Ezequiel 3

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVT

Sair da comparação
NVT Nova Versão Transformadora
1 Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. »
1 A voz me disse: “Filho do homem, coma o que lhe dou. Coma este rolo! Depois, vá e fale ao povo de Israel”.
2 Boye, nafungolaki monoko na ngai, mpe aleisaki ngai buku yango oyo elingama.
2 Então abri a boca, e ele me deu o rolo para eu comer.
3 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. »
3 “Filho do homem, encha seu estômago com ele”, disse a voz. Quando comi, o sabor era doce como mel em minha boca.
4 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, kende sik’oyo na libota ya Isalaele mpe yebisa bango maloba na Ngai.
4 Em seguida, ele disse: “Filho do homem, vá ao povo de Israel e transmita-lhe minhas mensagens.
5 Otindami te epai ya bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola, kasi epai ya bana ya Isalaele.
5 Não o envio a um povo estrangeiro, cuja língua você não entende, mas ao povo de Israel.
6 Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango.
6 Não, eu não o envio a um povo de língua estrangeira e difícil. Se o fizesse, eles lhe dariam ouvidos!
7 Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te ; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi.
7 O povo de Israel, porém, não lhe dará ouvidos, assim como não deu ouvidos a mim. Pois todos eles têm o coração duro e são teimosos.
8 Nakokomisa yo motema mpe moto makasi lokola bango.
8 Mas eu tornei você tão obstinado e inflexível quanto eles.
9 Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. »
9 Endureci sua testa como a pedra mais dura. Portanto, não tenha medo deles nem tema seus olhares raivosos, pois são um povo rebelde”.
10 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo.
10 Então ele acrescentou: “Filho do homem, primeiro deixe que minhas palavras entrem até o fundo de seu coração. Ouça-as com atenção.
11 Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »
11 Depois, vá a seu povo no exílio e diga-lhes: ‘Assim diz o S enhor Soberano!’. Faça isso quer eles ouçam quer não”.
12 Boye, Molimo atelemisaki ngai mpe nayokaki sima na ngai makelele moko ya makasi : « Tika ete nkembo ya Yawe epambolama wuta na esika oyo Ye avandaka ! »
12 Em seguida, o Espírito me pôs em pé, e eu ouvi uma estrondosa proclamação atrás de mim. (Que a glória do S enhor seja louvada em sua habitação!)
13 Nayokaki lisusu makelele ya mapapu ya bikelamu ya bomoi, tango ezalaki kotutana lipapu moko na mosusu, makelele ya bapine mpe lokito moko ya makasi.
13 Era o som das asas dos seres vivos que tocavam umas nas outras e o barulho das rodas debaixo deles.
14 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.
14 O Espírito me levantou e me tirou de lá. Saí amargurado e agitado, mas a mão do S enhor era forte sobre mim.
15 Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi.
15 Cheguei à colônia dos exilados judeus em Tel-Abibe, junto ao rio Quebar. Estava atônito e permaneci no meio deles durante sete dias.
16 Sima na mikolo sambo, Yawe alobaki na ngai :
16 Depois de sete dias, o S enhor me deu uma mensagem:
17 « Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele ; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai.
17 “Filho do homem, eu o nomeei vigia de Israel. Sempre que receber uma mensagem minha, advirta o povo.
18 Soki Ngai nalobi na moto mabe : ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
18 Se eu avisar os perversos: ‘Vocês estão condenados à morte’, mas você não lhes transmitir a advertência, para que mudem sua conduta perversa e salvem a vida, eles morrerão em seus pecados. E eu o considerarei responsável pela morte deles.
19 Kasi soki, yo, okebisi moto wana ya mabe, mpe atiki mabe na ye te to abongwani na nzela na ye ya mabe te, akokufa solo na masumu na ye, mpe yo okobikisa bomoi na yo.
19 Se você os advertir, mas eles não quiserem se arrepender e continuarem a pecar, eles morrerão em seus pecados. Você, porém, salvará sua vida.
20 Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
20 “Se os justos se desviarem de sua conduta justa e não prestarem atenção aos obstáculos que eu puser em seu caminho, eles morrerão. E, se você não os advertir, eles morrerão em seus pecados. Nenhum dos atos de justiça deles será lembrado, e eu o considerarei responsável pela morte deles.
21 Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. »
21 Mas, se você advertir os justos a não pecarem e eles lhe derem ouvidos e não pecarem, eles viverão. E você também salvará sua vida”.
22 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai : « Telema mpe kende na lubwaku ; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. »
22 A mão do S enhor veio sobre mim, e ele disse: “Levante-se e vá até o vale, e eu lhe falarei ali”.
23 Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna : ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele.
23 Levantei-me, fui até o vale e ali vi a glória do S enhor , como na primeira visão junto ao rio Quebar, e prostrei-me com o rosto no chão.
24 Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai : « Kende komikangela kati na ndako na yo.
24 Então o Espírito entrou em mim e me pôs em pé. “Vá para sua casa e tranque-se dentro dela”, disse ele.
25 Yo, mwana na moto, bakokanga yo basinga, bakolinga-linga yo mpo ete okoka te kobima kati na bato.
25 “Ali, filho do homem, você será amarrado com cordas e não poderá sair para o meio do povo.
26 Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki.
26 Farei sua língua se prender ao céu da boca, para que fique mudo e não possa repreendê-los, pois são rebeldes.
27 Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. »
27 Mas, quando eu lhe der uma mensagem, desprenderei sua língua e deixarei que fale. Então você lhes dirá: ‘Assim diz o S enhor Soberano!’. Quem escolher ouvir, ouvirá, mas quem se recusar, não ouvirá, pois são um povo rebelde.”

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 3, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.