Ezequiel 11

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Bongo Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na ekuke ya Tempelo ya Yawe, oyo etala na ngambo ya este. Bato tuku mibale na mitano bazalaki wana na ekotelo ya ekuke ; mpe namonaki kati na bango : Yazania, mwana mobali ya Azuri, mpe Pelatia, mwana mobali ya Benaya, oyo bazalaki bakambi ya bato.
1 Então o Espírito de Deus me levou pelo ar até o portão leste do Templo. Ali perto, estavam vinte e cinco homens. No meio deles, vi Jazanias, filho de Azur, e Pelatias, filho de Benaías. Os dois eram líderes do povo.
2 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala bato oyo basalaka mabongisi ya mabe mpe bapesaka batoli ya mabe kati na engumba oyo.
2 Deus me disse: —
3 Balobaka : ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te ? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. ›
3 Eles dizem: “Logo vamos construir casas de novo. A cidade é uma panela, e nós somos como a carne lá dentro, mas pelo menos estamos protegidos do fogo.”
4 Yango wana, sakola makambo ya mabe na tina na bango ; sakola, mwana na moto ! »
4 Por isso, homem mortal, profetize agora contra eles.
5 Molimo na Yawe akitaki likolo na ngai mpe ayebisaki ngai ete naloba :
5 Aí o Espírito do Senhor me dominou, e o Senhor me mandou dar esta mensagem ao povo: — Povo de Israel, eu sei o que vocês estão falando e conheço os planos que estão fazendo.
6 Bobomi bato ebele kati na engumba oyo mpe botondisi babalabala na yango na bibembe.
6 Vocês têm assassinado tanta gente nesta cidade, que as ruas estão cheias de mortos.
7 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni ; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango.
7 — Portanto, eu, o Senhor Deus, lhes digo isto: De fato, esta cidade é uma panela; mas a carne o que é? São os corpos das pessoas que vocês mataram! Mas eu expulsarei vocês da cidade.
8 Bozali kobanga mopanga ? Solo, Ngai, nakotindela bino mopanga, elobi Nkolo Yawe ;
8 Vocês têm medo de espadas? Pois trarei homens com espadas para atacá-los.
9 nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu.
9 Levarei vocês para fora da cidade e os entregarei na mão de estrangeiros. Eu os condenei à morte,
10 Bokokufa na mopanga, nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele, bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
10 e vocês serão mortos em batalha, no seu próprio país. Então todos ficarão sabendo que eu sou o Senhor .
11 Engumba oyo ekotikala te kozala nzungu mpo na bino, mpe bino bokotikala te kozala misuni kati na yango ; nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele.
11 A panela protege a carne, mas esta cidade não os protegerá. Eu os castigarei onde quer que estejam na terra de Israel.
12 Mpe bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, pamba te bolandaki te bikateli na Ngai mpe botosaki te mibeko na Ngai, kasi bolandaki nde bizaleli ya bikolo ya bapaya oyo bazingeli bino. »
12 Vocês saberão que eu sou o Senhor . Vocês guardaram as leis das nações vizinhas e ao mesmo tempo quebraram as minhas leis e desobedeceram aos meus mandamentos.
13 Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi : « Oh Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi ? »
13 Enquanto eu estava profetizando, Pelatias, filho de Benaías, caiu morto. Então me atirei no chão, com o rosto encostado na terra, e gritei: — Ó
14 Yawe alobaki na ngai :
14 O Senhor Deus falou comigo assim:
15 « Mwana na moto, ezali epai ya bato na yo, bandeko na yo ya makila mpe ndako mobimba ya Isalaele nde bato ya Yelusalemi balobaki : ‹ Bozala mosika na Yawe ; mokili oyo epesamelaki biso lokola libula na biso. ›
15 — Homem mortal , o povo que mora em Jerusalém está falando a respeito de você e dos seus patrícios, os israelitas que foram levados como prisioneiros para fora do seu país. Eles dizem: “Esses israelitas estão longe demais e não têm um lugar onde adorar o Senhor . Ele nos deu esta terra para ser nossa propriedade.”
16 Yango wana, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›
16 — Agora, vá falar com os seus patrícios que foram levados para fora do seu país e conte a eles o que eu estou dizendo. Fui eu que os mandei para longe, para o meio das outras nações, e os espalhei por outros países. Mas, por um pouco de tempo, nas terras para onde foram, eu mesmo fui para eles um santuário onde podiam me adorar.
17 Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›
17 — Por isso, diga-lhes o que eu, o Senhor Deus, estou dizendo. Eu os buscarei dos países para onde os espalhei e lhes darei de novo a terra de Israel.
18 Bakozonga kuna mpe bakolongola bililingi na yango nyonso ya mbindo elongo na banzambe nyonso ya bikeko.
18 Quando voltarem para a sua terra, eles tirarão dela todos os ídolos e acabarão com todos os costumes imorais do povo.
19 Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika ; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni,
19 Eu lhes darei um coração novo e uma nova mente. Tirarei deles o coração de pedra, desobediente, e lhes darei um coração humano, obediente.
20 mpo ete balanda bikateli na Ngai mpe batosa mibeko na Ngai. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
20 Assim eles cumprirão as minhas leis e obedecerão fielmente a todos os meus mandamentos. Eles serão o meu povo, e eu serei o Deus deles.
21 Kasi mpo na bato oyo bapesa mitema na bango epai ya bililingi ya mbindo mpe banzambe ya bikeko mpo na kokoba kosalela yango, nakofuta bango kolanda misala na bango, elobi Nkolo Yawe. »
21 Mas castigarei os que gostam de adorar ídolos nojentos e de praticar atos imorais. Eu os castigarei pelo que têm feito. Eu, o Senhor Deus, falei.
22 Na tango wana, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapine ekomaki kobaluka na mipanzi na bango ; boye nkembo na Nzambe ya Isalaele ezalaki na likolo na bango.
22 Os animais com asas começaram a voar, e as rodas foram com eles. A glória do Deus de Israel estava por cima deles.
23 Nkembo na Yawe emataki na likolo longwa kati na engumba mpe ekendeki kotelema na likolo ya ngomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi.
23 Aí a glória do Senhor se afastou da cidade e foi parar sobre o monte que está a leste dela.
24 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.
24 Na visão, o Espírito de Deus me levantou e me levou de volta até a Babilônia, onde estavam os prisioneiros. Aí a visão acabou,
25 Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai.
25 e eu contei aos que estavam no cativeiro tudo o que o Senhor me havia mostrado.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 11, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.