Êxodo 13

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs BKJ

Sair da comparação
1 Yawe alobaki na Moyize :
1 E o SENHOR falou a Moisés, dizendo:
2 « Bulisela Ngai mwana mobali nyonso ya liboso kati na bana ya Isalaele ; ezala moto to nyama, azali ya Ngai. »
2 Santificai-me todos os primogênitos, todo o que abriu a madre entre os filhos de Israel, tanto do homem quanto do animal; este é meu.
3 Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.
3 E Moisés disse ao povo: Lembrai-vos deste dia, no qual saístes do Egito, da casa da servidão, pois com mão poderosa o SENHOR vos tirou desse lugar. Não se comerá pão levedado.
4 Bozali kobima nde lelo oyo, na sanza ya abibi.
4 Neste dia, no mês de abibe, vós saístes.
5 Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo.
5 E será que, quando o SENHOR te houver introduzido na terra dos cananeus, e dos heteus, e dos amorreus, e dos heveus, e dos jebuseus, que ele jurou a teus pais que te daria, uma terra em que mana leite e mel, que guardarás este culto neste mês.
6 Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ; na mokolo ya sambo, bokosala feti mpo na Yawe.
6 Sete dias comerás pão ázimo, e no sétimo dia será uma festa ao SENHOR.
7 Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo, mpe eloko moko te oyo ezali na levire ekomonana kati na mokili na bino mobimba.
7 Comer-se-á pão ázimo durante sete dias, e não se verá pão levedado contigo, nem ainda se verá fermento contigo em todos os teus alojamentos.
8 Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali : ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. ›
8 E naquele dia mostrarás a teu filho, dizendo: Isso se faz por causa do que o SENHOR me fez, quando eu saí do Egito.
9 Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.
9 E te será por sinal sobre tua mão, e por memorial entre teus olhos, para que a lei do SENHOR esteja na tua boca, porque com uma mão forte o SENHOR te tirou do Egito.
10 Bokobatela mobu na mobu mibeko oyo na eleko na yango.
10 Por isso guardarás esta ordenança a seu tempo, ano após ano.
11 Tango Yawe akokotisa bino na mokili ya Kanana mpe akopesa bino yango ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai na bino,
11 E acontecerá que, quando o SENHOR te houver introduzido na terra dos cananeus, como jurou a ti e a teus pais, e te der,
12 bokobonzela Ye bana mibali nyonso ya liboso : bana nyonso ya liboso ya banyama ekozala ya Yawe.
12 que tu separarás para o SENHOR tudo o que abrir a madre, e todo primogênito que vier do animal que tiveres, o macho será do SENHOR.
13 Kasi soki mwana yango ya liboso ya nyama ezali mwana ya ane, bosengeli kobonza na esika na yango mwana meme ; soki te, bokobuka yango kingo. Kasi bokosikola na mbongo mwana nyonso ya liboso kati na bana na bino ya mibali.
13 E todo o primogênito da jumenta resgatarás com um cordeiro; e se não o resgatares, quebrarás o seu pescoço. E todo o primogênito do homem entre teus filhos resgatarás.
14 Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.
14 E acontecerá que, quando teu filho te perguntar no futuro, dizendo: O que é isto? Tu lhe dirás: Por força da mão o SENHOR nos tirou do Egito, da casa de servidão.
15 Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›
15 E aconteceu que, quando Faraó não queria nos deixar sair, o SENHOR matou todos os primogênitos da terra do Egito, tanto o primogênito do homem quanto o primogênito do animal. Por isso, eu sacrifico ao SENHOR tudo que abre a madre, sendo macho, mas resgato todos os primogênitos de meus filhos.
16 Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »
16 E será por sinal sobre tua mão, e por frontais entre teus olhos, porque com mão forte, o SENHOR nos tirou do Egito.
17 Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki : « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. »
17 E aconteceu que, quando Faraó havia deixado o povo ir, Deus não o conduziu pelo caminho da terra dos filisteus, embora esse fosse perto; porque Deus disse: Para que porventura o povo não se arrependa, vendo a guerra, e volte para o Egito.
18 Boye, Nzambe amemaki bato na nzela ya molayi, na nzela oyo ekenda na esobe, na ngambo ya ebale monene ya barozo. Bato ya Isalaele babimaki libanda ya Ejipito na molongo lokola mampinga ya basoda.
18 Mas Deus fez o povo rodear, pelo caminho do deserto do mar Vermelho, e os filhos de Israel subiram armados da terra do Egito.
19 Moyize azwaki mikuwa ya Jozefi, pamba te Jozefi alapisaki bana ya Isalaele ndayi ; alobaki : « Solo, Nzambe akozanga te kosunga bino, boye bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo mpe bokomema yango elongo na bino. »
19 E Moisés tomou consigo os ossos de José, porque havia jurado solenemente aos filhos de Israel, dizendo: Deus certamente vos visitará, e daqui levareis meus ossos convosco.
20 Tango balongwaki na Sukoti mpe batongaki molako na Etami, na mondelo ya esobe,
20 E começaram sua jornada de Sucote, e acamparam em Etã, na borda do deserto.
21 Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.
21 E o SENHOR ia adiante deles de dia numa coluna de nuvem, para conduzi-los pelo caminho, e à noite numa coluna de fogo, para lhes dar luz, para que fossem de dia e de noite.
22 Likonzi ya lipata na moyi to likonzi ya moto na butu elongwaki na esika na yango te liboso ya bana ya Isalaele.
22 Ele não tirou a coluna de nuvem de dia, nem a coluna de fogo à noite, de diante do povo.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Êxodo 13, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.