Ezequiel 16

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Yawe alobaki na ngai :
1 O Senhor falou comigo de novo. Ele disse:
2 « Mwana na moto, lakisa Yelusalemi misala na ye ya mbindo !
2 — Homem mortal , mostre a Jerusalém as coisas nojentas que ela tem feito.
3 Yebisa ye boye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi : Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana ; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti.
3 Diga a Jerusalém que o Senhor Deus lhe diz o seguinte: — Você nasceu na terra de Canaã. O seu pai era amorreu, e a sua mãe era heteia .
4 Na mokolo ya mbotama na yo, bakataki yo motolu te, basukolaki yo na mayi te mpo ete okoma peto, batikalaki kopakola yo mungwa te mpe bazipaki yo bilamba te.
4 Quando você nasceu, ninguém cortou o cordão do seu umbigo, nem lhe deu banho, nem esfregou sal em você, nem a enrolou em panos.
5 Moto moko te ayokelaki yo mawa mpo na kosalela yo ata moko kati na makambo wana. Nzokande, na mokolo ya mbotama na yo, bayinaki yo mpe babwakaki yo na zamba mpo ete bazalaki na somo makasi ya komona yo.
5 Ninguém teve dó bastante para lhe fazer qualquer uma dessas coisas. Quando você nasceu, ninguém gostava de você, e até a jogaram no mato.
6 Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’
6 — Então passei por perto e vi você rolando no seu próprio sangue. Embora você estivesse coberta de sangue, eu não deixei que morresse.
7 Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka ; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te.
7 Eu a fiz crescer como uma planta sadia. Você cresceu forte e alta e ficou moça. Os seus seios se formaram, e os seus cabelos ficaram compridos, mas você estava nua.
8 Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.
8 — Quando passei de novo, vi que havia chegado o tempo de você amar. Então cobri o seu corpo nu com a minha capa e prometi amar você. Sim! Fiz um contrato de casamento com você, e você se tornou minha. Sou eu, o Senhor Deus, quem está falando.
9 Nasukolaki yo na mayi mpo na kolongola makila oyo ekangamaki yo na nzoto, mpe napakolaki yo mafuta ya solo kitoko.
9 — Eu a lavei com água e limpei o sangue que a cobria. Passei azeite na sua pele.
10 Nalatisaki yo elamba ya talo batonga bililingi na basinga mpe basapato ya kitoko oyo basala na baposo ya banyama ; nalatisaki yo bilamba ya lino ya kitoko mpe nazipaki yo bilamba ya talo.
10 Eu a vesti com roupas bordadas e lhe dei sapatos do melhor couro, um turbante de linho e uma capa de seda.
11 Nalatisaki yo babiju, mayaka na maboko mpe na kingo.
11 Eu a enfeitei com joias — pulseiras e colares.
12 Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto.
12 Dei uma argola para o seu nariz, brincos para as suas orelhas e uma linda coroa para a sua cabeça.
13 Boye, olataki biloko ya wolo mpe ya palata ; bilamba na yo ezalaki ya lino ya kitoko, bilamba ya talo batonga bililingi na basinga. Bilei na yo ezalaki : farine ya ble basangisa na eloko mosusu te, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive. Okomaki lisusu kitoko koleka, ozwaki lokumu makasi mpe okomaki lokola mwasi mokonzi.
13 As suas joias eram de ouro e prata, e você sempre usou vestidos bordados, de linho e de seda. Você comeu pão feito da melhor farinha e tinha mel e azeite à vontade. Você era muito bonita e chegou a ser rainha.
14 Mpo ete kitoko na yo ekomaki ya kokoka, sango na yo epanzanaki kati na bikolo, likolo ya lokumu oyo napesaki yo, elobi Nkolo Yawe.
14 Em todas as nações falavam da sua beleza perfeita porque fui eu que a fiz assim tão linda. Sou eu, o Senhor Deus, quem está falando.
15 Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye.
15 — Mas você se aproveitou da sua beleza e da sua fama para dormir com qualquer um que passava .
16 Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te !
16 Usou os seus vestidos para enfeitar os seus lugares de adoração e ali você se entregava a qualquer um, como uma prostituta.
17 Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali ; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba.
17 Você pegou as joias de prata e de ouro que eu lhe tinha dado e com elas fez imagens de seres humanos; você foi infiel a mim, adorando essas imagens.
