Ezequiel 40
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARIB
1 Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, sima na biso kokokisa mibu tuku mibale na mitano wuta tango tokendeki na bowumbu, na ebandeli ya mobu, ezalaki mobu ya zomi na minei sima na kobebisama ya engumba Yelusalemi, kaka na mokolo wana, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe amemaki ngai kuna.
1 No ano vinte e cinco do nosso cativeiro, no princípio do ano, no décimo dia do mês, no ano catorze depois que a cidade foi conquistada, naquele mesmo dia veio sobre mim a mão do Senhor,
2 Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi ; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.
2 e em visões de Deus me levou à terra de Israel, e me pôs sobre um monte muito alto, sobre o qual havia como que um edifício de cidade para a banda do sul.
3 Tango amemaki ngai kuna, namonaki moto moko oyo lolenge na ye ezalaki lokola ebende ya bronze : atelemaki na ekuke ya engumba mpe asimbaki na loboko na ye singa moko ya lino mpe libaya oyo bamekelaka molayi.
3 Levou-me, pois, para lá; e eis um homem cuja aparência era como a do bronze, tendo na mão um cordel de linho e uma cana de medir; e ele estava em pé na porta.
4 Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »
4 E disse-me o homem: Filho do homem, vê com os teus olhos, e ouve com os teus ouvidos, e põe no teu coração tudo quanto eu te fizer ver; porque, para to mostrar foste tu aqui trazido. Anuncia pois à casa de Israel tudo quanto vires.
5 Tala makambo oyo namonaki : mir moko ezingelaki lopango mobimba ya Tempelo. Kati na loboko ya moto yango, ezalaki na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene misato na molayi. Tango amekaki yango, amonaki ete monene na yango mpe bosanda na yango ezalaki ya kokokana, ezalaki na bametele pene misato.
5 E havia um muro ao redor da casa do lado de fora, e na mão do homem uma cana de medir de seis côvados de comprimento, tendo cada côvado um palmo a mais; e ele mediu a largura do edifício, era uma cana; e a altura, uma cana.
6 Akendeki na ekuke oyo etala na ngambo ya este, amataki na bibutelo na yango mpe amekaki molayi ya ekotelo ya ekuke : mokuse mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene misato.
6 Então veio à porta que olhava para o oriente, e subiu pelos seus degraus; mediu o limiar da porta, era uma cana de largo, e o outro limiar, uma cana de largo.
7 Longwa na ekotelo kino na Tempelo, ezalaki na bandako mike ya bakengeli : misato na ngambo ya loboko ya mwasi mpe misato na ngambo ya loboko ya mobali ; molayi na yango mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene misato. Molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli mpe ndako mosusu ezalaki na bametele pene misato. Longwa na ekotelo ya ekuke oyo elandaki kino na ndako moke ya kokotela oyo etalana na Tempelo, ezalaki na bametele pene misato.
7 E cada câmara tinha uma cana de comprido, e uma cana de largo; e o espaço entre as câmaras era de cinco côvados; e o limiar da porta, ao pé do vestíbulo da porta, em direção da casa, tinha uma cana.
8 Amekaki molayi ya ndako moke ya kokotela na ekuke na libaya oyo bamekelaka molayi :
8 Também mediu o vestíbulo da porta em direção da casa, uma cana.
9 ezalaki na bametele pene minei. Makonzi na yango ezalaki pene na metele moko na monene ; ndako moke ya kokotela ezalaki etala na ngambo ya Tempelo.
9 Então mediu o vestíbulo da porta, e tinha oito côvados; e os seus pilares, dois côvados; e o vestíbulo da porta olha para a casa.
10 Ezalaki na bandako mike misato ya bakengeli, ngambo na ngambo, na ngambo ya ekuke ya este ; bandako mike nyonso misato ezalaki ekokana, mpe molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli na ndako mosusu, ngambo na ngambo, ezalaki mpe ekokana.
10 E as câmaras da porta para o lado do oriente eram três dum lado, e três do outro; a mesma medida era a das três; também os umbrais dum lado e do outro tinham a mesma medida.
11 Amekaki molayi ya ekuke : mokuse na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene motoba na basantimetele tuku mitano.
