Ezequiel 33

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Yawe alobaki na ngai :
1 O Senhor me disse o seguinte:
2 « Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango : ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango ;
2 — Homem mortal , diga ao seu povo o que acontece quando eu faço vir a guerra a um lugar. O povo desse lugar escolhe alguém para ser vigia.
3 soki mokengeli yango amoni banguna koya kobundisa mokili na bango mpe abeti kelelo mpo na kokebisa bato.
3 Quando vê o inimigo chegando, o vigia dá o alarme para avisar toda a gente.
4 Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko.
4 Se alguém ouve o aviso, porém não se importa, e o inimigo vem e o mata, esse alguém é responsável pela sua própria morte.
5 Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye.
5 Ele é culpado da sua própria morte porque não se importou com o alarme. Se tivesse se importado, poderia ter escapado.
6 Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›
6 Mas, se o vigia vê o inimigo se aproximando e não dá o alarme, o inimigo vem e mata aqueles pecadores. Nesse caso, eu considerarei o vigia como responsável pela morte deles.
7 Mwana na moto, nakomisi yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele. Boye, yokaka maloba oyo nakobanda koloba mpo na kokebisa bango na Kombo na Ngai.
7 — Agora, homem mortal, eu estou pondo você como vigia de toda a nação de Israel. Você dará a eles os avisos que eu lhe der.
8 Soki nalobi na moto mabe : ‹ Oh moto mabe, okokufa solo ! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
8 Se eu disser que um homem mau vai morrer, mas você não o avisar para que mude o seu modo de agir e assim salve a sua vida, aí ele morrerá, sendo ainda pecador. Nesse caso, eu considerarei você como responsável pela morte dele.
9 Kasi soki okebisi moto mabe ete abongola bizaleli na ye, bongo asaleli yango te, akokufa solo mpo na masumu na ye ; mpe yo, okobikisa bomoi na yo.
9 Porém, se você avisar o homem mau, e ele não parar de pecar, ele morrerá como pecador, mas você viverá.
10 Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala maloba oyo bozali koloba : ‘ Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso ? ’ ›
10 O Senhor me disse o seguinte: —
11 Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›
11 Diga-lhes que juro pela minha vida que eu, o Senhor Deus, não me alegro com a morte de um pecador. Eu gostaria que ele parasse de fazer o mal e vivesse. Povo de Israel, pare de fazer o mal. Por que é que vocês estão querendo morrer?
12 Mwana na moto, loba na bandeko na yo : ‹ Boyengebene ya moto ya sembo ekobikisa ye te soki asali mabe, mpe mabe ya moto mabe ekokweyisa ye te soki atiki yango ; moto ya sembo akobika te likolo ya boyengebene na ye ya kala soki asali masumu. ›
12 — Agora, homem mortal, diga aos israelitas que, quando um homem correto pecar, o bem que ele fez não o salvará. Se um homem mau parar de fazer o mal, ele não será castigado; e, se um homem correto começar a pecar, ele não continuará vivendo.
13 Ata soki nalobi na moto ya sembo ete akowumela solo na bomoi, soki atie elikya na bosembo na ye mpe asali mabe, bosembo na ye nyonso ekotangama lisusu te mpe akokufa mpo na mabe oyo asali.
13 Se eu prometer dar a vida a um homem correto, e se ele começar a pecar porque pensa que a sua bondade passada o salvará, aí eu não lembrarei de nenhuma das boas ações que praticou. Ele morrerá por causa dos seus pecados.
14 Soki nalobi na moto mabe : ‹ Okokufa solo ; › kasi atiki masumu na ye mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima,
14 Se eu avisar um homem mau, dizendo que vai morrer, e se ele parar de pecar e fizer o que é bom e correto —
15 soki azongisi ndanga oyo asimbaki na niongo mpe biloko oyo ayibaki, soki atosi mitindo oyo epesaka bomoi mpe atiki kosala mabe, akobika penza, akokufa te.
15 por exemplo, se devolver o objeto que lhe deram como garantia de pagamento de uma dívida ou se devolver o que roubou — se ele parar de pecar e seguir as leis que dão vida, ele não morrerá, mas viverá.
16 Mabe nyonso oyo asalaki ekotangama lisusu te, akobika solo ; pamba te asali oyo ezali alima mpe sembo.
16 Eu perdoarei os pecados que cometeu. Ele viverá porque fez o que é bom e correto.
17 Bandeko na yo bazali koloba : ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te. › Nzokande, nzela na bango moko nde ezalaka mabe.
17 — No entanto, o seu povo diz que o que eu, o Senhor, faço não está certo! São eles que não estão certos!
