Ezequiel 23

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs BKJ

Sair da comparação
1 Yawe alobaki na ngai :
1 A palavra do SENHOR veio a mim novamente, dizendo:
2 « Mwana na moto, ezalaki na basi mibale, bana ya mama moko.
2 Filho do homem, havia duas mulheres, filhas da mesma mãe;
3 Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.
3 e, elas cometeram prostituições no Egito; cometeram prostituições em sua juventude; ali se deixaram apertar os peitos, ali acariciaram seus mamilos virginais.
4 Oyo ya kulutu, kombo na ye ezalaki Ohola ; mpe oyo ya leki, kombo na ye ezalaki Oholiba : bazalaki basi na Ngai mpe babotaki bana mibali mpe bana basi. Ohola azali Samari mpe Oholiba azali Yelusalemi.
4 E os seus nomes eram: Aolá, a mais velha, e Aolibá, sua irmã; e elas foram minhas, e deram à luz filhos e filhas; assim, eram os seus nomes: Samaria é Aolá, e Jerusalém, Aolibá.
5 Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba
5 E Aolá prostituiu-se quando era minha; e ela apaixonou-se dos seus amantes, dos assírios, seus vizinhos,
6 oyo balataka bilamba ya lokumu ya langi ya ble, bayangeli mpe bakonzi ya basoda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali ya kitoko oyo bayebaki malamu kotambola na bampunda.
6 os quais estavam vestidos de azul, capitães e governantes, todos eles jovens desejáveis, cavaleiros montados sobre cavalos.
7 Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo.
7 Assim, ela cometeu as suas prostituições com eles, com todos aqueles que eram os homens escolhidos da Assíria, e com todos com quem se enamorava; com todos os seus ídolos ela se contaminou.
8 Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye.
8 Nem deixou as suas prostituições, trazidas do Egito; porque em sua juventude se deitaram com ela, e feriram os seios da sua virgindade, e derramaram sua prostituição sobre ela.
9 Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela.
9 Portanto, eu a entreguei na mão dos seus amantes, na mão dos assírios, de quem se enamorara.
10 Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu.
10 Estes descobriram a sua nudez, eles tomaram seus filhos e suas filhas, e a ela mataram com a espada; e ela tornou-se famosa entre as mulheres, porque eles tinham executado juízo sobre ela.
11 Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso ; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi.
11 E quando sua irmã, Aolibá, viu isto, era mais corrupta em seu amor desordenado do que ela, e em suas prostituições mais do que a sua irmã nas prostituições dela.
12 Ye mpe akufelaki kolinga mibali ya Asiri : bayangeli, bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo balataka kitoko mpe batambolaka malamu likolo ya bampunda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali kitoko.
12 Enamorou-se dos Assírios, seus vizinhos, capitães e governantes vestidos maravilhosamente, cavaleiros que andavam montados em cavalos, todos jovens desejáveis.
13 Namonaki ete ye mpe amikomisaki mbindo : bango mibale balandaki kaka nzela moko.
13 Então, eu vi que ela estava contaminada; que elas tomaram o mesmo caminho.
14 Nzokande, ye kutu akendeki mosika koleka na kindumba na ye ; amonaki bililingi ya mibali na mir, bililingi ya bato ya Chalide, oyo basala na langi ya motane ;
14 E, que ela aumentou suas prostituições, pois quando ela viu homens pintados na parede, as imagens dos caldeus, pintados de vermelho;
15 mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide.
15 cingidos de cinto nos seus lombos, e adornos de cores sobre suas cabeças, todos eles príncipes para se olhar, segundo a maneira dos babilônios da Caldeia, a terra de sua natividade.
16 Tango kaka amonaki bango, akufelaki bango na bolingo mpe atindaki bantoma epai na bango, na mokili ya Chalide.
16 E, assim que ela os viu com os seus olhos, enamorou-se deles; e lhes mandou mensageiros à Caldeia.
17 Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango.
17 E os babilônios vieram a ela à cama de amor, e eles a contaminaram com sua prostituição, e ela foi poluída com eles, e sua mente estava alienada deles.
18 Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi.
18 Assim, ela descobriu suas prostituições e descobriu sua nudez; então a minha mente foi alienada dela, como a minha mente já havia se alienado de sua irmã.
19 Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito.
19 Todavia, ela multiplicou as suas prostituições, chamando à lembrança os dias da sua juventude, nos quais ela havia se prostituído na terra do Egito.
20 Kuna, akufelaki kolinga bamakangu na ye, oyo nzoto na bango ya mibali ezalaka lokola nzoto ya mibali ya ane mpe oyo bazalaka na nguya ya kosangisa nzoto lokola mpunda.
20 Porque enamorou-se dos seus amantes, cuja carne é como a carne de jumentos, e cujo fluxo é como o fluxo dos cavalos.
21 Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge.
21 Assim, tu chamaste à lembrança a lascívia da tua juventude, ao ter teus mamilos acariciados pelos egípcios, por causa dos seios da tua juventude.
22 Yango wana, Oholiba, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosala ete bamakangu na yo, ba-oyo yo oboyaki, babalukela yo ; mpe nakosala lisusu ete babimela yo na bangambo nyonso :
22 Portanto, ó Aolibá, assim diz o Senhor DEUS: Eis que eu levantarei teus amantes contra ti, dos quais tua mente está alienada, e eu os trarei contra ti de todo lado.
23 mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.
23 Os babilônios, e todos os caldeus, Pecode, e Soa, e Coa, e todos os assírios com eles, todos eles jovens desejáveis, capitães e governantes, grandes senhores e renomados, todos eles montados sobre cavalos.
24 Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango.
