeleque.
40 Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke.
40 Abimeleque o perseguiu, e ele fugiu. Muitos dos homens de Siquém caíram mortos ao longo de todo o caminho, até à porta da cidade.
41 Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.
41 Abimeleque permaneceu em Arumá. E Zebul expulsou Gaal e os seus parentes de Siquém.
42 Mokolo oyo elandaki, bato ya Sishemi babimaki mpe bakendeki na bilanga. Bato bamemaki sango epai ya Abimeleki.
42 No dia seguinte o povo de Siquém saiu aos campos, e Abimeleque ficou sabendo disso.
43 Abimeleki azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na biteni misato ya basoda, mpe atiaki bango kati na bilanga, na esika ya kobombama. Tango amonaki bato kobima longwa na engumba, atelemaki mpo na kobundisa bango.
43 Então dividiu os seus homens em três companhias e armou emboscadas no campo. Quando viu o povo saindo da cidade, levantou-se contra ele e atacou-o.
44 Nzokande, tango Abimeleki mpe masanga ya mampinga oyo bazalaki elongo na ye bakendeki na lombangu mpe batelemaki na ekuke ya engumba, masanga mibale mosusu ya mampinga balandaki bato kino na bilanga mpe babomaki bango nyonso.
44 Abimeleque e as tropas que estavam com ele avançaram até à porta da cidade. Então duas companhias avançaram sobre os que estavam nos campos e os mataram.
45 Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa.
45 E Abimeleque atacou a cidade o dia todo, até conquistá-la e matar o seu povo. Depois destruiu a cidade e espalhou sal sobre ela.
46 Tango bavandi nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bayokaki makambo yango, bakendeki kobombama kati na libulu ya mabanga ya tempelo ya Beriti, nzambe na bango.
46 Ao saberem disso, os cidadãos que estavam na torre de Siquém entraram na fortaleza do templo de El-Berite.
47 Bamemelaki Abimeleki sango ete bavandi ya ndako molayi ya Sishemi basangani wana.
47 Quando Abimeleque soube que se haviam reunido lá,
48 Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »
48 ele e todos os seus homens subiram o monte Zalmom. Ele apanhou um machado e cortou um galho de árvore e o pôs nos ombros. Então deu esta ordem aos homens que estavam com ele: "Rápido! Façam o que eu fizer! "
49 Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki : bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.
49 Todos os homens cortaram galhos e seguiram Abimeleque. Empilharam os galhos junto à fortaleza e a incendiaram. Assim morreu também o povo que estava na torre de Siquém, cerca de mil homens e mulheres.
50 Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango.
50 A seguir Abimeleque foi a Tebes, sitiou-a e conquistou-a.
51 Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna ; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango.
51 Mas dentro da cidade havia uma torre bastante forte, para a qual fugiram todos os homens e mulheres, todo o povo da cidade. Trancaram-se por dentro e subiram para o telhado da torre.
52 Abimeleki ayaki kino na ndako molayi mpo na kobundisa yango, mpe apusanaki kino na ekuke ya ndako yango mpo na kotumba yango.
52 Abimeleque foi para a torre e atacou-a. E, quando se aproximava da entrada da torre para incendiá-la,
53 Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto.
53 uma mulher jogou-lhe uma pedra de moinho na cabeça, que lhe rachou o crânio.
54 Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.
54 Imediatamente ele chamou seu escudeiro e lhe ordenou: "Tire a espada e mate-me, para que não digam que uma mulher me matou". Então o jovem o atravessou, e ele morreu.
55 Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye.
55 Quando os israelitas viram que Abimeleque estava morto, voltaram para casa.
56 Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo.
56 Assim Deus retribuiu a maldade que Abimeleque praticara contra o seu pai, matando os seus setenta irmãos.
57 Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.
57 Deus fez também os homens de Siquém pagarem por toda a sua maldade. A maldição de Jotão, filho de Jerubaal, caiu sobre eles.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Juízes 9, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.