Ezequiel 37

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVT

Sair da comparação
NVT Nova Versão Transformadora
1 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai ; bongo Yawe abimisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye mpe amemaki ngai kino na kati-kati ya lubwaku moko etonda na mikuwa.
1 A mão do S enhor veio sobre mim, e o Espírito do S enhor me levou a um vale cheio de ossos.
2 Atambolisaki ngai na bangambo nyonso kati na mikuwa yango : namonaki ete ezali ebele penza mpe ekawuka, kati na lubwaku yango.
2 Ele me conduziu por entre os ossos que cobriam o fundo do vale, espalhados por toda parte e completamente secos.
3 Atunaki ngai :
3 Então ele me perguntou: “Filho do homem, acaso estes ossos podem voltar a viver?”. Respondi: “Ó S
4 Bongo alobaki na ngai :
4 Então ele me disse: “Profetize a estes ossos e diga: ‘Ossos secos, ouçam a palavra do S enhor !
5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotia pema kati na bino mpe bokozwa lisusu bomoi.
5 Assim diz o S enhor Soberano: Soprarei meu espírito e os trarei de volta à vida!
6 Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
6 Porei carne e músculo em vocês e os cobrirei com pele. Darei fôlego a vocês, e voltarão à vida. Então saberão que eu sou o S enhor ’”.
7 Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki ; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu.
7 Assim, anunciei essa mensagem, como ele me havia ordenado. De repente, enquanto eu profetizava, ouviu-se em todo o vale o barulho de ossos batendo uns contra os outros, e os ossos de cada corpo estavam se juntando.
8 Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te.
8 Então, enquanto eu observava, músculos e carne se formaram sobre os ossos. Em seguida, pele se formou para cobrir os corpos, mas ainda não respiravam.
9 Yawe alobaki na ngai :
9 Então ele me disse: “Filho do homem, profetize aos ventos. Anuncie-lhes uma mensagem e diga: ‘Assim diz o S enhor Soberano: Ó fôlego, venha dos quatro ventos! Sopre nesses corpos mortos para que voltem a viver!’”.
10 Nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai ; bongo pema ekotaki kati na yango mpe ezwaki lisusu bomoi. Batelemaki mpe bazalaki mampinga moko ya monene.
10 Anunciei a mensagem, como ele me havia ordenado, e o espírito entrou nos corpos. Todos eles voltaram à vida e se levantaram, e formavam um grande exército.
11 Alobaki na ngai :
11 Então ele me disse: “Filho do homem, esses ossos representam todo o povo de Israel. Eles dizem: ‘Tornamo-nos ossos velhos e secos; não há mais esperança. Nossa nação acabou’.
12 Yango wana, sakola mpe loba na bango : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bato na Ngai, nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna, bongo nakozongisa bino na mabele ya Isalaele.
12 Portanto, profetize para eles e diga: ‘Assim diz o S enhor Soberano: Ó meu povo, eu abrirei as sepulturas do exílio e os farei sair delas. Então os trarei de volta à terra de Israel.
13 Mpe bino, bato na Ngai, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna !
13 Quando isso acontecer, meu povo, vocês saberão que eu sou o S enhor .
14 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino, mpe bokozwa lisusu bomoi ; bongo nakovandisa bino na mabele na bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe nde nalobaki mpe nakokisaki yango, elobi Yawe. »
14 Soprarei meu espírito em vocês, e voltarão a viver, e eu os trarei de volta para sua terra. Então saberão que eu, o S enhor , falei e cumpri o que prometi. Sim, eu, o S enhor , falei!’”.
15 Yawe alobaki na ngai :
15 Recebi outra mensagem do S enhor :
16 « Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. ›
16 “Filho do homem, pegue um pedaço de madeira e grave nele estas palavras: ‘Isto representa Judá e suas tribos aliadas’. Depois, pegue outro pedaço de madeira e grave nele estas palavras: ‘Isto representa Efraim e as tribos do norte de Israel’.
17 Kangisa yango mpe komisa yango libaya moko mpo ete ezala eloko moko kati na loboko na yo.
17 Agora, segure-os juntos em sua mão, como se fossem um só pedaço de madeira.
18 Soki bandeko na yo batuni yo : ‹ Olingi koloba na biso nini ? Makambo oyo elingi kolakisa nini ? ›
18 Quando seus compatriotas lhe perguntarem o que isso significa,
19 Okozongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye ; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. ›
19 diga-lhes: ‘Assim diz o S enhor Soberano: Pegarei Efraim e as tribos do norte, suas irmãs, e as juntarei a Judá. Farei delas um só pedaço de madeira em minha mão’.
20 Okosimba kati na loboko na yo, na miso na bango, mabaya oyo okomaki ;
20 “Em seguida, segure diante do povo os pedaços de madeira que você gravou, para que todos os vejam,
21 mpe okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango.
21 e transmita esta mensagem do S enhor Soberano: Reunirei meu povo de Israel dentre as nações onde foram espalhados e os trarei de volta para sua terra.
22 Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango ; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te.
22 Eu os reunirei em uma só nação nos montes de Israel. Um único rei os governará, e não serão mais divididos em duas nações nem em dois reinos.
23 Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
23 Nunca mais se contaminarão com ídolos, nem com imagens detestáveis, nem com qualquer de suas rebeliões, pois eu os salvarei de sua apostasia pecaminosa. Sim, eu os purificarei; então eles serão o meu povo, e eu serei o seu Deus.
24 Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai.
24 “Meu servo Davi será seu rei, e eles terão um só pastor. Seguirão meus estatutos e terão o cuidado de guardar meus decretos.
25 Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
25 Viverão na terra que dei a meu servo Jacó, a terra onde seus antepassados viveram. Eles, seus filhos e seus netos viverão ali para sempre, de geração em geração, e meu servo Davi será seu príncipe para sempre.
26 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.
26 Farei com eles uma aliança de paz, uma aliança permanente. Eu lhes darei sua terra e os multiplicarei e estabelecerei meu templo no meio deles para sempre.
27 Nakotia ndako na Ngai kati na bango ; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai.
27 Sim, eu habitarei no meio deles. Serei o seu Deus, e eles serão o meu povo.
28 Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »
28 E, quando meu templo estiver entre eles para sempre, as nações saberão que eu sou o S enhor , que santifico Israel”.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 37, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.