Efésios 3
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs BKJ
1 Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—
1 Por esta causa, eu, Paulo, sou o prisioneiro de Jesus Cristo por vós, os gentios,
2 Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino
2 se é que tendes ouvido a dispensação da graça de Deus, que me é dada para convosco;
3 mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.
3 como pela revelação ele fez-me saber este mistério (como vos escrevi antes, em poucas palavras,
4 Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto.
4 pelo que, quando ledes, podeis entender o meu conhecimento do mistério de Cristo).
5 Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.
5 O qual, noutras épocas, não foi manifestado aos filhos dos homens, como, agora, tem sido revelado aos seus santos apóstolos e profetas pelo Espírito,
6 Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.
6 a saber, que os gentios são coerdeiros, e de um mesmo corpo, e participantes da sua promessa em Cristo pelo evangelho;
7 Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu.
7 do qual fui feito ministro, segundo o dom da graça de Deus, dado a mim pela operação eficaz do seu poder.
8 Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;
8 A mim, que sou menos que o mínimo de todos os santos, me foi dada esta graça de pregar entre os gentios as riquezas incompreensíveis de Cristo,
9 apesa ngai mpe ngolu ya kosunga bato nyonso mpo ete basosola ndenge nini Nzambe akokisaka mabombami oyo ezalaki wuta kala ya kobombama kati na Ye, Mokeli na nyonso,
9 e fazer com que todos vejam qual é a comunhão do mistério, que, desde o começo do mundo, esteve oculto em Deus, que criou todas as coisas por meio de Jesus Cristo;
10 na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,
10 para que agora, os principados e potestades nos lugares celestiais possam conhecer, pela igreja, a multiforme sabedoria de Deus,
11 kolanda mabongisi oyo asala wuta kala mpe akokisa kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
11 segundo o eterno propósito que fez em Cristo Jesus, nosso Senhor,
12 Kati na Yesu-Klisto mpe na nzela ya kondima na biso kati na Ye, tozali na elikya ya kopusana na bonsomi nyonso pene ya Nzambe.
12 no qual temos ousadia e acesso com confiança, pela nossa fé nele.
13 Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.
13 Portanto, vos peço que não desfaleçais nas minhas tribulações por vós, que são a vossa glória.
14 Yango wana nafukamaka liboso ya Tata
14 Por causa disso, me ponho de joelhos perante o Pai de nosso Senhor Jesus Cristo,
15 oyo apesaka bomoi na mabota nyonso kati na Likolo mpe awa na mabele,
15 do qual toda a família nos céus e na terra toma o nome,
16 mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,
16 para que vos conceda, segundo as riquezas da sua glória, que sejais fortalecidos com poder pelo seu Espírito no homem interior;
17 mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,
17 para que Cristo habite no vosso coração pela fé; a fim de, estando arraigados e fundados em amor,
18 mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto,
18 possa ser capaz de compreender, com todos os santos, qual é a largura, e o comprimento, e a profundidade, e altura,
19 mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.
19 e conhecer o amor de Cristo, que excede todo conhecimento, para que sejais cheios de toda a plenitude de Deus.
20 Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,
20 Ora, àquele que é capaz de fazer tudo muito mais abundantemente além daquilo que pedimos ou pensamos, segundo o poder que em nós opera,
21 tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.
21 a ele seja a glória na igreja, por Cristo Jesus, em todas as gerações, para sempre e sempre. Amém.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Efésios 3, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.