18 Okamataki bilamba na yo ya talo batonga bililingi na basinga, olatisaki yango bikeko wana mpe obonzelaki yango mafuta mpe ansa na Ngai.
18 Você pegou os vestidos bordados que lhe dei e com eles vestiu as imagens e ofereceu a elas o azeite e o incenso que eu lhe tinha dado.
19 Bilei oyo Ngai nabongiselaki yo : farine ya ble, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive, oyo napesaki yo mpo ete oliaka, obonzaki yango epai ya bikeko wana lokola mbeka ya solo kitoko. Yango nde makambo oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe.
19 Eu lhe dei comida: a melhor farinha, azeite e mel, mas você ofereceu tudo isso como sacrifício para agradar os ídolos. Sou eu, o Senhor Deus, quem está falando.
20 Okamataki lisusu bana basi mpe bana mibali oyo obotelaki Ngai, obonzaki bango lisusu lokola bilei epai ya banzambe wana ya bikeko mpo ete elia bango. Boni, kindumba na yo ekokaki kaka te ?
20 — Depois, você pegou os nossos filhos e as nossas filhas e os ofereceu como sacrifício aos ídolos. Será que não bastou que você tivesse sido infiel a mim?
21 Esengelaki solo ete oboma bana na Ngai mpo na kobonza bango lokola makabo epai ya banzambe wana ya bikeko, na kolekisa bango na moto !
21 Será que ainda precisou matar os meus filhos e oferecê-los em sacrifício aos ídolos?
22 Mpe wana ozalaki kosala makambo na yo nyonso ya nkele mpe kindumba na yo, okanisaki ata moke te bolenge na yo : tango oyo ozalaki bolumbu mpe ozalaki kobunda-bunda kati na makila na yo.
22 Durante a sua vida miserável de prostituta, nem uma vez você lembrou da sua juventude, quando estava nua, rolando no seu próprio sangue.
23 Mawa ! Mawa penza mpo na yo, elobi Nkolo Yawe ; sima na yo kosala mabe wana nyonso,
23 O Senhor Deus disse: — Ai de você! Sim! Ai de você! Depois de ter feito todo esse mal,
24 omitongelaki mwa ndako mpo na kosala kindumba mpe obongisaki mpo na yo moko, bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka ;
24 você ainda construiu altares em todas as estradas para ali adorar ídolos e praticar a prostituição.
25 otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso : osalaki penza kindumba makasi.
25 Você arrastou a sua beleza pela lama. E se ofereceu a todos os que passavam e se afundou cada vez mais na prostituição e na adoração de ídolos.
26 Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe ; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda.
26 Você convidou os egípcios, seus vizinhos imorais, para que fossem para a cama com você, e por isso me deixou irado .
27 Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe.
27 — Portanto, agora eu levantei a mão para castigá-la e para tirar a parte que você tinha na minha bênção. Eu a entreguei aos filisteus, que a odeiam e que estão com nojo das ações imorais que você tem praticado.
28 Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri ; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te.
28 — Não satisfeita com tudo isso, você correu atrás dos assírios. Você foi prostituta deles, mas eles também não a deixaram satisfeita.
29 Ezala kati na Kanana, pembeni ya Babiloni, okobaki kaka kosala kindumba ; kasi atako bongo, otondaki kaka te.
29 Depois, você serviu de prostituta para os babilônios, aquela nação de comerciantes, mas eles também não a deixaram satisfeita.
30 Yango motema ya pete ya ndenge nini penza yo ozali na yango, elobi Nkolo Yawe, mpo ete osala makambo oyo nyonso, lokola mwasi ya ndumba oyo akenda sango na mosala na ye ya kindumba !
30 O Senhor Deus diz o seguinte: — Você fez tudo isso como uma prostituta sem-vergonha.
31 Tango ozalaki kotonga mwa bandako ya kindumba na bisika nyonso oyo babalabala ekutana mpe kobongisa bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka, ozalaki kosala lokola mwasi ya ndumba nyonso te, pamba te ozalaki kosenga lifuti te.
31 Em todas as ruas, você construiu altares para ali adorar ídolos e praticar a prostituição. Mas você não faz isso por dinheiro, como uma prostituta qualquer.