18 Soki moto ya sembo atiki boyengebene na ye mpe akomi kosala mabe, akokufa mpo na mabe yango.
18 Quando um homem correto para de fazer o bem e começa a fazer o mal, ele morrerá por causa disso.
19 Soki moto mabe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, akobika solo mpo ete asali bongo.
19 Quando um homem mau para de pecar e faz o que é bom e correto, ele salvou a sua vida.
20 Oh bino, libota ya Isalaele, ndenge nini bokoki penza koloba : ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te ! › Solo, nakosambisa moko na moko kati na bino kolanda etamboli na ye ! »
20 Mas você, povo de Israel, diz que o que eu faço não está certo. Eu os julgarei por aquilo que fazem.
21 Na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi na mibale ya bowumbu na biso, moko kati na bato oyo babikaki na Yelusalemi ayaki epai na ngai mpe alobaki : « Babebisi engumba ! »
21 No ano décimo segundo do nosso cativeiro , no dia cinco do décimo segundo mês , um homem que havia escapado de Jerusalém veio e me contou que a cidade tinha sido tomada.
22 Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba.
22 Na noite antes da chegada dele, eu tinha sentido a presença poderosa de Deus, o Senhor . E na manhã seguinte, quando o homem chegou, o Senhor me deu de novo a fala .
23 Bongo Yawe alobaki na ngai :
23 O Senhor me disse o seguinte:
24 « Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba : ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula ; nzokande biso, tozali ebele ; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula ! ›
24 — Homem mortal , os moradores das cidades arrasadas na terra de Israel estão dizendo o seguinte: “Abraão era um homem só, e toda esta terra foi dada a ele. Nós somos muitos, e por isso agora a terra é nossa.”
25 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula !
25 — Diga a essa gente o que eu, o Senhor Deus, estou dizendo: “Vocês comem carne com sangue , adoram ídolos e cometem crimes de morte. Por que é que estão pensando que a terra é de vocês?
26 Bozali kotia elikya na mopanga na bino, bozali kosala makambo ya mbindo, mpe moko na moko kati na bino azali kokomisa mbindo mwasi ya moninga na ye, mpe bozwa penza mokili lokola libula ! ›
26 Vocês confiam nas suas espadas. O seu modo de agir é nojento. Todos cometem adultério. Por que estão pensando que a terra é de vocês?”
27 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga ! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango ! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka ;
27 — Diga a essa gente que eu, o Senhor Deus, estou avisando: Juro que os moradores das cidades arrasadas serão mortos. Os que vivem no campo serão comidos por animais selvagens. Os que estão escondidos nas montanhas e cavernas ficarão doentes e morrerão.
28 nakokomisa mokili libebi mpe nakosala ete etikala lisusu na bato te : nakosukisa lolendo na yango, bangomba ya Isalaele ekotikala lisusu na bato te, mpe bato bakotika kolekela wana.
28 Farei com que o país vire um deserto abandonado. O poder de que se orgulhavam acabará. As montanhas de Israel ficarão tão desertas, que ninguém passará por elas.
29 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokomisa mokili libebi mpe esobe, likolo ya makambo na bango nyonso ya mbindo oyo bazali kosala. ›
29 Quando eu castigar o povo pelos seus pecados e fizer com que o país vire um deserto, aí eles ficarão sabendo que eu sou o Senhor .
30 Mpo na yo, mwana na moto, bandeko na yo bazali kolobana bango na bango na bamir mpe na bikuke ya bandako na bango na tina na kombo na yo : ‹ Boya koyoka maloba oyo ewuti epai na Yawe ! ›
30 O Senhor disse: —
31 Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
31 Assim o meu povo se ajunta em grande número para ouvir o que você tem para dizer, mas eles não querem pôr em prática o que você diz. “Ele fala bonito” — eles dizem, mas o que querem é ganhar dinheiro.
32 Mpo na bango, ozalaka na yo kaka lokola moto oyo ayembaka malamu banzembo ya kitoko, na mongongo ya kitoko, mpe abetaka mindule kitoko ; pamba te bayokaka na bango maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te.
32 Para eles você não passa de um cantor de canções de amor ou tocador de harpa . Eles ouvem o que você diz, porém não fazem nada daquilo que você manda.
33 Tango makambo oyo nyonso ekokokisama —mpe ekokokisama solo— bakososola penza ete mosakoli moko azalaki kati na bango. »
33 Porém, quando acontecer tudo o que você diz — e vai acontecer mesmo —, aí eles ficarão sabendo que um profeta esteve no meio deles.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 33, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.