Ezequiel 47
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC
1 Moto yango azongisaki ngai pene ya ekotelo ya Tempelo epai wapi namonaki mayi kobima longwa na ekotelo na yango : ezalaki kotiola na ngambo ya este, pamba te Tempelo ezalaki etala na ngambo ya este ; mayi ezalaki kokita na se ya ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude ya etumbelo.
1 Conduziu-me então à entrada do templo. Eis que águas jorravam de sob o limiar do edifício, em direção ao oriente {porque a fachada do templo olhava para o oriente}. Essa água escorria por baixo do lado direito do templo, ao sul do altar.
2 Bongo abimisaki ngai na nzela ya ekuke ya nor, amemaki ngai mpe atambolisaki ngai zingazinga ya lopango ya libanda kino na ekuke ya libanda oyo etala na ngambo ya este. Mpe namonaki ete mayi yango ezali kotiola wuta na ngambo ya sude.
2 Fez-me sair pela porta do norte e contornar o templo do lado de fora até o pórtico exterior oriental; eu vi a água brotar do lado sul.
3 Moto yango akendeki na ngambo ya este mpe asimbaki singa oyo bamekelaka molayi na loboko na ye ; amekaki molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na bisika oyo matambe esukela.
3 O homem foi para o oriente com uma corda na mão: mediu mil côvados; a seguir fez-me passar na água, que me chegou até os tornozelos. Mediu ainda mil côvados e me fez atravessar a água, que me subiu até os joelhos.
4 Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na mabolongo. Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango asukelaki ngai na loketo.
4 Mediu de novo mil côvados e fez-me atravessar a água, que me subiu até os quadris.
5 Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano ; kasi na mbala oyo, mayi yango ekomaki ebale moko ya monene oyo nazalaki lisusu ata na makoki ya kokatisa te, pamba te mayi emataki makasi mpe ekomaki mozindo koleka.
5 Mediu, enfim, mil côvados; e era uma torrente que eu não podia atravessar, de tal modo as águas tinham crescido! E era preciso nadar, era um curso de água que não se podia passar {a vau}.
6 Moto yango atunaki ngai : « Mwana na moto, boni, omoni ? »
6 Viste, filho do homem? - falou-me, e me levou ao outro lado da torrente.
7 Tango nakomaki kuna, namonaki banzete ebele penza, na bangambo nyonso mibale ya ebale.
7 Ora, retornando, avistei nas duas margens da torrente uma grande quantidade de árvores.
8 Moto yango alobaki na ngai : « Mayi oyo ezali kotiola na ngambo ya este ya etuka mpe ezali kokita kino na etando ya Araba epai wapi ezali komibwaka na ebale monene. Tango kaka ekotaki na mayi ya ebale monene, mayi ya ebale monene ekomaki peto.
8 Essas águas, disse-me ele, dirigem-se para a parte oriental, elas descem à planície do Jordão; elas se lançarão no mar, de sorte que suas águas se tornarão mais saudáveis.
9 Bipai nyonso mayi yango ezalaki koleka, bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kobotana, bambisi mpe ezalaki kobotana ebele ; pamba te mayi yango ezalaki kokoma kuna mpe kopetola mayi ya ebale monene. Bongo na esika nyonso oyo mayi yango ezalaki koleka, nyonso ezalaki kozwa bomoi.
9 Em toda parte aonde chegar a corrente, todo animal que se move na água poderá viver, e haverá lá grande quantidade de peixes. Tudo o que essa água atingir se tornará são e saudável e em toda parte aonde chegar a torrente haverá vida.
10 Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.
10 Na praia desse mar estarão pescadores; eles estenderão suas redes desde Engadi até Engalim, e haverá aí peixes de toda espécie em abundância, como no grande mar.
11 Kasi mayi oyo etikalaka tango ebale monene etondaka mpe mayi ya bisanga ekokoma peto te, ekotikala kaka bongo mpe ekotonda na mungwa kati na yango.
11 Mas seus mangues e charcos não serão saneados, abandonados que estão ao sal.
12 Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika ; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. »
12 Ao longo da torrente, em cada uma de suas margens, crescerão árvores frutíferas de toda espécie, e sua folhagem não murchará, e não cessarão jamais de dar frutos: todos os meses frutos novos, porque essas águas vêm do santuário. Seus frutos serão comestíveis e suas folhas servirão de remédio.
13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.
13 Eis o que diz o Senhor Javé: eis os limites da terra que partilhareis entre as doze tribos de Israel. José terá duas partes.
14 Bokozwa yango ndenge moko lokola libula, na biteni ekokana ; pamba te nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya bakoko na bino, mpe ekokoma libula na bino.
14 Cada um dentre vós herdará uma parte igual, porque jurei com a mão erguida dar essa terra a vossos pais; por isso, essa terra deve tocar-vos em partilha.
15 Tala bandelo ya mokili yango :
15 Eis os seus limites: ao norte, desde o Grande Mar, o caminho de Hetalon até Sedad:
16 Amati, Berota, Sibirayimi oyo ezalaka na kati-kati ya mondelo ya Damasi mpe Amati, kino na Atseri-Atikone oyo ezali na mondelo ya Avirani.
16 Hamat, Berota e Sabarim, entre a fronteira de Damasco e de Hamat, Hatzer-Tichon até a fronteira de Haurã.
17 Boye, na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene Mediterane kino na Atsari-Enani mpe ekolekela na mondelo ya nor ya Damasi mpe ya Amati.
17 A fronteira irá então do mar até Hatzer-Enon, tendo a fronteira de Damasco ao norte, e a de Hamat. Isto ao norte.
18 Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari.
18 A leste, entre Haurã e Damasco e entre Galaad e a terra de Israel, o Jordão servirá de limite desde a fronteira norte até o mar oriental e para o lado de Tamar. Isto ao leste.
19 Na ngambo ya sude, mondelo yango ekobanda longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi, ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane.
19 A costa sul irá, para o oriente, desde Tamar até as águas de Meriba de Gades e até a torrente para o Grande Mar. Isto para o lado lado meridional.
20 Na ngambo ya weste, ebale monene Mediterane ekozala mondelo. Mondelo yango ekobanda longwa na mondelo ya sude ya ebale monene Mediterane kino na esika oyo etalana na Lebo-Amati.
20 A oeste, o Grande Mar, desde a fronteira até a frente da entrada de Hamat. Isto ao oeste.
21 Bokokabola mokili yango kati na bino kolanda mabota ya Isalaele.
21 Partilhareis esta terra entre vós, segundo as tribos de Israel.
22 Bokobeta zeke mpo na kokabola yango lokola libula mpo na bino mpe bapaya oyo bavandaka kati na bino mpe babota bana kati na bino. Bokokamata bango lokola bana mboka ya Isalaele. Bango mpe bakobeta zeke mpo na kozwa libula elongo na bino kati na mabota ya Isalaele.
22 Vós as distribuireis por sorte a vós e aos estrangeiros residentes entre vós e que têm lançado raiz entre vós. Vós os considerareis como indígenas entre os israelitas: receberão convosco seu lote entre as tribos de Israel.
23 Boye ezali kati na libota nyonso oyo mopaya akovanda nde bokopesa ye libula na ye, » elobi Nkolo Yawe.
23 É na tribo onde ele estiver instalado que lhe assinalareis o seu lote ao estrangeiro - oráculo do Senhor Javé.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 47, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.