Josué 22
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH
1 Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase ;
1 Então Josué reuniu o povo das tribos de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste
2 mpe alobaki na bango : « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino.
2 e disse: — Vocês têm feito tudo o que Moisés,
3 Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino.
3 Durante todo esse tempo, até hoje, vocês não abandonaram os seus irmãos israelitas. Vocês têm obedecido com cuidado aos mandamentos do Senhor .
4 Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.
4 Agora o Senhor , o Deus de vocês, deu aos seus irmãos israelitas a paz, como havia prometido. Voltem, pois, para a terra que vocês conquistaram do outro lado do rio Jordão, a terra que Moisés, servo do Senhor , lhes deu.
5 Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »
5 Obedeçam com muito cuidado ao mandamento e à lei que Moisés, servo do Senhor , lhes deu. Amem o Senhor , o Deus de vocês, façam a vontade dele, obedeçam aos seus mandamentos, fiquem ligados com ele e o sirvam com todo o coração e com toda a alma.
6 Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango.
6 Aí Josué os abençoou e se despediu deles. E eles voltaram para casa.
7 Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani ; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango.
7 Moisés tinha dado terras a leste do rio Jordão, em Basã, a uma das metades da tribo de Manassés. Mas para a outra metade Josué tinha dado terras a oeste do rio, junto com as outras tribos. Quando Josué se despediu deles, abençoou-os
8 Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. »
8 e disse: — Vocês estão voltando para casa muito ricos, com muito gado, prata, ouro, bronze, ferro e grande quantidade de roupas. Repartam com os seus irmãos israelitas aquilo que vocês tomaram dos inimigos.
9 Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
9 Então o povo das tribos de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste voltou para casa. Eles deixaram os outros israelitas em Siló, na terra de Canaã, e foram para Gileade, a terra deles, que haviam conquistado conforme o Senhor tinha ordenado por meio de Moisés.
10 Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani.
10 Quando chegaram a Gelilote, do lado oeste do rio Jordão, as duas tribos e meia construíram ali um altar grande, que podia ser visto de longe.
11 Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele,
11 Os israelitas das outras tribos ouviram falar disso e comentavam: — Escutem! O povo das tribos de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste construiu um altar em Gelilote, do nosso lado do rio Jordão!
12 lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango.
12 Quando o povo de Israel ouviu isso, todos se reuniram em Siló para fazer guerra contra eles.
13 Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
13 Então o povo de Israel enviou Fineias, filho do sacerdote Eleazar, à terra de Gileade, para falar com o povo das tribos de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste.
14 Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele : moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele.
14 Junto com Fineias foram dez líderes, um de cada uma das tribos de Israel.
15 Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango :
15 Eles foram até a terra de Gileade para falar com o povo de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste. Eles disseram:
16 — Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ?
16 — Todo o povo de Deus reunido mandou dizer isto: “Por que vocês fizeram essa traição contra o Deus de Israel? Por que se revoltaram contra o Senhor , construindo vocês mesmos esse altar? Será que não estão mais seguindo o Senhor ?
17 Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso ? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe !
17 Vocês não lembram do pecado cometido em Peor, quando o Senhor castigou o seu povo? Nós ainda estamos sofrendo por causa disso. Será que aquele pecado não bastava?
18 Mpe bino bopesi Yawe lelo mokongo ? Soki bino botombokeli Yawe lelo, lobi Ye nde akotombokela lisanga mobimba ya Isalaele.
18 Será que agora vão deixar de seguir o Senhor ? Se hoje vocês se revoltarem contra o Senhor , amanhã ele ficará irado com todo o povo de Israel.
19 Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso.
19 Agora, se acham que a terra de vocês é impura , então passem para cá, para a terra de Deus, o Senhor , onde está a Tenda Sagrada em que ele mora. Peçam um pedaço de terra aqui do nosso lado. Porém não se revoltem contra o Senhor nem contra nós, construindo vocês mesmos outro altar além do altar do Senhor , nosso Deus.