11 Mediu mais a largura da entrada da porta, que era de dez côvados; e o comprimento da porta, treze côvados.
12 Liboso ya ndako moko na moko ya bakengeli, na bangambo nyonso mibale, ezalaki na mwa mir moko oyo ezalaki na bosanda ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ngambo moko na moko ya bandako nyonso ya bakengeli ezalaki na bametele pene misato.
12 E a margem em frente das câmaras dum lado era de um côvado, e de um côvado a margem do outro lado; e cada câmara tinha seis côvados de um lado, e seis côvados do outro.
13 Amekaki molayi ya ekuke, longwa na suka ya mir ya sima ya ndako moko ya bakengeli kino na suka ya mir ya sima ya ndako ya bakengeli mosusu oyo etalana na yango, molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano, longwa na suka moko kino na suka mosusu.
13 Então mediu a porta desde o telhado de uma câmara até o telhado da outra, era vinte e cinco côvados de largo, estando porta defronte de porta.
14 Amekaki lisusu molayi ya bandako mike nyonso misato ya bakengeli elongo na molayi oyo ezalaki kokabola ndako moko ya moke mpe ndako mosusu : nyonso esalaki bametele pene zomi na mitano, longola veranda na yango.
14 Mediu também o vestíbulo, vinte côvados; e em torno do vestíbulo da porta estava o átrio.
15 Longwa na ebandeli ya ekuke kino na suka ya ndako moke ya kokotela, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano.
15 E, desde a dianteira da porta da entrada até a dianteira do vestíbulo da porta interior, havia cinqüenta côvados.
16 Bandako mike ya bakengeli elongo na makonzi na yango ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Na likonzi moko na moko, basalaki bililingi ya banzete ya mbila.
16 Havia também janelas de fechar nas câmaras e nos seus umbrais, dentro da porta ao redor, e da mesma sorte nos vestíbulos; e as janelas estavam à roda pela parte de dentro; e nos umbrais havia palmeiras.
17 Amemaki ngai lisusu kati na lopango ya libanda. Kuna, namonaki bashambre mpe mabanga moko babongisa malamu penza, na mabele ya lopango mobimba ; na likolo ya mabanga oyo babongisa malamu, ezalaki na bashambre tuku misato.
17 Então ele me levou ao átrio exterior; e eis que havia câmaras e um pavimento feitos para o átrio em redor; trinta câmaras havia naquele pavimento.
18 Mabanga yango ezalaki suka na suka ya bikuke, mpe molayi na yango ezalaki ekokana na molayi ya bikuke.
18 E o pavimento, isto é, o pavimento inferior, corria junto às portas segundo o comprimento das portas.
19 Amekaki molayi ya liboso ya ekuke ya se kino na liboso ya ekuke ya lopango ya kati : ezalaki na bametele pene tuku mitano na ngambo ya este.
19 A seguir ele mediu a largura desde a dianteira da porta inferior até a dianteira do átrio interior, por fora, cem côvados, tanto do oriente como do norte.
20 Bongo na ngambo ya nor, amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke oyo etala na ngambo ya nor, ekuke oyo ememaka kino na lopango ya libanda.
20 E, quanto à porta que olhava para o norte, no átrio exterior, ele mediu o seu comprimento e a sua largura.
21 Ezalaki na bandako na yango ya mike ya bakengeli : misato na ngambo moko mpe misato na ngambo mosusu. Makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na ekuke ya liboso, na molayi mpe na mokuse : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
21 As suas câmaras eram três dum lado, e três do outro; e os seus umbrais e os seus vestíbulos eram da medida da primeira porta: de cinqüenta côvados era o seu comprimento, e a largura de vinte e cinco côvados.
22 Maninisa na yango, ndako na yango ya moke ya kokotela mpe bililingi na yango ya banzete ya mbila ezalaki ndenge moko na oyo ya ekuke ya ngambo ya este, na molayi mpe na mokuse. Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo ezalaki etalana na ndako moke ya kokotela.
22 As suas janelas, e o seu vestíbulo, e as suas palmeiras eram da medida da porta que olhava para o oriente; e subia-se para ela por sete degraus; e o seu vestíbulo estava diante dela.
23 Ezalaki mpe lisusu na ekuke moko kati na lopango oyo ezalaki etalana na ekuke ya ngambo ya nor, ndenge kaka ezalaki na ngambo ya este. Amekaki molayi, longwa na ekuke ya liboso kino na ekuke oyo ezalaki etalana na yango : ezalaki na bametele pene tuku mitano.
