Ezequiel 8

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC

Sair da comparação
VC Versão Católica
1 Na mobu ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza ya motoba, wana nazalaki ya kovanda kati na ndako na ngai, mpe bakambi ya Yuda bavandaki liboso na ngai, loboko ya Nkolo Yawe esimbaki ngai kuna.
1 No sexto ano, no quinto dia do sexto mês, estava eu sentado em minha casa, com os anciãos de Judá, quando a mão do Senhor baixou sobre mim.
2 Tango natalaki, namonaki elilingi moko lokola elongi ya moto. Eteni oyo ezalaki komonana lokola se ya loketo na yango ezalaki lokola moto, mpe lolenge ya eteni oyo ezalaki komonana lokola likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga makasi lokola linzanza ya sika.
2 Olhei: enxerguei algo como uma silhueta humana. Abaixo do que parecia serem seus rins, era fogo e, desde os rins até o alto, havia um clarão vermelho.
3 Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.
3 Estendeu uma espécie de mão, e me agarrou pelos cachos dos cabelos. O espírito levantou-me entre o céu e a terra, e me levou a Jerusalém, em visões divinas, à entrada da porta interior que olha para o norte, lá onde se erige o ídolo que provoca o ciúme {do Senhor}.
4 Nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki kuna ndenge kaka namonaki yango na emoniseli kati na lubwaku.
4 Lá se me manifestou a glória do Deus de Israel, tal como a visão que tive no vale.
5 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na ngambo ya nor. »
5 E ele me disse: filho do homem, ergue os olhos para o norte. Levantei os olhos para o norte, e vi ao norte da porta do altar, à entrada, o ídolo que provoca o ciúme {do Senhor}.
6 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ozali komona makambo oyo bazali kosala, makambo mabe mpe ya nkele oyo libota ya Isalaele bazali kosala awa, makambo oyo ekokomisa Ngai mosika ya Esika na Ngai ya bule ? Kasi okomona lisusu makambo oyo ezali mabe koleka. »
6 Filho do homem, disse-me, vês tu a abominação que praticam, como eles procedem na casa de Israel, para que eu me afaste do meu santuário? Verás, todavia, coisas muito mais graves.
7 Amemaki ngai na ekotelo ya lopango. Tango natalaki, namonaki lidusu moko na mir.
7 Conduziu-me até a entrada do adro e, reparando, vi que havia um rombo no muro.
8 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, tobola mir. »
8 Filho do homem, disse-me ele, fura a muralha. Quando a furei, divisei uma porta.
9 Alobaki na ngai lisusu : « Kota ; okomona makambo mabe mpe ya nkele oyo bazali kosala awa ! »
9 Aproxima-te, diz ele, e contempla as horríveis abominações a que se entregam aqui.
10 Tango nakotaki, natalaki mpe namonaki ete bakomakoma na bamir bililingi ya miselekete mpe ya banyoka ya lolenge nyonso, ya banyama nyonso ya mbindo mpe ya banzambe nyonso ya bikeko ya libota ya Isalaele.
10 Fui até ali para olhar: enxerguei aí toda espécie de imagens de répteis e de animais imundos e, pintados em volta da parede, todos os ídolos da casa de Israel.
11 Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki ; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi : ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango.
11 Setenta anciãos da casa de Israel, entre os quais Jazanias, filho de Safã, se achavam de pé diante deles, segurando cada qual o seu turíbulo, do qual se elevava espessa nuvem de fumaça.
12 Molimo alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko ? Bazali koloba : ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili ! › »
12 Filho do homem, disse-me ele, vês tu o que fazem os anciãos de Israel na obscuridade, cada um deles em sua câmara, guarnecida de ídolos, pensando que o Senhor não os vê, e que ele abandonou a terra?
13 Alobaki lisusu : « Okomona bango ndenge bazali kosala makambo ya mbindo oyo eleki penza mabe. »
13 E ajuntou: Verás ainda abominações mais graves que eles estão cometendo.
14 Bongo amemaki ngai lisusu na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya nor ya Tempelo ya Yawe ; bongo namonaki basi bavandi wana, bazali kolela Tamuzi.
14 Conduziu-me, então, para a entrada da porta setentrional da casa do Senhor: mulheres estavam assentadas, chorando Tamuz.
15 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo ? Okomona lisusu makambo ya mbindo koleka oyo ya liboso. »
15 Filho do homem, falou-me, tu viste? Verás ainda abominações piores do que estas.
16 Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.
16 Levou-me então ao interior do templo. À entrada do santuário do Senhor, entre o vestíbulo e o altar, avistei cerca de vinte e cinco homens, que, de costas para o santuário do Senhor, com a face voltada para o oriente, se prosternavam diante do sol.
17 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, omoni ? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo ? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai ? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo !
17 Filho do homem, disse-me ele, vês isto? Não basta à casa de Judá entregar-se a esses ritos abomináveis que aqui se praticam? Haverá ainda ela de encher a terra de violência, e não cessará de me irritar? Ei-los que trazem o ramo ao nariz.
18 Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »
18 Está bem! Eu, de minha parte, procederei com furor, não terei condescendência, serei impiedoso. Inutilmente clamarão a meus ouvidos, não os ouvirei.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 8, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.