Ezequiel 12
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI
1 Yawe alobaki na ngai :
1 Veio a mim esta palavra do Senhor:
2 « Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.
2 "Filho do homem, você vive no meio de uma nação rebelde. Eles têm olhos para ver, mas não vêem, e ouvidos para ouvir, mas não ouvem, pois são uma nação rebelde.
3 Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki.
3 "Portanto, filho do homem, arrume os seus pertences para o exílio e, durante o dia, à vista de todos, parta, e vá para outro lugar. Talvez eles compreendam, embora sejam uma nação rebelde.
4 Bimisa bisaka na yo na libanda, na moyi makasi na miso na bango ; mpe na pokwa, kende ndenge bato bakendaka na bowumbu na miso na bango.
4 Durante o dia, sem fugir aos olhares do povo, leve para fora os seus pertences arrumados para o exílio. Então, à tarde, saia como aqueles que vão para o exílio. E que os outros o vejam fazer isso.
5 Tobola mir na miso na bango mpe bimisa bisaka na yo na lidusu oyo okosala.
5 Enquanto eles o observam, faça um buraco no muro e passe os seus pertences através dele.
6 Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. »
6 Ponha-os nos ombros, enquanto o povo estiver observando, e carregue-os ao entardecer. Cubra o rosto para que você não possa ver nada do país, pois eu fiz de você um sinal para a nação de Israel".
7 Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai : na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu ; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango.
7 Então eu fiz o que me foi ordenado. Durante o dia levei para fora as minhas coisas arrumadas para o exílio. Depois, à tarde, fiz com as mãos um buraco no muro. Ao entardecer saí com os meus pertences carregando-os nos ombros à vista de todos.
8 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Yawe alobaki na ngai :
8 De manhã me veio esta palavra do Senhor:
9 « Mwana na moto, libota ya batomboki ya Isalaele oyo, batunaki yo te : ‹ Ozali kosala nini ? ›
9 "Filho do homem, acaso aquela nação rebelde de Israel não lhe perguntou: ‘Que é que você está fazendo? ’
10 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lisakoli oyo ezali na tina na mokambi oyo azali na Yelusalemi elongo na libota mobimba ya Isalaele, oyo bazali kuna. ›
10 "Diga-lhes: ‘Assim diz o Soberano Senhor: Esta advertência diz respeito ao príncipe de Jerusalém e a toda a nação de Israel que está ali’.
11 Loba na bango : ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango : bakokende na bowumbu lokola bakangami.
11 Diga-lhes: ‘Eu sou um sinal para vocês. Como eu fiz, assim lhes será feito. Eles irão para o exílio como prisioneiros’.
12 Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu ; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te.
12 "O príncipe deles porá os seus pertences nos ombros ao entardecer e sairá por um buraco que será escavado no muro para ele passar. Ele cobrirá o rosto para que não possa ver nada do país.
13 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.
13 Estenderei a minha rede para ele, e ele será apanhado em meu laço; eu o trarei para a Babilônia, terra dos caldeus, mas ele não a verá, e ali morrerá.
14 Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso : bakalaka mpe mampinga na ye ; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu.
14 Espalharei aos ventos todos os que estão ao seu redor, os seus oficiais e todas as suas tropas, e os perseguirei com a espada em punho.
15 Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu.
15 "Eles saberão que eu sou o Senhor, quando eu os dispersar entre as nações e os espalhar pelas terras.
16 Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
16 Mas pouparei uns poucos deles da espada, da fome e da peste para que, nas nações aonde forem, contem todas as suas práticas repugnantes. Então saberão que eu sou o Senhor".
17 Yawe alobaki na ngai :
17 Esta palavra do Senhor veio a mim:
18 « Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo ;
18 "Filho do homem, trema enquanto come a sua comida, e fique arrepiado de medo enquanto bebe a sua água.
19 mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.
19 Diga ao povo do país: ‘Assim diz o Senhor Soberano acerca daqueles que vivem em Jerusalém e em Israel: Eles comerão sua comida com ansiedade e beberão sua água desesperados, pois tudo o que existe em sua terra dela será arrancado por causa da violência de todos os que ali vivem.
20 Bingumba oyo bato bavandaka ekobebisama mpe mokili ekotikala lisusu na bato te, mpe bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
20 As cidades habitadas serão arrasadas e a terra ficará abandonada. Então vocês saberão que eu sou o Senhor’ ".
21 Yawe alobaki na ngai :
21 O Senhor me falou:
22 « Mwana na moto, bolobaka lisese nini kati na mokili ya Isalaele : ‹ Mikolo ezali koleka mpe bimoniseli ezali kokokisama te ? ›
22 "Filho do homem, que provérbio é este que vocês têm em Israel: ‘Os dias passam e todas as visões dão em nada’?
23 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. ›
23 Diga-lhes, pois: ‘Assim diz o Soberano Senhor: Vou dar fim a esse provérbio, e não será mais citado em Israel’. Diga-lhes: ‘Estão chegando os dias em que toda visão se cumprirá.
24 Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele.
24 Pois não haverá mais visões falsas ou adivinhações bajuladoras entre o povo de Israel.
25 Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke ; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › »
25 Mas eu, o Senhor, falarei o que eu quiser, e isso se cumprirá sem demora. Pois em seus dias, ó nação rebelde, cumprirei tudo o que eu disser, palavra do Soberano Senhor’ ".
26 Yawe alobaki na ngai :
26 Veio a mim esta palavra do Senhor:
27 « Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. ›
27 "Filho do homem, a nação de Israel está dizendo: ‘A visão que ele vê é para daqui a muitos anos, e ele profetiza sobre o futuro distante’.
28 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »
28 "Pois diga a eles: ‘Assim diz o Soberano Senhor: Nenhuma de minhas palavras sofrerá mais demora; tudo o que eu disser se cumprirá, palavra do Soberano Senhor’ ".
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 12, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.