32 Yo ozali penza mwasi ya ekobo ; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te.
32 Você é como a mulher que, em vez de amar o seu marido, comete adultério com estranhos.
33 Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti ; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso : na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo.
33 A prostituta é paga, mas você deu presentes a todos os seus amantes e ainda lhes ofereceu lembranças para que viessem de todas as partes dormir com você.
34 Yo, okeseni penza na basi mosusu na kindumba na yo, pamba te mibali balukaka yo te ! Yo penza, okeseni na basi mosusu ya ndumba, pamba te ofutaka mibali na esika ete bango bafuta yo.
34 Você é uma prostituta diferente. Ninguém a obrigou a se tornar prostituta. Você não recebe nada, mas paga! Sim! Você é diferente!
35 Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe !
35 Por isso, agora, você, prostituta, escute o que o Senhor Deus diz.
36 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo ; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali,
36 E o que ele diz é isto: — Você tirou a roupa, e como prostituta se entregou aos seus amantes e a todos os seus ídolos vergonhosos, e matou os seus filhos em
37 nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina ; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso.
37 Por causa disso, eu vou reunir todos os seus antigos amantes, tanto os que você apreciava como os que detestava. Eu os colocarei ao seu redor, em círculo; então arrancarei a sua roupa, e eles verão você nua.
38 Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi.
38 Eu a condenarei por adultério e assassinato e na minha ira e furor vou castigá-la com a morte.
39 Nakokaba yo na maboko ya bamakangu na yo, bakobuka mwa bandako na yo ya kindumba mpe bisika na yo ya bule ; bakolongola yo na makasi bilamba mpe babiju ya kitoko mpe bakotika yo bolumbu.
39 Vou entregá-la a eles, e eles derrubarão os altares onde você se entregava à prostituição e onde adorava ídolos. Eles levarão as suas roupas e as suas joias e a deixarão completamente nua.
40 Nakotindela yo bato ebele mpo ete babamba yo mabanga mpe batobola yo na mipanga na bango.
40 — Eles vão atiçar a multidão para apedrejá-la e com as suas espadas cortarão você em pedaços.
41 Bakotumba bandako na yo mpe bakopesa yo etumbu na miso ya basi ebele. Nakosukisa kindumba na yo, mpe okofuta lisusu bamakangu na yo te.
41 Eles destruirão com fogo as suas casas e deixarão que muitas mulheres vejam o seu castigo. Farei com que você deixe de ser prostituta, farei com que deixe de dar presentes aos seus amantes.
42 Na bongo nde kanda na Ngai epai na yo mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisaki ekosila ; nakovanda kimia mpe nakosilika lisusu te.
42 Aí o meu furor passará, e eu me acalmarei. Não ficarei mais irado, nem terei ciúmes.
43 Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe ; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo.
43 Você esqueceu como eu a tratei quando era moça e me deixou irado com todas as coisas que fez. Foi por isso que a fiz pagar por tudo. Por que é que, além de todas as coisas nojentas que você fez, ainda foi imoral? Eu, o Senhor Deus, falei.
44 Moto nyonso oyo alobaka na masese akoloba lisese oyo na tina na yo : ‘ Mwana mwasi azalaka kaka ndenge mama na ye azali. ’
44 O Senhor Deus diz o seguinte: — Jerusalém, os outros usarão este provérbio a respeito de você: “Tal mãe, tal filha.”
45 Ozali solo mwana mwasi ya mama na yo, oyo asambwisaki mobali na ye mpe bana na ye ya mibali ; ozali solo ndeko mwasi ya bandeko na yo ya basi oyo batiolaki mibali mpe bana na bango. Mama na bino azalaki moto ya mokili ya Iti, mpe tata na yo azalaki moto ya Amori.
45 — De fato, você é a filha da sua mãe. Ela detestava o marido e os filhos. Você é como as suas irmãs, que odiavam os seus maridos e os seus filhos. Você e as cidades que são suas irmãs tiveram mãe heteia e pai amorreu .
46 Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.
46 — A sua irmã mais velha é Samaria, no Norte, com os povoados que ficam ao seu redor. A sua irmã mais moça, com os seus povoados, é Sodoma, no Sul.
47 Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso.
47 Por acaso, você se contentou em seguir os passos delas e em imitar as coisas nojentas que elas fizeram? Não! Em pouco tempo, você se tornou mais imoral do que elas em tudo o que fazia.