23 Havia uma porta do átrio interior defronte da outra porta tanto do norte como do oriente; e mediu de porta a porta cem côvados.
24 Amemaki ngai lisusu na ngambo ya sude, mpe namonaki ekuke moko oyo etala na ngambo ya sude ; amekaki molayi ya makonzi mpe ya ndako na yango ya moke ya kokotela : ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe mokuse.
24 Então ele me levou ao caminho do sul; e eis que havia ali uma porta que olhava para o sul; e mediu os seus umbrais e o seu vestíbulo conforme estas medidas.
25 Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda lokola maninisa ya bikuke mosusu : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
25 E havia também janelas em redor do seu vestíbulo, como as outras janelas; cinqüenta côvados era o comprimento, e a largura vinte e cinco côvados.
26 Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo etalana na ndako moke ya kokotela. Bililingi ya nzete ya mbila ezalaki na makonzi na yango na bangambo nyonso.
26 Subia-se a ela por sete degraus, e o seu vestíbulo era diante deles; e tinha palmeiras, uma de uma banda e outra da outra, nos seus umbrais.
27 Lopango ya kati ezalaki na ekuke moko etala na ngambo ya sude. Boye, amekaki molayi na yango, longwa na ekuke wana kino na ekuke ya libanda na ngambo ya sude : ezalaki bametele pene tuku mitano.
27 Também havia uma porta para o átrio interior que olha para o sul; e mediu de porta a porta, para o sul, cem côvados.
28 Amemaki ngai na kati ya lopango ya kati, na nzela ya ekuke ya sude ; amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke ya ngambo ya sude : ezalaki ndenge moko kaka na bikuke mosusu.
28 Então me levou ao átrio interior pela porta do sul; e mediu a porta do sul conforme estas medidas.
29 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe bandako na yango ya mike ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
29 E as suas câmaras, e os seus umbrais, e o seu vestíbulo eram conforme estas medidas; e nele havia janelas e no seu vestíbulo ao redor; o comprimento era de cinqüenta côvados, e a largura de vinte e cinco côvados.
30 Bandako moke ya kokotela ya bikuke, zingazinga ya lopango, ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
30 Havia um vestíbulo em redor; o comprimento era de vinte e cinco côvados e a largura de cinco côvados.
31 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda. Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
31 O seu vestíbulo olhava para o átrio exterior; e havia palmeiras nos seus umbrais; e subia-se a ele por oito degraus.
32 Amemaki ngai lisusu na lopango ya kati, na ngambo ya este, mpe amekaki molayi ya ekuke na yango : ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse.
32 Depois me levou ao átrio interior, que olha para o oriente; e mediu a porta conforme estas medidas;
33 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
33 e também as suas câmaras, e os seus umbrais, e o seu vestíbulo, conforme estas medidas; também nele havia janelas e no seu vestíbulo ao redor; o comprimento era de cinqüenta côvados, e a largura era de vinte e cinco côvados.
34 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda na yango ; ezalaki na bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango, na bangambo nyonso, mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
34 E o seu vestíbulo olhava para o átrio exterior; também havia palmeiras nos seus umbrais de uma e de outra banda; e subia-se a ele por oito degraus.
35 Amemaki ngai na ekuke ya ngambo ya nor mpe amekaki molayi na yango : ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse.
35 Então me levou à porta do norte; e mediu-a conforme estas medidas.
36 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki mpe na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
36 As suas câmaras, os seus umbrais, e o seu vestíbulo; também tinha janelas em redor; o comprimento era de cinqüenta côvados, e a largura de vinte e cinco côvados.
37 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda ; batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
37 E os seus umbrais olhavam para o átrio exterior; também havia palmeiras nos seus umbrais de uma e de outra banda; e subia-se a ela por oito degraus.
38 Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba ; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke.
38 Havia uma câmara com a sua entrada junto aos umbrais perto das portas; aí se lavava o holocausto.
39 Kati na ndako moke ya kokotela na ekuke, ezalaki na bamesa mibale, ngambo na ngambo, epai wapi bazalaki kobomela banyama mpo na mbeka ya kotumba, mbeka ya masumu mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani.
