Êxodo 28

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
1 "Chame seu irmão Arão e separe-o dentre os israelitas, e também os seus filhos Nadabe e Abiú, Eleazar e Itamar, para que me sirvam como sacerdotes.
2 Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu.
2 Para o seu irmão Arão, faça vestes sagradas que lhe confiram dignidade e honra.
3 Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
3 Diga a todos os homens capazes, aos quais dei habilidade, que façam vestes para a consagração de Arão, para que me sirva como sacerdote.
4 Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
4 São estas as vestes que farão: um peitoral, um colete sacerdotal, um manto, uma túnica bordada, um turbante e um cinturão. Para que o sacerdote Arão e seus filhos me sirvam como sacerdotes, eles farão essas vestes sagradas
5 Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
5 e usarão linho fino, fios de ouro e fios de tecido azul, roxo e vermelho.
6 Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
6 "Faça o colete sacerdotal de linho fino trançado e de fios de ouro e de fios de tecido azul, roxo e vermelho, trabalho artesanal.
7 Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba ekoleka likolo ya mapeka.
7 Terá duas ombreiras atadas às suas duas extremidades para uni-lo bem.
8 Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
8 O cinturão e o colete que por ele é preso serão feitos da mesma peça. O cinturão também será de linho fino trançado, de fios de ouro e de fios de tecido azul, roxo e vermelho.
9 Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele
9 "Grave em duas pedras de ônix os nomes dos filhos de Israel,
10 kolanda ndenge babotama : bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale.
10 por ordem de nascimento: seis nomes numa pedra e seis na outra.
11 Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo.
11 Grave os nomes dos filhos de Israel nas duas pedras como o lapidador grava um selo. Em seguida prenda-as com filigranas de ouro,
12 Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango.
12 costurando-as nas ombreiras do colete sacerdotal, como pedras memoriais para os filhos de Israel. Assim Arão levará os nomes em seus ombros como memorial diante do Senhor.
13 Okotia bikangelo ya wolo
13 Faça filigranas de ouro
14 mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te ; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga.
14 e duas correntes de ouro puro, entrelaçadas como uma corda; e prenda as correntes às filigranas.
15 Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
15 "Faça um peitoral de decisões, trabalho artesanal. Faça-o como o colete sacerdotal: de linho fino trançado e de fios de ouro e de fios de tecido azul, roxo e vermelho.
16 Soki bagumbi yango na biteni mibale, molayi mpe mokuse esengeli kozala ndenge moko : basantimetele pene tuku mibale na mitano.
16 Será quadrado, com um palmo de comprimento e um palmo de largura, e dobrado em dois.
17 Okotia na likolo na yango milongo minei ya mabanga ya talo. Na molongo ya liboso, okotia libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode ;
17 Em seguida, fixe nele quatro fileiras de pedras preciosas. Na primeira fileira haverá um rubi, um topázio e um berilo;
18 na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama ;
18 na segunda, uma turquesa, uma safira e um diamante;
19 na molongo ya misato, okotia libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ;
19 na terceira, um jacinto, uma ágata e uma ametista;
20 mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo.
20 na quarta, um crisólito, um ônix e um jaspe.
21 Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
21 Serão doze pedras, uma para cada um dos nomes dos filhos de Israel, cada uma gravada como um selo, com o nome de uma das doze tribos.
22 Okosala basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; okosala yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
22 "Faça para o peitoral correntes de ouro puro trançadas como cordas.
23 Okosala bapete mibale ya wolo mpo na elamba ya tolo mpe okokangisa yango na basonge mibale ya elamba yango.
23 Faça também duas argolas de ouro e prenda-as às duas extremidades do peitoral.
24 Okolekisa basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo ezali na basonge ya elamba ya tolo,
24 Prenda as duas correntes de ouro às argolas nas extremidades do peitoral,
25 mpe okokangisa basonge mibale mosusu ya basheneti yango, na bikangelo nyonso mibale ; mpe okokangisa yango na bankamba ya efode ; bankamba yango ekoleka na liboso.
