Josué 18

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC

Sair da comparação
VC Versão Católica
1 Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.
1 Toda a assembléia dos filhos de Israel se reuniu em Silo, onde levantaram a tenda de reunião; a terra estava-lhes sujeita.
2 Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele.
2 Havia sete tribos entre os israelitas que ainda não tinham recebido sua parte.
3 Jozue alobaki na bana ya Isalaele : « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino ?
3 Josué disse aos israelitas: Até quando tardareis a tomar posse da terra que vos deu o Senhor, Deus de vossos pais?
4 Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota ; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai.
4 Escolhei de cada tribo três homens para que eu os envie a percorrer a terra: eles farão a sua descrição em vista da repartição, e voltarão para junto de mim.
5 Bakokabola mokili yango na biteni sambo ; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor.
5 Dividi-la-ão em sete partes: Judá permanecerá nos seus limites do lado do meio-dia, e a casa de José nos seus, da banda do norte.
6 Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
6 Traçareis, pois, a planta da terra, repartindo-a em sete partes, e me trareis aqui essa planta, para que eu, diante do Senhor, nosso Deus, vos lance as sortes.
7 Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »
7 Não haverá parte alguma para os levitas entre vós, porque sua herança é o sacerdócio do Senhor. Quanto a Gad, Rubem e a meia tribo de Manassés, já receberam a sua parte na Transjordânia, ao oriente, a qual lhes deu Moisés, servo do Senhor.
8 Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo : « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. »
8 Então os homens se levantaram e partiram. E Josué deu ordem aos que partiram para demarcar a terra: Ide, disse ele, percorrei a terra, traçai a sua planta e voltai a mim; eu vos lançarei as sortes aqui em Silo, diante do Senhor.
9 Boye, bato oyo bakendeki, batambolaki kati na mokili, bakataki bandelo na yango mpe batiaki yango na mokanda, engumba na engumba, mpe bakabolaki mokili mobimba na biteni sambo ; bongo na sima, bazongaki na Silo, na molako epai ya Jozue.
9 Partiram, pois, percorreram a terra e fizeram a sua descrição em um livro, repartindo-a em sete porções, segundo as cidades. Depois voltaram para junto de Josué no acampamento de Silo.
10 Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.
10 Então Josué lançou-lhes a sorte diante do Senhor, e repartiu a terra entre os israelitas, segundo suas divisões.
11 Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi.
11 A sorte caiu primeiro sobre a tribo dos benjaminitas, segundo suas famílias, aos quais coube o território situado entre os juditas e os filhos de José.
12 Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni.
12 Sua fronteira, ao norte, partia do Jordão, subia atrás de Jericó, pelo norte e, indo pela montanha para o ocidente, terminava no deserto de Betaven.
13 Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.
13 Dali, passava ao meio-dia sobre a vertente de Luz, que é Betel; depois descia a Atarot-Adar, perto da montanha que está ao sul de Betoron inferior.
14 Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste.
14 Estendia-se em seguida e, dando volta ao lado ocidental para o sul, desde a montanha que está perto de Betoron, ao sul, terminava em Cariat-Baal, que é Cariatiarim, cidade dos juditas. Tal era a região ocidental.
15 Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa.
15 A região meridional partia da extremidade de Cariatiarim, estendia-se para o ocidente e terminava na fonte das águas de Neftoa.
16 Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli.
16 Descia depois à extremidade da montanha que está defronte ao vale do filho de Enom, no vale dos refains, ao norte. Descia em seguida pelo vale de Enom para a vertente meridional dos jebuseus e para En-Rogel,
17 Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi ; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.
17 estendendo-se ao norte até En-Semer; dali chegava até Gelilot, defronte da subida de Adomim, e descia até a pedra de Boen, filho de Rubem.
18 Elekaki na mopanzi ya ngambo ya nor, liboso ya Beti-Araba, mpe ekitaki kino na etando ya Araba.
18 Passava então pela vertente setentrional, em frente de Arabá, e descia a Arabá.
19 Mondelo yango elekelaki na mopanzi ya Beti-Ogila, na ngambo ya nor, mpe esukaki na eteni ya mabele oyo ekota na mayi ya ebale monene ya Barozo, na ngambo ya nor, na suka ya ngambo ya sude ya Yordani. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya sude.
19 Depois passava sobre a vertente setentrional de Bet-Hagla, e terminava no braço do mar Salgado que está ao norte, na extremidade meridional do Jordão. Tal era a fronteira do sul.
20 Ebale ya Yordani ekomaki mondelo na yango na ngambo ya este.
20 O Jordão constituía a fronteira oriental. Esta foi a parte dos benjaminitas, segundo suas famílias, e tais foram as suas fronteiras em toda a volta.
21 Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango :
21 As cidades da tribo dos benjaminitas, segundo suas famílias, foram: Jericó, Bet-Hagla, Emec-Casis,
22 Beti-Araba, Tsemarayimi, Beteli,
22 Bet-Arabá, Samaraim, Betel,
23 Avimi, Para, Ofira,
23 Avim, Afara, Ofera,
24 Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
24 Quefar-Emona, Ofni e Gabéia; doze cidades com suas aldeias.
25 Gabaoni, Rama, Beyeroti,
25 Gabaon, Rama, Berot,
26 Mitsipe, Kefira, Motsa,
26 Mesfé, Cafara, Amosa,
27 Rekemi, Yiripeyeli, Tareala,
27 Recém, Jarefel, Tarela,
28 Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
28 Sela, Elef, Jebus, que é Jerusalém, Gabaat e Cariat; quatorze cidades com suas aldeias. Esta foi a parte dos benjaminitas segundo suas famílias.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Josué 18, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.