20 Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. »
20 Lembrem que Acã, filho de Zera, não quis obedecer ao mandamento a respeito das coisas que deviam ser destruídas, e todo o povo de Israel foi castigado por causa disso. E Acã não foi o único que morreu por causa do seu pecado.”
21 Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele :
21 Então o povo das tribos de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste respondeu aos chefes das famílias de Israel:
22 — Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !
22 — Deus é o Poderoso! Ele é o Senhor ! Deus é o Poderoso! Ele é o Senhor ! Ele sabe por que fizemos isso, e fiquem sabendo vocês também. Se nós nos revoltamos e se não fomos fiéis ao Senhor , não nos deixem continuar a viver.
23 Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso !
23 Nós não construímos o nosso altar para oferecer sacrifícios a serem completamente queimados, nem para colocar sobre ele ofertas de cereais ou ofertas de paz. Que o Senhor mesmo nos castigue se construímos este altar para desobedecer a ele!
24 Te, ezali bongo te ! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso : « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele ?
24 Pelo contrário, fizemos isso porque ficamos com medo de que um dia os descendentes de vocês venham a dizer aos nossos: “Que ligação vocês têm com o Senhor , o Deus de Israel?
25 Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino ; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi ! Bozali na libula moko te epai na Yawe ! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe.
25 O Senhor pôs o rio Jordão como divisa entre nós e vocês, tribos de Rúben e de Gade. Vocês não têm nada a ver com Deus, o Senhor .” E assim os descendentes de vocês poderiam fazer com que os nossos descendentes deixassem de adorar o Senhor .
26 Yango wana tomilobelaki : « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu.
26 Por isso o altar que construímos não foi para apresentar ofertas a serem completamente queimadas, nem para oferecer sacrifícios.
27 Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › »
27 Pelo contrário, queríamos que fosse um sinal para nós, e para vocês, e para os nossos descendentes depois de nós. Seria um sinal para adorarmos o Senhor com as nossas ofertas a serem completamente queimadas, com sacrifícios de animais e com ofertas de paz. Isso foi feito para evitar que um dia os seus descendentes venham a dizer aos nossos: “Vocês não têm nenhuma ligação com o Senhor .”
28 Tomilobelaki : « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango : ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki ; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › »
28 Nós pensamos que, se um dia isso acontecer, os nossos descendentes poderão dizer: “Vejam! Os nossos antepassados fizeram um altar igual ao altar de Deus, o Senhor . Ele não foi construído a fim de apresentarmos ofertas a serem completamente queimadas nem sacrifícios de animais, mas a fim de ser um sinal para nós e para vocês.”
29 Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.
29 Nunca tivemos a intenção de nos revoltar contra o Senhor , nem pensamos em deixar de segui-lo. Nós não iríamos construir um altar para apresentar ofertas a serem completamente queimadas ou ofertas de cereais, nem para oferecer sacrifícios de animais. Nunca faríamos outro altar além do altar do Senhor , nosso Deus, que fica em frente da Tenda onde ele mora.
30 Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.
30 O sacerdote Fineias, os líderes do povo e os chefes das famílias de Israel que estavam com ele ouviram o que disse o povo das tribos de Rúben, de Gade e de Manassés do Leste e ficaram satisfeitos.
31 Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase :
31 E Fineias, filho do sacerdote Eleazar, disse ao povo de Rúben, de Gade e de Manassés: — Agora sabemos que o
32 Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki.
32 Então Fineias e os líderes deixaram a gente de Rúben e de Gade na região de Gileade, voltaram para a terra de Canaã e contaram tudo ao povo de Israel.
33 Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda.
33 O que disseram agradou aos israelitas. Então eles louvaram a Deus e não pensaram mais em fazer guerra, nem em destruir a terra onde a gente de Rúben e de Gade estava morando.
34 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba : Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe.
34 E a gente das tribos de Rúben e de Gade chamou o altar de “Testemunha” porque disseram: “É uma testemunha entre nós de que o Senhor é Deus.”
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Josué 22, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.