48 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, Sodome, ndeko na yo ya mwasi, elongo na bana na ye ya basi batikala nanu kosala te makambo oyo yo elongo na bana na yo ya basi bosali.
48 — Jerusalém, juro pela minha vida — diz o Senhor Deus — que a sua irmã Sodoma e os povoados que ficam ao seu redor nunca pecaram tanto quanto você e os seus povoados.
49 Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.
49 Sodoma e as suas filhas eram orgulhosas porque tinham muita comida e viviam no conforto, sem fazer nada; porém não cuidaram dos pobres e dos necessitados.
50 Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona.
50 Elas foram orgulhosas e teimosas e fizeram as coisas que eu detesto; por isso, eu as destruí, como você sabe muito bem.
51 Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango ; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka.
51 — Samaria não cometeu a metade dos pecados que você, Jerusalém, cometeu. Você fez coisas ainda mais vergonhosas do que as suas irmãs Sodoma e Samaria fizeram. Elas até parecem inocentes quando a sua corrupção, Jerusalém, é comparada com a delas.
52 Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo ! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka !
52 E agora você terá de suportar a sua desgraça. Os seus pecados são mais graves do que os das suas irmãs, tanto que elas até são inocentes em comparação com você. Agora, Jerusalém, fique envergonhada e aguente a sua humilhação, pois você faz com que as suas irmãs pareçam puras.
53 Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango ; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango
53 O Senhor Deus disse a Jerusalém: — Vou trazer progresso de novo para as suas irmãs: para Sodoma e os povoados que ficam ao seu redor e para Samaria e os seus povoados. E vou fazer com que você também prospere.
54 mpo ete oyoka lisusu soni te mpe osambwa lisusu te likolo ya misala na yo mpe likolo ya makambo oyo ezalaki kobondisa bango.
54 Você terá vergonha de você mesma, e a sua desgraça mostrará às suas irmãs que elas estão em muito boas condições.
55 Sodome mpe Samari elongo na bingumba na yango ekozonga ndenge ezalaki liboso ; mpe yo elongo na bingumba na yo, nakozongisa bino ndenge bozalaki liboso.
55 De novo haverá progresso para elas, e você e os seus povoados também serão reconstruídos.
56 Na mokolo ya lolendo na yo, ozalaki kutu kolobela mabe ya Sodome, ndeko na yo,
56 No seu orgulho, você zombou de Sodoma,
57 liboso ete mabe na yo eyebana. Kasi sik’oyo, bingumba ya Siri elongo na bingumba nyonso oyo ezali zingazinga na yango mpe bingumba ya bato ya Filisitia ekomi koseka yo.
57 antes de ser descoberto o mal que você fazia. Agora, você se tornou igual a Sodoma: zombam de você os edomitas, os filisteus e os seus outros vizinhos que a odeiam.
58 Okomi sik’oyo komema mikumba ya makambo na yo ya mbindo mpe ya misala na yo ya mabe, elobi Yawe.
58 Você precisa sofrer pelas coisas imorais e vergonhosas que fez. Eu, o Senhor , falei.
59 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosalela yo kolanda misala na yo, pamba te otiolaki ndayi na Ngai na nzela ya kobuka boyokani na Ngai elongo na yo.
59 O Senhor Deus diz: — Jerusalém, eu a tratarei como merece, pois você quebrou as suas promessas e não respeitou a
60 Kasi Ngai, nakokanisa lisusu boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na yo tango ozalaki nanu elenge, mpe nakosala lisusu mpo na yo, boyokani oyo ekozala na suka te.
60 Mas eu manterei a aliança que fiz com você na sua mocidade e farei com você uma aliança que durará para sempre.
61 Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo ; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo.
61 Você lembrará do que fez e ficará envergonhada de receber de volta a sua irmã mais velha e a sua irmã mais moça. Eu as darei a você como se fossem filhas, embora isso não fizesse parte da nossa aliança.
62 Ngai nakosala boyokani na Ngai elongo na yo ; mpe na bongo, okososola solo ete Ngai, nazali Yawe,
62 Renovarei a aliança que fiz com você, e você ficará sabendo que eu sou o Senhor .
63 mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »
63 Eu perdoarei todas as coisas más que você fez, porém você lembrará delas e ficará envergonhada demais para dizer qualquer coisa. Eu, o Senhor Deus, falei.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 16, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.