Juízes 12

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs BKJ

Sair da comparação
1 Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite :
1 E os homens de Efraim se reuniram, e seguiram em direção norte, e disseram a Jefté: Por que atravessaste para lutar contra os filhos de Amom e não nos chamaste para ir contigo? Nós queimaremos a tua casa sobre ti com fogo.
2 Jefite azongiselaki bango :
2 E Jefté lhes disse: Eu e o meu povo estávamos em grande conflito com os filhos de Amom; e quando eu vos chamei, vós não me livrastes das mãos deles.
3 Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ?
3 E quando vi que não me livraste, eu coloquei a minha vida nas minhas mãos, e atravessei contra os filhos de Amom, e o ­SENHOR os entregou na minha mão; pelo que, então, viestes até mim neste dia, para lutardes contra mim?
4 Jefite asangisaki mibali nyonso ya Galadi, mpe babundisaki bato ya Efrayimi. Bato ya Galadi balongaki bato ya Efrayimi ; mpe bato ya Efrayimi balobaki : « Bino bato ya Galadi, bozali na bino kaka bato oyo bokimaki wuta na Efrayimi mpe na Manase. »
4 Então Jefté reuniu todos os homens de Gileade, e lutou contra Efraim; e os homens de Gileade feriram Efraim, porque diziam: Vós, gileaditas, sois fugitivos de Efraim no meio dos efraimitas, e no meio dos manassitas.
5 Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, »
5 E os gileaditas tomaram as passagens do Jordão antes dos efraimitas; e assim foi que, quando aqueles efraimitas que haviam escapado diziam: Deixa-me atravessar; os homens de Gileade lhes diziam: És tu efraimita? E, se ele dissesse: Não;
6 bazalaki kosenga ete aloba : « Shiboleti ; » soki alobi : « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale.
6 Disseram-lhe então: Diz, agora "chibolete", e ele disse "sibolete"; pois ele não conseguia formular uma pronúncia correta. Então eles o tomaram e o mataram nas passagens do Jordão; e caíram ali, naquele hora, dos eframitas, quarenta e dois mil.
7 Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi.
7 E Jefté julgou Israel por seis anos. Então morreu Jefté, o gileadita, e foi sepultado em uma das cidades de Gileade.
8 Sima na Jefite, Ibitsani, moto ya Beteleemi, akambaki Isalaele.
8 E depois dele, Ibsã de Belém julgou Israel.
9 Azalaki na bana mibali tuku misato mpe bana basi tuku misato. Abalisaki bana na ye ya basi na libanda ya libota ya botata na ye, mpe ayeisaki bilenge basi tuku misato ya bikolo mosusu mpo na bana na ye ya mibali. Ibitsani akambaki Isalaele mibu sambo.
9 E ele tinha trinta filhos, e trinta filhas, as quais ele enviou para o exterior, e trouxe trinta filhas do exterior para os seus filhos. E ele julgou Israel por sete anos.
10 Ibitsani akufaki, mpe bakundaki ye kati na Beteleemi.
10 Então morreu Ibsã, e foi sepultado em Belém.
11 Sima na Ibitsani, Eloni, moto ya libota ya Zabuloni, akambaki Isalaele mibu zomi.
11 E depois dele Elom, um zebulonita, julgou Israel; e julgou Israel por dez anos.
12 Eloni akufaki, mpe bakundaki ye kati na mboka Ayaloni, kati na etuka ya Zabuloni.
12 E Elom, o zebulonita, morreu e foi sepultado em Aijalom, na região de Zebulom.
13 Sima na Eloni, Abidoni, mwana mobali ya Ileli, moto ya mokili ya Piratoni, akambaki Isalaele.
13 E depois dele Abdom, o filho de Hilel, o piratonita, julgou Israel.
14 Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe.
14 E ele tinha quarenta filhos e trinta netos, que montavam setenta jumentos potros; e julgou Israel por oito anos.
15 Abidoni, mwana mobali ya Ileli, akufaki, mpe bakundaki ye na Piratoni, kati na etuka ya Efrayimi, na mokili ya bangomba ya bato ya Amaleki.
15 E Abdom, o filho de Hilel, o piratonita, morreu, e foi sepultado em Piratom, na terra de Efraim, no monte dos Amalequitas.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Juízes 12, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.