25 e as outras extremidades das correntes, às duas filigranas, unindo-as às peças das ombreiras do colete sacerdotal, na parte da frente.
26 Okosala bapete mibale ya wolo oyo okotia na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
26 Faça outras duas argolas de ouro e prenda-as às outras duas extremidades do peitoral, na borda interna, próxima ao colete sacerdotal.
27 Okosala bapete mosusu mibale ya wolo oyo okotia na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
27 Faça mais duas argolas de ouro e prenda-as na parte inferior das ombreiras, na frente do colete sacerdotal, próximas da costura, logo acima do cinturão do colete sacerdotal.
28 Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango.
28 As argolas do peitoral serão amarradas às argolas do colete com um cordão azul, ligando-o ao cinturão, para que o peitoral não se separe do colete sacerdotal.
29 Boye tango Aron akokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule, akomema na motema na ye, na elamba ya tolo ya kokata makambo, bakombo ya bana mibali ya Isalaele lokola ekaniseli liboso ya Yawe mpo na libela.
29 "Toda vez que Arão entrar no Lugar Santo, levará os nomes dos filhos de Israel sobre o seu coração no peitoral de decisões, como memorial permanente perante o Senhor.
30 Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela.
30 Ponha também o Urim e o Tumim no peitoral das decisões, para que estejam sobre o coração de Arão sempre que ele entrar na presença do Senhor. Assim, Arão levará sempre sobre o coração, na presença do Senhor, os meios para tomar decisões em Israel. "
31 Okosala mobimba ya nzambala oyo ekozala na se ya efode na langi ya ble.
31 "Faça o manto do colete sacerdotal inteiramente de fios de tecido azul,
32 Nzambala esengeli kozala na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto ; bakotonga pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
32 com uma abertura para a cabeça no centro. Ao redor dessa abertura haverá uma dobra tecida, como uma gola, para que não se rasgue.
33 Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi ; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade.
33 Faça romãs de fios de tecido azul, roxo e vermelho em volta da borda do manto, intercaladas com pequenos sinos de ouro.
34 Ekolandana boye : ngonga moko ya moke ya wolo, mbuma moko ya grenade, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala.
34 Os sinos de ouro e as romãs se alternarão por toda a volta da borda do manto.
35 Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima ; wana ekolakisa ete akufi te.
35 Arão o vestirá quando ministrar. O som dos sinos será ouvido quando ele entrar no Lugar Santo diante do Senhor e quando sair, para que não morra.
36 Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe :
36 "Faça um diadema de ouro puro e grave nele como se grava um selo: Consagrado ao Senhor.
37 Okokangisa yango na singa ya ble, mpe ekozala na likolo ya kitendi ya kokanga na moto, na mbunzu.
37 Prenda-o na parte da frente do turbante com uma fita azul.
38 Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango.
38 Estará sobre a testa de Arão; assim ele levará a culpa de qualquer pecado que os israelitas cometerem em relação às coisas sagradas, ao fazerem todas as suas ofertas. Estará sempre sobre a testa de Arão, para que as ofertas sejam aceitas pelo Senhor.
39 Okotongela Aron nzambala ya lino mpe kitendi ya lino mpo na moto ; okosalela ye mpe mokaba oyo bato oyo batongaka bililingi na bilamba bakoyeba kotia bililingi.
39 "Teça a túnica e o turbante com linho fino. O cinturão será feito por um bordador.
40 Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo.
40 Faça também túnicas, cinturões e gorros para os filhos de Arão, para conferir-lhes honra e dignidade.
41 Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
41 Depois de vestir seu irmão Arão e os filhos dele, unja-os e consagre-os, para que me sirvam como sacerdotes.
42 Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango : bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende.
42 "Faça-lhes calções de linho que vão da cintura até a coxa, para cobrirem a sua nudez.
43 Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te.
43 Arão e seus filhos terão que vesti-los sempre que entrarem na Tenda do Encontro ou quando se aproximarem do altar para ministrar no Lugar Santo, para que não incorram em culpa e morram. "Este é um decreto perpétuo para Arão e para os seus descendentes. "

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Êxodo 28, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.