Efésios 5
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ACF
1 Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye.
1 Sede, pois, imitadores de Deus, como filhos amados;
2 Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.
2 E andai em amor, como também Cristo vos amou, e se entregou a si mesmo por nós, em oferta e sacrifício a Deus, em cheiro suave.
3 Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.
3 Mas a fornicação, e toda a impureza ou avareza, nem ainda se nomeie entre vós, como convém a santos;
4 Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi.
4 Nem torpezas, nem parvoíces, nem chocarrices, que não convêm; mas antes, ações de graças.
5 Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.
5 Porque bem sabeis isto: que nenhum devasso, ou impuro, ou avarento, o qual é idólatra, tem herança no reino de Cristo e de Deus.
6 Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.
6 Ninguém vos engane com palavras vãs; porque por estas coisas vem a ira de Deus sobre os filhos da desobediência.
7 Bosanganaka te elongo na bato wana.
7 Portanto, não sejais seus companheiros.
8 Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,
8 Porque noutro tempo éreis trevas, mas agora sois luz no Senhor; andai como filhos da luz
9 pamba te mbuma ya pole ezali : boboto, bosembo, mpe bosolo.
9 (Porque o fruto do Espírito está em toda a bondade, e justiça e verdade);
10 Bosalaka makasi mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo.
10 Aprovando o que é agradável ao Senhor.
11 Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.
11 E não comuniqueis com as obras infrutuosas das trevas, mas antes condenai-as.
12 Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango.
12 Porque o que eles fazem em oculto até dizê-lo é torpe.
13 Nzokande nyonso oyo pole ebimisaka na pwasa emonana polele,
13 Mas todas estas coisas se manifestam, sendo condenadas pela luz, porque a luz tudo manifesta.
14 pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba :
14 Por isso diz: Desperta, tu que dormes, e levanta-te dentre os mortos, e Cristo te esclarecerá.
15 Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.
15 Portanto, vede prudentemente como andais, não como néscios, mas como sábios,
16 Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.
16 Remindo o tempo; porquanto os dias são maus.
17 Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo.
17 Por isso não sejais insensatos, mas entendei qual seja a vontade do Senhor.
18 Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,
18 E não vos embriagueis com vinho, em que há contenda, mas enchei-vos do Espírito;
19 bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ;
19 Falando entre vós em salmos, e hinos, e cânticos espirituais; cantando e salmodiando ao Senhor no vosso coração;
20 bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ;
20 Dando sempre graças por tudo a nosso Deus e Pai, em nome de nosso Senhor Jesus Cristo;
21 mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu.
21 Sujeitando-vos uns aos outros no temor de Deus.
22 Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo.
22 Vós, mulheres, sujeitai-vos a vossos maridos, como ao Senhor;
23 Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango.
23 Porque o marido é a cabeça da mulher, como também Cristo é a cabeça da igreja, sendo ele próprio o salvador do corpo.
24 Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.
24 De sorte que, assim como a igreja está sujeita a Cristo, assim também as mulheres sejam em tudo sujeitas a seus maridos.
25 Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango
25 Vós, maridos, amai vossas mulheres, como também Cristo amou a igreja, e a si mesmo se entregou por ela,
26 mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,
26 Para a santificar, purificando-a com a lavagem da água, pela palavra,
27 mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.
27 Para a apresentar a si mesmo igreja gloriosa, sem mácula, nem ruga, nem coisa semelhante, mas santa e irrepreensível.
28 Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko.
28 Assim devem os maridos amar as suas próprias mulheres, como a seus próprios corpos. Quem ama a sua mulher, ama-se a si mesmo.
29 Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba,
29 Porque nunca ninguém odiou a sua própria carne; antes a alimenta e sustenta, como também o Senhor à igreja;
30 pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.
30 Porque somos membros do seu corpo, da sua carne, e dos seus ossos.
31 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.
31 Por isso deixará o homem seu pai e sua mãe, e se unirá a sua mulher; e serão dois numa carne.
32 Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba.
32 Grande é este mistério; digo-o, porém, a respeito de Cristo e da igreja.
33 Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
33 Assim também vós, cada um em particular, ame a sua própria mulher como a si mesmo, e a mulher reverencie o marido.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Efésios 5, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.