Josué 10

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso ; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango.
1 Adoni-Zedeque, rei de Jerusalém , ouviu dizer que Josué havia tomado e destruído completamente a cidade de Ai e matado o seu rei. E ouviu dizer que o mesmo havia acontecido com Jericó e o seu rei. Também soube que os gibeonitas tinham feito um acordo de paz com os israelitas e que viviam entre eles.
2 Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
2 Os moradores de Jerusalém ficaram com muito medo, pois a cidade de Gibeão era tão grande como qualquer outra governada por um rei. E era maior ainda do que Ai, e os seus homens eram soldados corajosos.
3 Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
3 Então Adoni-Zedeque enviou mensageiros a Hoão, rei de Hebrom, e a Pirã, rei de Jarmute, e a Jafia, rei de Laquis, e a Debir, rei de Eglom, com a seguinte mensagem:
4 Alobaki : « Boya epai na ngai mpe bosunga ngai mpo ete tobundisa Gabaoni, pamba te asali boyokani ya kimia elongo na Jozue mpe bana ya Isalaele. »
4 — Venham me ajudar a atacar Gibeão porque o povo de lá fez um acordo de paz com Josué e com o povo de Israel.
5 Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.
5 E esses cinco reis amorreus — de Jerusalém, Hebrom, Jarmute, Laquis e Eglom — ajuntaram-se com todos os seus exércitos e cercaram e atacaram a cidade de Gibeão.
6 Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali : « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »
6 Os gibeonitas então mandaram dizer a Josué no acampamento de Gilgal: — Não abandone a gente! Venha depressa nos ajudar e salvar! Todos os reis amorreus que moram nas montanhas se ajuntaram contra nós!
7 Jozue amataki wuta na Giligali elongo na mampinga na ye nyonso mpe bilombe nyonso ya bitumba.
7 Então Josué e todo o seu exército partiram de Gilgal.
8 Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »
8 E o Senhor Deus lhe disse: — Não fique com medo desses reis, pois eu já lhe dei a vitória. Nenhum deles será capaz de resistir.
9 Sima na kotambola butu mobimba wuta na Giligali, Jozue abimelaki bango na pwasa.
9 Josué saiu de Gilgal e marchou a noite toda, subindo sempre. Ele atacou de surpresa.
10 Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
10 E o Senhor Deus fez com que os inimigos ficassem apavorados quando viram os exércitos de Israel. Assim os israelitas os derrotaram completamente em Gibeão e os perseguiram na descida de Bete-Horom, combatendo até Azeca e Maquedá.
11 Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.
11 E, enquanto eles fugiam dos israelitas, correndo na descida de Bete-Horom até Azeca, o Senhor jogou do céu grandes pedras de gelo sobre os inimigos, e eles foram mortos. E morreram mais pessoas com essa chuva de pedras do que no combate com os israelitas.
12 Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele :
12 No dia em que o Senhor deu a vitória aos israelitas na luta contra os amorreus, Josué falou com ele. E, na presença dos israelitas, disse: “Sol, fique parado sobre Gibeão! Lua, pare sobre o vale de Aijalom!”
13 Boye moyi etelemaki, mpe sanza eninganaki te kino tango ekolo ya Isalaele alongaki banguna na ye kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo.
13 O sol ficou parado, e a lua também parou, até que o povo se vingou dos seus inimigos. Estas palavras estão escritas no O sol ficou parado no meio do céu e atrasou a sua descida por quase um dia inteiro.
14 Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele.
14 Nunca tinha havido e nunca mais houve um dia como este, um dia em que o Senhor obedeceu à voz de um homem. Isso aconteceu porque o Senhor combatia a favor de Israel.
15 Jozue elongo na Isalaele mobimba bazongaki na molako na Giligali.
15 Depois disso Josué e o seu exército voltaram ao acampamento de Gilgal.
16 Nzokande, bakonzi wana mitano bakimaki mpe bakendeki kobombama kati na lidusu ya mabanga, na Makeda.
16 Os cinco reis escaparam e se esconderam na caverna de Maquedá,
17 Tango bayebisaki Jozue ete bamoni bakonzi yango mitano babombami kati na lidusu ya mabanga, na Makeda,
17 mas foram descobertos. E Josué ficou sabendo que estavam escondidos lá.
18 Jozue alobaki : « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango.
18 Então disse: — Rolem algumas pedras grandes até a entrada da caverna e ponham alguns guardas.
19 Kasi bosuka wana te. Bolanda banguna na bino mpe bokanga bango nzela mpo ete bakota na bingumba na bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino. »
19 Mas não fiquem lá. Persigam os inimigos e ataquem os que ficarem para trás. Não deixem que eles voltem para as suas cidades porque o Senhor , nosso Deus, já os entregou a vocês para serem mortos.
20 Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi.
20 Josué e os soldados de Israel os mataram até acabar com quase todos eles. Os que escaparam ficaram dentro das suas cidades protegidas por muralhas.
