Gênesis 13

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs BKJ

Sair da comparação
1 Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo.
1 E Abrão saiu do Egito para o sul, ele, e sua esposa, e tudo que tinha, e Ló com ele.
2 Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo.
2 E Abrão era muito rico em gado, em prata e em ouro.
3 Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki
3 E ele foi em suas viagens do sul até Betel, até o lugar em que sua tenda havia estado no início, entre Betel e Ai,
4 mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe.
4 até o lugar do altar, que ele fizera ali no início. E ali Abrão invocou o nome do SENHOR.
5 Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali.
5 E Ló também, que foi com Abrão, tinha rebanhos, e gado, e tendas.
6 Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ;
6 E a terra não foi capaz de comportá-los, para que eles pudessem habitar juntos. Porque eram muitos os seus bens, de modo que não puderam habitar juntos.
7 mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.
7 E houve contenda entre os pastores do gado de Abrão e os pastores do gado de Ló, e os cananeus e os perizeus habitavam na terra nesse tempo.
8 Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.
8 E Abrão disse a Ló: Que não haja contenda, eu te suplico, entre mim e ti, e entre meus pastores e teus pastores, pois somos irmãos.
9 Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »
9 Não está a terra toda diante de ti? Suplico-te que te apartes de mim. Se tomares a esquerda, então eu irei para a direita. Se te apartares para a direita, então eu irei para a esquerda.
10 Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.
10 E Ló levantou os olhos, e viu toda a planície do Jordão, que era bem regada em todo lugar, antes do SENHOR ter destruído Sodoma e Gomorra, como o jardim do SENHOR, como a terra do Egito, quando se entra em Zoar.
11 Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki.
11 Então, Ló escolheu para si toda a planície do Jordão, e Ló viajou para o leste, e eles se apartaram um do outro.
12 Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome.
12 Abrão habitou na terra de Canaã, e Ló habitou nas cidades da planície, e armou sua tenda em direção a Sodoma.
13 Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.
13 Mas os homens de Sodoma eram extremamente perversos e pecadores diante do SENHOR.
14 Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste.
14 E o SENHOR disse a Abrão, depois que Ló se apartou dele: Eleva agora os teus olhos, e olha do lugar em que estás para o norte, e para o sul, e para o leste, e para o oeste.
15 Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela.
15 Porque toda a terra que tu vês, para sempre eu te darei, e à tua semente.
16 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.
16 E eu farei a tua semente como o pó da terra, de modo que se um homem puder contar o pó da terra, então também a tua semente será contada.
17 Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. »
17 Levanta-te, caminha pela terra no seu comprimento e na sua largura, pois a ti eu a darei.
18 Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.
18 Então Abrão removeu a sua tenda, e veio e habitou na planície de Manre, que é Hebrom, e ali edificou um altar ao SENHOR.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Gênesis 13, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.