Ezequiel 28

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Yawe alobaki na ngai :
1 Veio a mim esta palavra do Senhor:
2 « Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.
2 "Filho do homem, diga ao governante de Tiro: ‘Assim diz o Soberano Senhor: " ‘No orgulho do seu coração você diz: "Sou um deus; sento-me no trono de um deus no coração dos mares". Mas você é um homem, e não um deus, embora se ache tão sábio quanto um deus.
3 Boni, okanisi ete ozali na bwanya koleka Daniele ? Okanisi ete oyebi mabombami nyonso ?
3 Você é mais sábio que Daniel? Não haverá segredo que lhe seja oculto?
4 Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo.
4 Mediante a sua sabedoria e o seu entendimento, você granjeou riquezas e acumulou ouro e prata em seus tesouros.
5 Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi ; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo.
5 Pela sua grande habilidade comercial você aumentou as suas riquezas, e, por causa das suas riquezas, o seu coração ficou cada vez mais orgulhoso.
6 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozali kokanisa ete ozali na bwanya lokola Nzambe,
6 " ‘Por isso, assim diz o Soberano Senhor: " ‘Porque você pensa que é sábio, tão sábio quanto um deus,
7 nakotindela yo bato ya bikolo ya bapaya, bikolo oyo baleki kanza kati na bikolo, mpo ete babundisa yo : bakobimisela yo mipanga na bango mpo na kosambwisa mayele mpe bwanya na yo, bongo bakosambwisa lokumu na yo.
7 trarei estrangeiros contra você, das mais impiedosas nações; eles empunharão suas espadas contra a sua beleza e a sua sabedoria e traspassarão o seu esplendor fulgurante.
8 Bakokitisa yo kino na libulu, mpe okokufa kufa ya somo kati na bibale minene.
8 Eles o farão descer à cova, e você terá morte violenta no coração dos mares.
9 Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.
9 Será que então você dirá: "Eu sou um deus" na presença daqueles que o matarem? Você será tão-somente um homem, e não um deus, nas mãos daqueles que o abaterem.
10 Okokufa kufa ya bato oyo bakatama ngenga te, na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Ngai nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. › »
10 Você terá a morte dos incircuncisos nas mãos de estrangeiros. Eu falei; palavra do Soberano Senhor’ ".
11 Yawe alobaki na ngai :
11 Esta palavra do Senhor veio a mim:
12 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na mokonzi ya Tiri ! Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ozalaki ndakisa mpo na komona nyonso oyo ezali ya kokoka, otondaki na bwanya, mpe ozalaki kitoko koleka.
12 "Filho do homem, erga um lamento a respeito do rei de Tiro e diga-lhe: ‘Assim diz o Soberano Senhor: " ‘Você era o modelo de perfeição, cheio de sabedoria e de perfeita beleza.
13 Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.
13 Você estava no Éden, no jardim de Deus; todas as pedras preciosas o enfeitavam: sárdio, topázio e diamante, berilo, ônix e jaspe, safira, carbúnculo e esmeralda. Seus engastes e guarnições eram feitos de ouro; tudo foi preparado no dia em que você foi criado.
14 Napakolaki yo mafuta mpo ete ozala Sheribe oyo abatelaka, oyo mapapu na ye efungwama ; pamba te Ngai nde natiaki yo na ngomba ya bule ya Nzambe ; ozalaki wana, ozalaki kotambola na kati-kati ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.
14 Você foi ungido como um querubim guardião, pois para isso eu o determinei. Você estava no monte santo de Deus e caminhava entre as pedras fulgurantes.
15 Etamboli na yo ezalaki ata na pamela moko te wuta mokolo oyo okelama kino tango mabe emonanaki kati na yo.
15 Você era inculpável em seus caminhos desde o dia em que foi criado até que se achou maldade em você.
16 Lokola omonaki ete mombongo na yo emati makasi, okomaki konyokola bato mpe kosala masumu ; mpo na yango, nalongolaki yo na ngomba ya Nzambe mpe nabenganaki yo, sheribe oyo abatelaka, na molongo ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.
16 Por meio do seu amplo comércio, você encheu-se de violência e pecou. Por isso eu o lancei em desgraça para longe do monte de Deus, e eu o expulsei, ó querubim guardião, do meio das pedras fulgurantes.
17 Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo ; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi.
17 Seu coração tornou-se orgulhoso por causa da sua beleza, e você corrompeu a sua sabedoria por causa do seu esplendor. Por isso eu o atirei à terra; fiz de você um espetáculo para os reis.
18 Mpo na ebele ya masumu na yo mpe mombongo na yo, oyo osalaka na bosembo te, obebisi bosantu ya bisika na yo ya bule ; mpe Ngai, nabimisi kati na yo moto mpo ete etumba yo ; nakomisi yo putulu ya mabele na miso ya bato nyonso oyo bazali kotala yo.
18 Por meio dos seus muitos pecados e do seu comércio desonesto você profanou os seus santuários. Por isso fiz sair de você um fogo, que o consumiu, e eu reduzi você a cinzas no chão, à vista de todos os que estavam observando.
19 Bato ya bikolo nyonso oyo bayebaki yo bakomi na mawa na tina na yo mpo ete okomi eloko ya koyoka somo : suka na yo ezali mabe, ozali lisusu te, okotikala lisusu kozala te ! › »
19 Todas as nações que o conheciam ficaram chocadas ao vê-la; chegou o seu terrível fim, você não mais existirá’ ".
20 Yawe alobaki na ngai :
20 Veio a mim esta palavra do Senhor:
21 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango !
21 "Filho do homem, vire o rosto contra Sidom; profetize contra ela
22 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Sidoni, natombokeli yo ! Nakomonisa nkembo na Ngai kati na yo ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopesa yango etumbu mpe nakomonisa bosantu na Ngai kati na yango.
22 e diga: ‘Assim diz o Soberano Senhor: " ‘Estou contra você, Sidom, e manifestarei a minha glória dentro de você. Todos saberão que eu sou o Senhor, quando eu castigá-lo e mostrar-me santo em seu meio.
23 Nakotindela yango bokono oyo ebomaka, nakotangisa makila na babalabala na yango ; mopanga ekolongwa na bangambo nyonso mpo na koboma bato na yango, mpe bato ebele bakokufa. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
23 Enviarei uma peste sobre você e farei sangue correr em suas ruas. Os mortos cairão pela espada que a ataca por todos os lados. E todos saberão que eu sou o Senhor.
24 Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.
24 " ‘Israel não terá mais vizinhos maldosos agindo como roseiras bravas dolorosas e espinhos pontudos. Pois eles saberão que eu sou o Soberano Senhor.
25 Nkolo Yawe alobi : Tango nakosangisa bana ya Isalaele wuta na bikolo epai wapi napanzaki bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo wana ; boye, bakovanda na mokili na bango moko, mokili oyo napesaki epai ya Jakobi, mosali na Ngai.
25 " ‘Assim diz o Soberano Senhor: Quando eu reunir Israel de entre as nações nas quais foi espalhado, eu me mostrarei santo entre eles à vista das nações. Então eles viverão em sua própria terra, a qual dei ao meu servo Jacó.
26 Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino ; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › »
26 Eles viverão ali em segurança, construirão casas e plantarão vinhas; viverão em segurança quando eu castigar todos os seus vizinhos que lhes fizeram mal. Então eles saberão que eu sou o Senhor, o seu Deus’ ".

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 28, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.