Filemom 1

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARIB

Sair da comparação
ARIB Almeida Revisada Imprensa Bíblica
1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso ;
1 Paulo, prisioneiro de Cristo Jesus, e o irmão Timóteo, ao amado Filemom, nosso companheiro de trabalho,
2 epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi ;
2 e à nossa irmã Áfia, e a Arquipo, nosso companheiro de lutas, e à igreja que está em tua casa:
3 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
3 Graças a vós, e paz da parte de Deus nosso Pai, e do Senhor Jesus Cristo.
4 Tango nyonso nasambelaka, natangaka kombo na yo mpe nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai,
4 Sempre dou graças ao meu Deus, lembrando-me de ti nas minhas orações,
5 pamba te nazali koyoka sango ya bolingo na yo mpo na basantu nyonso, mpe ya kondima na yo kati na Nkolo Yesu.
5 ao ouvir falar do amor e da fé que tens para com o Senhor Jesus e para com todos os santos;
6 Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto.
6 para que a comunicação da tua fé se torne eficaz, no pleno conhecimento de todo o bem que em nós há para com Cristo.
7 Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.
7 Pois tive grande gozo e consolação no teu amor, porque por ti, irmão, os corações dos santos têm sido reanimados.
8 Yango wana, atako, kati na Klisto, nazali na makoki ya kotinda yo kosala likambo songolo to pakala,
8 Pelo que, embora tenha em Cristo plena liberdade para te mandar o que convém,
9 kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto ;
9 todavia prefiro rogar-te por esse teu amor, sendo eu como sou, Paulo o velho, e agora até prisioneiro de Cristo Jesus,
10 nasepeli kosenga na yo na tina na Onezime oyo azali mwana na ngai kati na Klisto, pamba te nakomaki tata na ye ya molimo awa, kati na boloko.
10 sim, rogo-te por meu filho Onésimo, que gerei nas minhas prisões;
11 Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai.
11 o qual outrora te foi inútil, mas agora a ti e a mim é muito útil;
12 Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.
12 eu to torno a enviar, a ele que é o meu próprio coração.
13 Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.
13 Eu bem quisera retê-lo comigo, para que em teu lugar me servisse nas prisões do evangelho;
14 Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.
14 mas sem o teu consentimento nada quis fazer, para que o teu benefício não fosse como por força, mas, sim, espontâneo.
15 Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela,
15 Porque bem pode ser que ele se tenha separado de ti por algum tempo, para que o recobrasses para sempre,
16 lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.
16 não já como escravo, antes mais do que escravo, como irmão amado, particularmente de mim, e quanto mais de ti, tanto na carne como também no Senhor.
17 Soki ya solo ozwaka ngai lokola ndeko na yo kati na kondima, yamba ye lokola nde oyambi ngai.
17 Assim pois, se me tens por companheiro, recebe-o como a mim mesmo.
18 Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai.
18 E, se te fez algum dano, ou te deve alguma coisa, lança-o minha conta.
19 Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo.
19 Eu, Paulo, de meu próprio punho o escrevo, eu o pagarei, para não te dizer que ainda a ti mesmo a mim te deves.
20 Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana ; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto.
20 Sim, irmão, eu quisera regozijar-me de ti no Senhor; reanima o meu coração em Cristo.
21 Nakomeli yo na elikya ete okosala makambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala kutu koleka.
21 Escrevo-te confiado na tua obediência, sabendo que farás ainda mais do que peço.
22 Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.
22 E ao mesmo tempo, prepara-me também pousada, pois espero que pelas vossas orações hei de ser concedido.
23 Epafrasi, moninga na ngai ya boloko kati na Yesu-Klisto, atindeli yo mbote.
23 Saúda-te Epafras, meu companheiro de prisão em Cristo Jesus,
24 Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.
24 assim como Marcos, Aristarco, Demas e Lucas, meus cooperadores.
25 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo !
25 A graça do Senhor Jesus Cristo seja com o vosso espírito.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Filemom 1, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.