Ezequiel 30

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Yawe alobaki na ngai :
1 Esta palavra do Senhor veio a mim:
2 « Mwana na moto, sakola ! Loba :
2 "Filho do homem, profetize e diga: ‘Assim diz o Soberano Senhor: " ‘Clamem e digam: "Ai! Aquele dia! "
3 Pamba te mokolo yango ekomi pene ;
3 Pois o dia está próximo, o dia do Senhor está próximo; será dia de nuvens, uma época de condenação para as nações.
4 Mopanga ekotelemela Ejipito,
4 A espada virá contra o Egito, e angústia virá sobre a Etiópia. Quando os mortos caírem no Egito, sua riqueza lhe será tirada e os seus alicerces serão despedaçados.
5 Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito.
5 A Etiópia e Fute, Lude e toda a Arábia, a Líbia e o povo da terra da aliança cairão pela espada junto com o Egito.
6 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
6 " ‘Assim diz o Senhor: " ‘Os aliados do Egito cairão, e a sua orgulhosa força fracassará. Desde Migdol até Sevene eles cairão pela espada, palavra do Soberano Senhor’ ".
7 Ejipito ekotikala lisusu na bato te
7 " ‘Serão arrasados no meio de terras devastadas, e as suas cidades jazerão no meio de cidades em ruínas.
8 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe,
8 E eles saberão que eu sou o Senhor, quando eu incendiar o Egito e todos os que o apóiam forem esmagados.
9 Na mokolo wana, bato oyo nakotinda bakokende na nzela ya masuwa mpo na kobundisa Kushi oyo ezali na yango na kimia. Somo makasi ekokanga bango na mokolo ya etumbu ya Ejipito ; mpe mokolo yango ekomi solo pene.
9 " ‘Naquele dia de mim partirão mensageiros em navios para assustar o povo da Etiópia, que se sente seguro. A angústia se apoderará deles no dia da condenação do Egito, pois é certo que isso acontecerá.
10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa nguya ya mampinga ya Ejipito na nzela ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni.
10 " ‘Assim diz o Soberano Senhor: " ‘Darei fim à população do Egito pelas mãos do rei Nabucodonosor da Babilônia.
11 Ye elongo na mampinga na ye ya basoda oyo baleki kanza kati na mampinga ya bikolo, bakoya kobebisa mokili. Bakobundisa Ejipito na mipanga na bango mpe bakotondisa mokili na bibembe.
11 Ele e o seu exército, a nação mais impiedosa, serão levados para destruir a terra. Eles empunharão a espada contra o Egito e a terra ficará cheia de mortos.
12 Nakokawusa miluka ya Nili mpe nakokaba mokili epai ya bato mabe ; nakobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango na nzela ya maboko ya bapaya. Ezali Ngai Yawe nde nalobi.
12 Eu secarei os regatos do Nilo e venderei a terra a homens maus; pela mão de estrangeiros deixarei arrasada a terra e tudo o que nela há. Eu, o Senhor, falei.
13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.
13 " ‘Assim diz o Soberano Senhor: " ‘Destruirei os ídolos e darei fim às imagens que há em Mênfis. Não haverá mais príncipe no Egito, e espalharei medo por toda a terra.
14 Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi.
14 Arrasarei o alto Egito, incendiarei Zoa e infligirei castigo a Tebas.
15 Nakopelisela engumba Sini, ndako batonga makasi ya Ejipito, kanda na Ngai ; mpe nakoboma ebele ya bavandi ya engumba Tebesi.
15 Derramarei a minha ira sobre Pelúsio, a fortaleza do Egito, e acabarei com a população de Tebas.
16 Nakotia moto kati na Ejipito ; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango.
16 Incendiarei o Egito; Pelúsio se contorcerá de agonia. Tebas será levada pela tempestade; Mênfis estará em constante aflição.
17 Bilenge mibali ya bingumba Eliopolisi mpe Pi-Beseti bakokufa na mopanga, mpe bingumba yango ekokende na bowumbu.
17 Os jovens de Heliópolis e de Bubastis cairão pela espada, e a população das cidades irão para o cativeiro.
18 Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.
18 As trevas imperarão em pleno dia em Tafnes quando eu quebrar o jugo do Egito; ali sua força orgulhosa chegará a um fim. Ficará coberta de nuvens, e os moradores dos seus povoados irão para o cativeiro.
19 Nakopesa Ejipito etumbu ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
19 Assim eu trarei castigo ao Egito, e todos ali saberão que eu sou o Senhor. ’ "
20 Na mokolo ya sambo ya sanza ya liboso, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai :
20 No sétimo dia do primeiro mês do décimo primeiro ano, a palavra do Senhor veio a mim:
21 « Mwana na moto, tala ; nabukaki loboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ! Moto moko te azali kosalisa yango to mpe kotia yango kisi mpo ete ekoka lisusu kozwa makasi ya kosimba mopanga.
21 "Filho do homem, quebrei o braço do faraó, rei do Egito. Não foi enfaixado para sarar nem lhe foi posta uma tala para fortalecê-lo o bastante para poder manejar a espada.
22 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito ; nakobuka maboko na ye nyonso mibale : ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana ; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye.
22 Portanto, assim diz o Soberano Senhor: Estou contra o faraó, rei do Egito. Quebrarei os seus dois braços, o bom e o que já foi quebrado, e farei a espada cair da sua mão.
23 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu.
23 Dispersarei os egípcios entre as nações e os espalharei entre os povos.
24 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene.
24 Fortalecerei os braços do rei da Babilônia e porei a minha espada nas mãos dele, mas quebrarei os braços do faraó, e este gemerá diante dele como um homem mortalmente ferido.
25 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni, kasi maboko ya Faraon ekolemba. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakotia mopanga na Ngai kati na loboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobundisa na yango Ejipito.
25 Fortalecerei os braços do rei da Babilônia, mas os braços do faraó penderão sem firmeza. Quando eu puser minha espada na mão do rei da Babilônia e ele a brandir contra o Egito, eles saberão que eu sou o Senhor.
26 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
26 Eu dispersarei os egípcios no meio das nações e os espalharei entre os povos. Então eles saberão que eu sou o Senhor".

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 30, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.