Ezequiel 20

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai.
1 Passaram sete anos, cinco meses e dez dias desde que os israelitas haviam sido levados para o cativeiro . Então alguns líderes vieram falar comigo para saber a vontade do Senhor . Eles chegaram e se sentaram na minha frente.
2 Bongo, Yawe alobaki na ngai :
2 O Senhor falou comigo. Ele disse:
3 « Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. ›
3 — Homem mortal , diga a esses líderes que o Senhor está dizendo isto: Vocês vieram para saber qual é a minha vontade? Pois eu juro pela minha vida que não deixarei que vocês me perguntem nada. Sou eu, o Senhor Deus, quem está falando.
4 Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango
4 — Homem mortal, você está pronto para julgar essa gente? Então julgue. Faça com que eles lembrem das coisas vergonhosas que os antepassados deles fizeram.
5 mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango : ‘ Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’
5 Diga tudo o que eu, o Senhor Deus, estou falando. No dia em que escolhi o povo de Israel, fiz uma promessa a eles. No Egito, mostrei aos israelitas quem eu era e disse: “Eu sou o Senhor , o Deus de vocês.”
6 Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko.
6 Nessa ocasião, prometi que ia tirá-los do Egito e guiá-los a uma terra que eu havia escolhido para eles, uma terra boa e rica, a melhor de todas.
7 Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’
7 Eu lhes disse: “Joguem fora os ídolos nojentos que vocês amam e não se manchem com os falsos deuses do Egito, pois o Deus de vocês sou eu, o Senhor .”
8 Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.
8 Mas eles se revoltaram contra mim e não quiseram me ouvir. E não jogaram fora os seus ídolos nojentos, nem abandonaram os ídolos do Egito. Eu estava pronto para fazê-los sentir, ali no Egito, a força da minha ira .
9 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.
9 Porém não fiz isso a fim de não trazer desonra para o meu nome. Pois, na presença do povo no meio do qual os israelitas estavam vivendo, eu havia anunciado que ia tirá-los do Egito.
10 Yango wana nabimisaki bango na Ejipito mpe namemaki bango na esobe.
10 — E assim os tirei do Egito e os levei para o deserto.
11 Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango.
11 Eu lhes dei os meus mandamentos e lhes ensinei as minhas leis , que dão vida a quem os cumprir.
12 Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.
12 Como sinal da nossa aliança , mandei que eles guardassem o sábado e assim lembrassem que eu, o Senhor , os separo para que se dediquem somente a mim.
13 Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.
13 Mas também no deserto os israelitas se revoltaram contra mim. Desobedeceram às minhas leis e rejeitaram os meus mandamentos, que dão vida a quem os cumprir. Profanaram completamente o sábado. Eu estava pronto para fazê-los sentir a força da minha ira e acabar com eles ali no deserto.
14 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
14 E não os destruí a fim de não trazer desonra para o meu nome, pois as outras nações viram que tirei o povo de Israel do Egito.
15 Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko ;
15 Além disso, no deserto jurei que não os levaria à terra que eu tinha dado a eles, uma terra boa e rica, a melhor de todas.
16 pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba : mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko.
16 Fiz esse juramento porque eles rejeitaram os meus mandamentos, desobedeceram às minhas leis e profanaram o sábado. Eles tinham prazer em adorar os seus ídolos.
17 Kasi lokola natalaki bango na liso ya mawa, yango wana nabebisaki bango te mpe nasilisaki koboma bango te kati na esobe.
17 — Porém eu tive pena deles e não os matei, nem acabei com eles lá no deserto.
18 Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko !
18 Em vez disso, eu disse aos seus filhos: “Não guardem as leis que os seus antepassados fizeram; não sigam os costumes deles, nem se manchem com os seus ídolos.
19 Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bolanda bikateli na Ngai mpe bobatela na bokebi mibeko na Ngai.
19 Eu sou o Senhor , o Deus de vocês. Obedeçam às minhas leis e aos meus mandamentos.
20 Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino. ’
20 Façam do sábado um dia sagrado, de modo que seja um sinal da aliança que fizemos. O sábado fará com que lembrem que eu sou o Senhor , o Deus de vocês.”
21 Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.
21 — Mas esses filhos também se revoltaram contra mim. Desobedeceram às minhas leis e não guardaram os meus mandamentos, que dão vida a quem os cumprir. Eles profanaram o sábado. Eu estava pronto para fazê-los sentir a força da minha ira, matando todos ali no deserto.
22 Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
22 Porém não os destruí a fim de não trazer desonra para o meu nome entre as nações que me viram tirar o povo de Israel do Egito.
23 Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya ;
23 Então fiz um novo juramento no deserto. Jurei que ia espalhar os israelitas pelo mundo inteiro.
24 pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango.
24 Fiz isso porque rejeitaram os meus mandamentos, desobedeceram às minhas leis, profanaram o sábado e adoraram os mesmos ídolos que os seus antepassados tinham servido.
25 Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te,
25 Então lhes dei leis más e mandamentos que não produzem vida.
26 natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
26 Deixei que se tornassem impuros , trazendo as suas próprias ofertas; deixei que matassem os seus filhos mais velhos, oferecendo-os em sacrifício . Isso aconteceu para que ficassem cheios de medo e para mostrar que eu sou o Senhor .
