Jeremias 27

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :
1 Logo depois que Zedequias, filho de Josias, se tornou rei de Judá, o Senhor Deus me mandou
2 Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi : « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo.
2 fazer uma canga de madeira com tiras de couro e colocar no meu pescoço.
3 Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.
3 E Deus me disse que mandasse uma mensagem aos reis de Edom, Moabe, Amom, Tiro e Sidom, por meio dos seus embaixadores que tinham vindo a Jerusalém para se encontrar com o rei Zedequias.
4 Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‘ Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo :
4 O Senhor Todo-Poderoso, o Deus de Israel, me mandou dizer aos embaixadores que dessem aos seus reis a seguinte mensagem de Deus:
5 Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.
5 — Eu, com o meu grande poder e com a minha força, criei o mundo, os seres humanos e todos os animais que vivem na terra; e posso dá-los a quem eu quiser.
6 Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye.
6 Fui eu que dei todas estas nações ao meu servo , o rei Nabucodonosor, da Babilônia, e fiz com que até os animais selvagens trabalhassem para ele.
7 Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.
7 Todas as nações serão dominadas por ele, pelo seu filho e pelo seu neto, até chegar a hora em que a própria nação dele vai cair. Então a Babilônia será dominada por muitas nações e por poderosos reis.
8 Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye.
8 — Mas, se alguma nação ou reino não quiser servir ao rei da Babilônia, nem obedecer ao seu governo, então eu a castigarei com guerra, fome e doença. E no fim deixarei que Nabucodonosor acabe com aquela nação. Sou eu, o Senhor , quem está falando.
9 Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te.
9 Não deem atenção aos seus profetas nem a qualquer um que diga que pode adivinhar o futuro, seja por sonhos, por invocação dos espíritos dos mortos ou por feitiçaria. Todos eles dizem que vocês não devem se entregar ao rei da Babilônia.
10 Bazali kosakola makambo ya lokuta, kaka mpo na komema bino mosika ya mokili na bino. Ngai nakobengana bino solo mpe bokokufa.
10 Eles os estão enganando e farão com que vocês sejam expulsos da sua pátria, levados para longe e destruídos.
11 Kasi soki ekolo moko endimi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe endimi kosalela ye, nakotika ekolo yango na kimia kati na mokili na bango mpo ete basala bilanga mpe bawumela kuna, elobi Yawe. ’ › »
11 Mas a nação que obedecer ao governo do rei da Babilônia e o servir, eu deixarei que fique na sua própria terra, para cultivá-la e morar nela. Eu, o Senhor , falei.
12 Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika !
12 Eu disse a mesma coisa ao rei Zedequias, de Judá: — Entregue-se ao rei da Babilônia. Sirva a ele e ao seu povo, e o senhor viverá.
13 Mpo na nini bino elongo na bato na bino bokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ndenge Yawe akataki mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kosalela mokonzi ya Babiloni ?
13 Por que é que o senhor e o seu povo haveriam de morrer na guerra, ou de fome, ou de doença? Pois é isso que o Senhor Deus disse que acontecerá com qualquer nação que não servir ao rei da Babilônia.
14 Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino : ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te ! › Bazali kosakola makambo ya lokuta.
14 Não deem atenção aos profetas que dizem que vocês não devem servir ao rei da Babilônia. Eles estão enganando vocês.
15 Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »
15 O Senhor Deus mesmo disse que não enviou esses profetas e que eles estão mentindo em nome dele. O resultado será este: ele expulsará vocês, e vocês e os profetas que estão contando essas mentiras morrerão.
16 Bongo nalobaki na Banganga-Nzambe mpe na bato nyonso : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Boyoka te basakoli na bino, oyo bazali koloba : ‹ Tala, bisalelo ya Tempelo ya Yawe ekozonga noki wuta na Babiloni. › Bazali koloba na bino makambo ya lokuta !
16 Então eu contei aos sacerdotes e ao povo que o Senhor Deus tinha dito o seguinte: — Não deem atenção aos profetas que dizem que logo os tesouros do Templo serão trazidos de volta da Babilônia. É mentira!
17 Boyoka bango te ! Bosalela mokonzi ya Babiloni, bongo bokobika ! Mpo na nini engumba oyo ebebisama ?
17 Não os escutem! Sirvam ao rei da Babilônia e assim vocês viverão! Por que fazer com que esta cidade vire um montão de ruínas?
18 Soki bazali solo basakoli mpe Liloba na Yawe ezali kati na bango, tika ete basambela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete bisalelo oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi ekende na Babiloni te.
18 Se eles são realmente profetas e se têm a minha mensagem, então peçam a mim, o Senhor Todo-Poderoso, que não permita que os tesouros que foram deixados no Templo e no palácio real de Jerusalém sejam levados para a Babilônia.
19 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,
19 — ausente —
20 bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi ;
20 — ausente —
21 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi :
21 — Prestem atenção no que eu, o Senhor Todo-Poderoso, o Deus de Israel, estou dizendo a respeito dos tesouros que foram deixados no Templo e no palácio real de Jerusalém.
22 ‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › »
22 Esses tesouros serão levados para a Babilônia e ficarão ali até que eu volte a pensar neles. Então eu os trarei de volta e os devolverei a este lugar. Eu, o Senhor , falei.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Jeremias 27, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.