Gálatas 5
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARIB
1 Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.
1 Para a liberdade Cristo nos libertou; permanecei, pois, firmes e não vos dobreis novamente a um jogo de escravidão.
2 Ngai Polo, nazali koloba na bino ete soki bokatisi ngenga, Klisto akozala lisusu na tina te epai na bino.
2 Eis que eu, Paulo, vos digo que, se vos deixardes circuncidar, Cristo de nada vos aproveitará.
3 Nazali koyebisa lisusu na moto nyonso oyo akatisi ye moko ngenga ete asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mobeko etindaka.
3 E de novo testifico a todo homem que se deixa circuncidar, que está obrigado a guardar toda a lei.
4 Bino oyo bolukaka kokoma sembo na nzela ya kotosa mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto, bozali lisusu na se ya ngolu ya Nzambe te.
4 Separados estais de Cristo, vós os que vos justificais pela lei; da graça decaístes.
5 Kasi biso, na lisungi ya Molimo, tozali kozela na elikya kokoma sembo na nzela ya kondima.
5 Nós, entretanto, pelo Espírito aguardamos a esperança da justiça que provém da fé.
6 Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
6 Porque em Cristo Jesus nem a circuncisão nem a incircuncisão vale coisa alguma; mas sim a fé que opera pelo amor.
7 Bozalaki kopota mbangu malamu ! Bongo nani apengwisi bino mpo ete botika kotosa bosolo ?
7 Corríeis bem; quem vos impediu de obedecer à verdade?
8 Likanisi ya boye ewuti te epai ya Ye oyo abengaki bino.
8 Esta persuasão não vem daquele que vos chama.
9 Mwa levire moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.
9 Um pouco de fermento leveda a massa toda.
10 Ngai nandimisami mpo na bino kati na Nkolo ete bokotikala kozala na makanisi mosusu te ; mpe ete moto oyo azali kotia mobulu kati na makanisi na bino akozwa etumbu, ezala ata nani.
10 Confio de vós, no Senhor, que de outro modo não haveis de pensar; mas aquele que vos perturba, seja quem for, sofrerá a condenação.
11 Bandeko na ngai, soki nazalaki nanu koteya tina ya kokatisa ngenga, mpo na nini nanyokolama lisusu ? Soki ezali bongo, mateya ya ekulusu elingaki lisusu kobetisa bato mabaku te.
11 Eu, porém, irmãos, se é que prego ainda a circuncisão, por que ainda sou perseguido? Nesse caso o escândalo da cruz estaria aniquilado.
12 Boye tika ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino bamilongola ata banzoto ya mibali !
12 Oxalá se mutilassem aqueles que vos andam inquietando.
13 Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
13 Porque vós, irmãos, fostes chamados à liberdade. Mas não useis da liberdade para dar ocasião à carne, antes pelo amor servi-vos uns aos outros.
14 Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
14 Pois toda a lei se cumpre numa só palavra, a saber: Amarás ao teu próximo como a ti mesmo.
15 Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.
15 Se vós, porém, vos mordeis e devorais uns aos outros, vede não vos consumais uns aos outros.
16 Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
16 Digo, porém: Andai pelo Espírito, e não haveis de cumprir a cobiça da carne.
17 Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.
17 Porque a carne luta contra o Espírito, e o Espírito contra a carne; e estes se opõem um ao outro, para que não façais o que quereis.
18 Kasi soki Molimo atambolisi bino, bokozala na se ya bokonzi ya Mobeko te.
18 Mas, se sois guiados pelo Espírito, não estais debaixo da lei.
19 Tala misala ya bomoto : kindumba, misala ya bosoto, pite,
19 Ora, as obras da carne são manifestas, as quais são: a prostituição, a impureza, a lascívia,
20 kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana,
20 a idolatria, a feitiçaria, as inimizades, as contendas, os ciúmes, as iras, as facções, as dissensões, os partidos,
21 likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso : bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
21 as invejas, as bebedices, as orgias, e coisas semelhantes a estas, contra as quais vos previno, como já antes vos preveni, que os que tais coisas praticam não herdarão o reino de Deus.
22 Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,
22 Mas o fruto do Espírito é: o amor, o gozo, a paz, a longanimidade, a benignidade, a bondade, a fidelidade.
23 boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.
23 a mansidão, o domínio próprio; contra estas coisas não há lei.
24 Bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto babaka na ekulusu bomoto na bango elongo na baposa mpe bilulela na yango.
24 E os que são de Cristo Jesus crucificaram a carne com as suas paixões e concupiscências.
25 Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.
25 Se vivemos pelo Espírito, andemos também pelo Espírito.
26 Tozala bato ya lolendo te, totumbolana te mpe toyokelana zuwa te.
26 Não nos tornemos vangloriosos, provocando-nos uns aos outros, invejando-nos uns aos outros.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Gálatas 5, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.