27 Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai.
27 — Por isso, homem mortal, conte aos israelitas o que eu, o Senhor Deus, estou dizendo a eles. Os pais deles também me insultaram de outro modo com a sua infidelidade:
28 Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.
28 quando eu os trouxe para a terra que havia jurado dar-lhes, eles viram os montes altos e as árvores que dão sombra e ofereceram sacrifícios em todos eles. Eles me fizeram ficar irado por causa dos sacrifícios que queimaram e das ofertas de bebidas que trouxeram.
29 Boye, natunaki bango : Esambelo ya likolo ya ngomba epai wapi bozali kokende elakisi nini ? › Mpe babengaki yango, kino na mokolo ya lelo : ‹ Esambelo ya likolo ya ngomba. ›
29 Eu perguntei: “Que são esses lugares altos aonde vocês vão?” Por isso, desde aquele tempo eles têm sido chamados de “lugares altos”.
30 Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko ?
30 Agora, diga aos israelitas o que estou dizendo. Por que é que vocês precisam cometer os mesmos pecados que os seus antepassados cometeram? Por que têm de correr atrás dos ídolos deles?
31 Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele ; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai.
31 Até hoje, vocês apresentam as mesmas ofertas e se tornam impuros por causa dos mesmos ídolos, queimando vivos os seus filhos, como sacrifício. E aí vocês, israelitas, ainda vêm me perguntar o que eu quero. Juro pela minha vida, diz o Senhor Deus, que não deixarei que vocês me perguntem nada.
32 Bozali koloba : ‘ Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu ; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga. ’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te.
32 Vocês já resolveram que querem ser como as outras nações, como aquela gente que mora em outros países e adora árvores e pedras. Mas isso nunca acontecerá.
33 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi ;
33 — Juro pela minha vida, diz o Senhor Deus, que governarei vocês com mão forte, com todo o meu poder e a minha ira .
34 nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi.
34 Mostrarei a vocês o meu poder e a minha ira quando eu os ajuntar e trouxer de volta de todos os países por onde foram espalhados.
35 Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu.
35 Eu os levarei ao “Deserto das Nações” e ali os julgarei cara a cara.
36 Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe.
36 Eu os condenarei agora como condenei os seus antepassados no deserto do Sinai! — diz o Senhor Deus.
37 Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani.
37 — Eu os dominarei com firmeza e farei com que obedeçam à minha aliança .
38 Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya ; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
38 Tirarei do meio de vocês os que são rebeldes e pecadores. Eu os tirarei das terras onde agora estão vivendo, porém não os deixarei voltar à terra de Israel. Então eles ficarão sabendo que eu sou o Senhor .
39 Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.
39 O Senhor Deus diz: — E agora todos vocês, israelitas, continuem a adorar os seus ídolos! Mas aviso que mais tarde terão de me obedecer e nunca mais desonrarão o meu nome, apresentando ofertas aos seus ídolos.
40 Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule.
40 Lá na terra de Israel, no meu monte santo , no monte alto de Israel, todos vocês, povo de Israel, me adorarão. Ficarei contente com vocês e esperarei que me tragam os seus sacrifícios, as suas melhores ofertas e os seus presentes santos.
41 Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo.
41 Eu farei com que voltem dos países onde estão espalhados, e os ajuntarei, e então aceitarei os sacrifícios que vocês queimam. E assim mostrarei às outras nações que eu sou santo.
42 Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakokotisa bino na mokili ya Isalaele, mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa epai ya batata na bino.
42 Quando eu os trouxer de volta a Israel, à terra que prometi dar aos seus antepassados, vocês ficarão sabendo que eu sou o Senhor .
43 Mpe kuna, bokokanisa lisusu bizaleli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango, bomikosaki mbindo mpe bokokoma komiyokela nkele likolo ya mabe nyonso oyo bosalaki.
43 Então vocês lembrarão de todas as coisas vergonhosas que fizeram e de como se tornaram impuros . Ficarão com nojo de vocês mesmos, por causa de todas as coisas más que fizeram.
44 Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »
44 Vocês, israelitas, ficarão sabendo que eu sou o Senhor , pois não os trato como merecem por causa das suas ações más e perversas; mas o que faço é para proteger a minha honra. Eu, o Senhor Deus, falei.
45 — ausente —
45 O Senhor me disse o seguinte:
46 — ausente —
46 — Homem mortal , olhe para o Sul . Fale contra o Sul e profetize contra a floresta do Sul.
47 — ausente —
47 Diga a essa floresta que escute, pois o Senhor Deus está dizendo o seguinte: “Vejam! Estou acendendo um fogo que destruirá todas as árvores secas e todas as árvores verdes daí! Nada poderá apagar as chamas; elas se espalharão do Sul ao Norte e queimarão todos os rostos.
48 — ausente —
48 Todos verão que fui eu, o Senhor , que acendi esse fogo, fogo que ninguém pode apagar.”
49 — ausente —
49 Eu respondi: — Ó

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 20, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.