21 Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele.
21 Então todos os soldados de Israel voltaram sãos e salvos para o acampamento de Maquedá, onde Josué estava. E ninguém tinha coragem de dizer nada contra os israelitas.
22 Sima, Jozue alobaki : « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. »
22 Depois Josué disse: — Tirem as pedras da entrada da caverna e tragam aqui os cinco reis.
23 Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni.
23 E isso foi feito. Tiraram da caverna os reis de Jerusalém, Hebrom, Jarmute, Laquis e Eglom
24 Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.
24 e os levaram a Josué. Josué chamou os homens de Israel e ordenou aos oficiais do exército que tinham ido com ele: — Venham aqui e ponham os pés no pescoço destes reis. Eles fizeram isso.
25 Jozue alobaki na bango : « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »
25 Aí Josué disse: — Não tenham medo; não percam a coragem. Sejam fortes e corajosos porque o
26 Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa.
26 Então Josué matou os reis e os pendurou em cinco postes de madeira. E eles ficaram pendurados ali até o anoitecer.
27 Tango moyi elalaki, Jozue apesaki mitindo ete bakitisa bibembe yango wuta na banzete mpe babwaka yango kati na lidusu ya mabanga epai wapi babombamaki. Batiaki mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mabanga yango ezali wana kino na mokolo ya lelo.
27 Ao pôr do sol, Josué mandou que eles fossem tirados dos postes e jogados na caverna onde se haviam escondido. E puseram na entrada grandes pedras, que estão lá até hoje .
28 Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.
28 Nesse mesmo dia Josué atacou e tomou Maquedá. Matou o rei e todos os moradores da cidade; ninguém ficou vivo. Ele fez com o rei de Maquedá o mesmo que havia feito com o rei de Jericó.
29 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Makeda, bakendeki kino na engumba Libina mpe babundisaki yango.
29 Em seguida Josué e o seu exército foram de Maquedá até a cidade de Libna e atacaram.
30 Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko.
30 O Senhor Deus também deu aos israelitas a vitória sobre essa cidade e sobre o seu rei. Eles mataram todos os moradores e fizeram com o rei de Libna o mesmo que haviam feito com o rei de Jericó.
31 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Libina mpe bakendeki kino na Lakishi. Bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
31 Josué e o seu exército foram de Libna a Laquis. Eles cercaram e atacaram a cidade.
32 Yawe akabaki engumba Lakishi na maboko ya Isalaele, mpe Jozue abotolaki yango, mokolo oyo elandaki. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ndenge kaka asalaki engumba Libina.
32 No segundo dia de combate, o Senhor deu aos israelitas a vitória sobre a cidade de Laquis. E, como haviam feito em Libna, também em Laquis mataram todas as pessoas.
33 Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
33 Então Horã, rei de Gezer, saiu para ajudar Laquis. Porém Josué derrotou o rei de Gezer e o seu povo; não deixou ninguém vivo.
34 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Lakishi mpe bakendeki kino na engumba Egiloni ; bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
34 Depois Josué e o seu exército foram de Laquis até Eglom. Eles cercaram e atacaram a cidade
35 Babotolaki yango kaka na mokolo wana mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna ; babebisaki bango mokolo wana, ndenge kaka basalaki na Lakishi.
35 e a tomaram no mesmo dia. E mataram todos, como haviam feito em Laquis.
36 Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango.
36 Aí Josué e o seu exército subiram de Eglom até a cidade de Hebrom. Atacaram
37 Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.
37 e tomaram a cidade de Hebrom. Mataram o rei e todos os moradores de Hebrom e das cidades vizinhas. Josué mandou que destruíssem completamente a cidade, como tinham feito com Eglom. Ninguém ficou vivo.
38 Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango.
38 Então Josué e o seu exército voltaram e atacaram Debir.
39 Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.
39 Tomaram a cidade, o seu rei e também todas as cidades vizinhas, matando todas as pessoas dali. Josué fez com Debir e com o seu rei o mesmo que havia feito com Hebrom e Libna e com os seus reis.
40 Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.
40 Assim Josué conquistou toda aquela terra. Derrotou os reis que moravam nas montanhas, na região sul, nas planícies e ao pé das montanhas. Ele não deixou ninguém vivo; todos foram mortos. Era isso o que o Senhor , o Deus de Israel, havia mandado.
41 Jozue alongaki bango wuta na Kadeshi-Barinea kino na Gaza, mpe mokili mobimba ya Gosheni kino na Gabaoni.
41 Josué os derrotou desde Cades-Barneia até Gaza e toda a região de Gosém até Gibeão.
42 Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.
42 O Senhor , o Deus de Israel, lutava pelo seu povo, e por isso Josué dominou todos esses reis e as suas terras numa só guerra.
43 Sima na yango, Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bazongaki na molako na Giligali.
43 Depois disso Josué e o seu exército voltaram para o acampamento de Gilgal.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Josué 10, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.