39 E no vestíbulo da porta havia duas mesas de uma banda, e duas da outra, em que se haviam de imolar o holocausto e a oferta pelo pecado e a oferta pela culpa.
40 Pene ya mir ya libanda ya ndako moke ya kokotela na ekuke, pene ya ematelo ya ekotelo ya ekuke ya nor, ezalaki na bamesa minei na ngambo moko ya ematelo.
40 Também duma banda, do lado de fora, junto da subida para a entrada da porta que olha para o norte, havia duas mesas; e da outra banda do vestíbulo da porta, havia duas mesas.
41 Liboso ya ekuke, ezalaki na bamesa mwambe oyo bazalaki kobomela bambeka : minei na ngambo moko mpe minei na ngambo mosusu.
41 Havia quatro mesas de uma, e quatro mesas da outra banda, junto à porta; oito mesas, sobre as quais imolavam os sacrifícios.
42 Ezalaki na bamesa minei oyo basala na mabanga bakata mpo na bambeka ya kotumba ; bazalaki kosalela yango mpo na kotia bisalelo oyo babomelaka bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Bamesa yango nyonso ezalaki ndenge moko : na molayi, na mokuse mpe na bosanda ; molayi na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano, mokuse na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango ezalaki na basantimetele tuku mitano.
42 E havia para o holocausto quatro mesas de pedras lavradas, sendo o comprimento de um côvado e meio, a largura de um côvado e meio, e a altura de um côvado; e sobre elas se punham os instrumentos com que imolavam o holocausto e o sacrifício.
43 Batobolaki nzela moko ya basantimetele pene mwambe na zingazinga ya bamesa moko na moko ; bazalaki kotia misuni ya bambeka na likolo ya bamesa yango.
43 E ganchos, de um palmo de comprido, estavam fixos por dentro ao redor; e sobre as mesas estava a carne da oferta.
44 Na libanda ya ekuke ya kati, kati na lopango ya kati, ezalaki na bashambre mibale mpo na bayembi : moko ezalaki na ngambo ya ekuke ya nor, etalana na ngambo ya sude, mpe mosusu ezalaki na ngambo ya ekuke ya sude, etalana na ngambo ya nor.
44 Fora da porta interior estavam as câmaras para os cantores, no átrio interior, que estava ao lado da porta do norte; e elas olhavam para o sul; uma estava ao lado da porta do oriente, e olhava para o norte.
45 Moto yango alobaki na ngai : « Shambre oyo etala na ngambo ya sude ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na Tempelo ;
45 E ele me disse: Esta câmara que olha para o sul é para os sacerdotes que têm a guarda do templo.
46 mpe shambre oyo etala na ngambo ya nor ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala ya etumbelo. Kati na bakitani ya Levi, bana mibali ya Tsadoki kaka nde bakoki kokota na Tempelo mpo na kosala mosala liboso ya Yawe. »
46 Mas a câmara que olha para o norte é para os sacerdotes que têm a guarda do altar, a saber, os filhos de Zadoque, os quais dentre os filhos de Levi se chegam ao Senhor para o servirem.
47 Amekaki molayi ya lopango : ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe na mokuse. Etumbelo ezalaki liboso ya Tempelo.
47 E mediu o átrio; o comprimento era de cem côvados e a largura de cem côvados, um quadrado; e o altar estava diante do templo.
48 Amemaki ngai na ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe amekaki molayi ya makonzi na yango : ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na bangambo nyonso ; mokuse ya ekotelo ezalaki na bametele pene sambo, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo.
48 Então me levou ao vestíbulo do templo, e mediu cada umbral do vestíbulo, cinco côvados de um lado e cinco côvados do outro; e a largura da porta era de três côvados de um lado, e de três côvados do outro.
49 Ndako moke ya kokotela ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe motoba na mokuse. Bazalaki komata na ematelo ya bibutelo zomi mpo na kokota na ndako moke ya kokotela, na bangambo nyonso mibale. Batelemisaki likonzi moko na ngambo moko na moko ya ekotelo.
49 O comprimento do vestíbulo era de vinte côvados, e a largura de doze côvados; e era por dez degraus que se subia a ele; e havia colunas junto aos umbrais, uma de um lado e outra do outro.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 40, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.