24 E eles virão contra ti com carruagens, carroças e rodas, e com uma assembleia de pessoas, as quais se colocarão contra ti broquel, escudo e elmo ao redor; e eu estabelecerei juízo diante deles, e eles te julgarão de acordo com os seus juízos.
25 Nakotelemela yo na kanda na Ngai mpe bakosala yo mabe, na mitema ya kanda penza. Bakokata yo zolo mpe matoyi ; bongo bato na yo, oyo bakotikala bakokufa na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, bongo ba-oyo bakotikala bakokufa na moto.
25 E eu colocarei o meu ciúme contra ti, e eles tratarão furiosamente contigo. Tirar-te-ão o teu nariz e as tuas orelhas, e o teu remanescente cairá pela espada. Eles tomarão teus filhos e tuas filhas, e o teu resíduo será devorado pelo fogo.
26 Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo.
26 Eles também despirão as tuas vestes, e tomarão as tuas belas joias.
27 Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te.
27 Assim eu farei a tua lascívia cessar em ti, e a tua prostituição trazida da terra do Egito; para que tu não levantes os teus olhos para eles, nem te lembres mais do Egito.
28 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te.
28 Porque assim diz o Senhor DEUS: Eis que eu te entregarei na mão daqueles que tu odeias, na mão daqueles de quem tua mente está alienada;
29 Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo
29 e, eles lidarão contigo odiosamente, e levarão embora todo o teu trabalho, e te deixarão nua e despida; e a nudez das tuas prostituições será descoberta, a tua lascívia, e as tuas prostituições.
30 nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko.
30 Eu farei estas coisas a ti, porque te prostituíste após os pagãos, e porque tu estás contaminada com seus ídolos.
31 Lokola olandaki nzela ya ndeko na yo ya mwasi, nakotia kopo oyo ye amelaki na loboko na yo.
31 Tu andaste no caminho de tua irmã; portanto, eu entregarei o seu cálice na tua mão.
32 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
32 Assim diz o Senhor DEUS: Tu beberás do cálice de tua irmã, fundo e largo; serás motivo de riso e de desprezo, e tida por escárnio; isto contém muito.
33 Ekolangwisa yo na pasi :
33 Tu serás preenchida de embriaguez e de dor; com o cálice de espanto e de desolação, com o cálice de tua irmã Samaria.
34 Okomela yango kino ekokawuka,
34 Tu irás até mesmo bebê-lo e sugá-lo, e quebrarás seus próprios cacos, e arrancarás fora os teus próprios seios; porque eu falei, diz o Senhor DEUS.
35 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »
35 Portanto, assim diz o Senhor DEUS: Porque tu te esqueceste de mim, e me lançaste para trás das tuas costas, por isso tu também carregarás a tua lascívia e as tuas prostituições.
36 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, okosambisa penza Ohola mpe Oholiba ? Lakisa bango misala na bango ya mbindo ;
36 O SENHOR me disse mais: Filho do homem, tu julgarás a Aolá e a Aolibá? Sim, declara-lhes as suas abominações;
37 pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango ; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko.
37 Porque eles cometeram adultério e sangue há nas suas mãos, e com os seus ídolos cometeram adultério, e também fizeram com que seus filhos, que de mim geraram, passassem através do fogo, para os devorar.
38 Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai : kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
38 Ademais, isto fizeram a mim: contaminaram o meu santuário no mesmo dia, e profanaram os meus shabats.
39 Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai.
39 Porque, quando eles haviam matado seus filhos a seus ídolos, vieram no mesmo dia ao meu santuário para profaná-lo, e eis que, assim eles fizeram no meio da minha casa.
40 Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju.
40 E além disso, enviastes homens, para que viessem de longe, a quem um mensageiro foi enviado; e eis que eles vieram. Por quem te lavaste, pintaste os teus olhos, e te enfeitaste com ornamentos.
41 Ovandaki na mbeto moko ya kitoko ; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai.
41 E te assentaste sobre uma cama imponente, e uma mesa preparada diante dela, sobre a qual puseste o meu incenso e o meu azeite.
42 Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango.
42 E uma voz de uma multidão distraída estava com ela; e com os homens de tipo comum foram trazidos sabeus do deserto, que punham braceletes sobre suas mãos e belas coroas sobre suas cabeças.
43 Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba : ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba ! ›
43 Então, eu disse àquela que estava velha de adultérios: Cometerão agora adultérios com ela, e ela com eles?
44 Mpe basangisaki na ye nzoto : ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba.
44 E, eles entraram nela, como entram em uma mulher que se prostitui; assim eles entraram em Aolá e em Aolibá, mulheres lascivas.
45 Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila.
45 E os homens justos as julgarão segundo à maneira das adúlteras, e segundo à maneira das mulheres que derramam sangue; porque elas são adúlteras, e sangue há nas suas mãos.
46 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi !
46 Porque assim diz o Senhor DEUS: Eu trarei uma companhia sobre elas, e as darei para serem removidas e saqueadas.
47 Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga ; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto.
47 E a companhia as apedrejará com pedras, e as despachará com as suas espadas; eles matarão seus filhos e a suas filhas, e queimarão as suas casas com fogo.
48 Na nzela wana nde nakosukisa kindumba kati na mokili, mpo ete basi nyonso bazwa mayele mpe balanda ndakisa na bango te.
48 Assim eu farei com que a lascívia cesse sobre a terra, para que todas as mulheres possam ser ensinadas a não fazerem segundo vossa lascívia.
49 Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko ; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. »
49 E eles recompensarão vossa lascívia sobre vós, e carregareis os pecados dos vossos ídolos; e sabereis que eu sou o Senhor DEUS.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 23, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.