Ezequiel 10
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH
1 Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri ; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.
1 Olhei para a cobertura curva que estava sobre as cabeças dos animais com asas , e acima delas havia uma coisa que parecia um trono feito de safira .
2 Yawe alobaki na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Leka kati na bapine oyo ezali na se ya basheribe, tondisa maboko na yo na makala ya moto oyo okozwa kati na basheribe mpe panza yango na engumba. »
2 E o Senhor disse ao homem que usava a roupa de linho: — Passe pelo meio das rodas que ficam debaixo dos animais com asas e encha as mãos com brasas. Depois, espalhe as brasas sobre a cidade. Eu vi que o homem foi.
3 Nzokande, basheribe bazalaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo tango moto wana akotaki, mpe lipata moko etondisaki lopango na yango ya kati.
3 Quando ele entrou, os animais com asas estavam ao sul do Templo, e uma nuvem encheu o pátio de dentro.
4 Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe.
4 A glória do Senhor saiu de cima dos animais e foi para a entrada do Templo. Então a nuvem encheu o Templo, e o pátio ficou brilhando com a glória do Senhor .
5 Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.
5 O barulho das asas dos animais era ouvido até no pátio de fora e parecia a voz do Deus Todo-Poderoso.
6 Tango Yawe apesaki mitindo na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Kamata moto kati na bapine mpe kati na basheribe, » moto yango akotaki mpe atelemaki pembeni ya pine moko.
6 O Senhor mandou que o homem que usava a roupa de linho tirasse fogo do meio das rodas que estavam debaixo dos animais. O homem entrou e ficou ao lado de uma das rodas.
7 Bongo moko kati na basheribe asembolaki loboko na ye kino na moto oyo ezalaki na kati-kati na bango ; akamataki ndambo ya makala ya moto kati na moto mpe atiaki yango kati na maboko ya moto oyo alataki bilamba ya lino. Moto yango azwaki yango mpe abimaki na libanda.
7 Um dos animais estendeu a mão para o fogo que estava entre eles, pegou algumas brasas e pôs nas mãos do homem. E ele saiu levando as brasas.
8 Na se ya mapapu ya basheribe, elilingi moko emonanaki lokola maboko ya moto.
8 Vi que cada animal tinha debaixo das asas uma coisa parecida com mão de gente.
9 Tango natalaki, namonaki bapine minei pene ya basheribe : pine moko pembeni ya sheribe moko ; bongo bapine yango ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite.
9 Também vi que ao lado de cada animal havia uma roda, e as rodas brilhavam como pedras preciosas.
10 Bapine yango minei ezalaki ndenge moko, ezalaki komonana lokola moko kati na mosusu.
10 Todas eram iguais, e, por dentro, cada uma tinha outra roda, atravessada.
11 Soki ezali kotambola, ekendaka na bangambo nyonso minei oyo elongi ya basheribe ekotala ; mpe bapine yango ezalaki kotengama te soki basheribe bazali kotambola. Basheribe bazalaki kokende na bangambo nyonso oyo bilongi na bango ezalaki kotala, mpe bazalaki kobaluka na bangambo mosusu te.
11 Quando os animais andavam, as rodas iam em qualquer direção, sem virar. Todos eles iam juntos na direção que queriam, sem terem de virar.
12 Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki.
12 Os corpos dos animais, as costas, as mãos, as asas e as rodas estavam cheios de olhos.
13 Nayokaki ete bazali kobenga bapine yango « bapine ya mopepe ya kayina. »
13 Essas rodas eram as mesmas que eu tinha visto na minha primeira visão.
14 Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei : elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo.
14 Cada animal tinha quatro caras. A primeira cara era de boi, a segunda era de gente, a terceira era de leão, e a quarta era de águia.
15 Bongo basheribe bapumbwaki na likolo makasi. Ezalaki bikelamu ya bomoi oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari.
15 Eram os mesmos animais que eu tinha visto na beira do rio Quebar. Eles subiam da terra,
16 Soki basheribe bazali kotambola, bapine oyo ezalaki na mipanzi na bango ezalaki mpe kotambola. Soki bafungoli mapapu na bango mpo na kopumbwa longwa na se, bapine yango mpe ezalaki kokabwana na bango te, kasi nde ezalaki ya kokangana na mipanzi na bango.
16 e, quando andavam, as rodas rodavam com eles. Quando os animais abriam as asas e voavam, as rodas também iam com eles.
17 Soki basheribe batelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki bapumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na yango.
17 Quando os animais paravam, as rodas paravam; e, quando os animais voavam, as rodas iam com eles, pois eram controladas por eles.
18 Nkembo ya Yawe elongwaki na ekotelo ya Tempelo mpe ekendeki kotelema na likolo ya basheribe.
18 Então a glória do Senhor saiu da entrada do Templo e parou por cima dos animais.
19 Wana nazalaki kotala, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapumbwaki longwa na se ; mpe tango bazalaki kokende, bapine yango mpe ezalaki kokende elongo na bango. Batelemaki na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya este ya Tempelo ya Yawe, bongo nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki likolo na bango.
19 Enquanto eu estava olhando, os animais abriram as asas e subiram da terra, e as rodas foram com eles. Aí pararam no portão leste do Templo, e a glória do Deus de Israel continuou acima deles.
20 Ezalaki nde bikelamu ya bomoi oyo namonaki na se ya Nzambe ya Isalaele pembeni ya Kebari ; mpe nasosolaki ete ezali basheribe.
20 Reconheci que estes eram os mesmos animais que eu tinha visto debaixo do Deus de Israel, na beira do rio Quebar.
21 Moko na moko kati na bango azalaki na bilongi minei mpe mapapu minei ; bongo na se ya mapapu na bango, ezalaki na elilingi moko lokola maboko ya moto.
21 Cada um deles tinha quatro caras e quatro asas, e debaixo das asas de cada um havia uma coisa parecida com mão de gente.
22 Bilongi na bango ezalaki ndenge moko na oyo namonaki pene ya Kebari. Moko na moko azalaki kotambola kaka liboso.
22 As suas caras pareciam as mesmas caras que eu tinha visto na beira do rio Quebar. Cada animal andava direto para a frente.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Ezequiel 10, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.