Deuteronômio 7

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH

Sair da comparação
NTLH Nova Tradução na Linguagem de Hoje 2000
1 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—
1 Moisés disse ao povo: — O
2 mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.
2 O Senhor entregará esses povos nas suas mãos, e vocês os atacarão e destruirão completamente. Não façam nenhum acordo de paz com eles, nem tenham pena deles.
3 Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali ;
3 Não casem com essa gente, nem vocês, nem os seus filhos ou as suas filhas,
4 noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.
4 pois esses povos farão com que os seus filhos rejeitem a Deus e adorem outros deuses. Aí o Senhor Deus ficará irado com vocês e os destruirá de uma vez.
5 Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,
5 Portanto, derrubem os altares desses povos, quebrem as colunas do deus Baal , cortem os postes da deusa Aserá e queimem todas as imagens.
6 pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.
6 Pois vocês são o povo escolhido pelo Senhor , nosso Deus; entre todos os povos da terra ele escolheu vocês para serem somente dele.
7 Ezali te mpo ete bozalaki mingi koleka bato mosusu nde Yawe alakisaki bino bolingo na Ye, bozalaki kutu moke koleka bato nyonso.
7 — O Senhor Deus os amou e escolheu, não porque vocês são mais numerosos do que outros povos; de fato, vocês são menos numerosos do que qualquer outro povo.
8 Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.
8 Mas o Senhor os amou e com a sua força os livrou do poder de Faraó, o rei do Egito, onde vocês eram escravos. Ele fez isso para cumprir o juramento que tinha feito aos nossos antepassados.
9 Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.
9 Lembrem que o Senhor , nosso Deus, é o único Deus. Ele é fiel e mantém a sua aliança . Ele continua a amar, por mil gerações , aqueles que o amam e obedecem aos seus mandamentos,
10 Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko.
10 porém castiga de uma vez os que o rejeitam. Ele não demora em castigá-los e destruí-los.
11 Yango wana, bosala keba mpo na kosalela mitindo, bikateli mpe mibeko oyo napesi bino lelo.
11 Obedeçam, pois, às leis e aos mandamentos que hoje eu estou dando a vocês e façam tudo o que eu mando.
12 Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.
12 — Se vocês derem atenção a essas leis e as cumprirem fielmente, o Senhor , nosso Deus, manterá a sua aliança e continuará a amá-los, conforme prometeu aos nossos antepassados.
13 Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.
13 Ele os amará, e abençoará, e fará com que se tornem mais e mais numerosos. Ele lhes dará muitos filhos, boas colheitas de cereais, uvas e azeitonas e muitas crias de gado e de ovelhas. Deus lhes dará todas essas bênçãos na terra que ele vai lhes dar, conforme o juramento que fez aos nossos antepassados.
14 Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana.
14 Vocês serão o povo mais abençoado do mundo. Todos terão filhos, e todos os seus animais terão crias.
15 Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo.
15 O Senhor Deus os protegerá de toda enfermidade e nunca os castigará com as terríveis doenças com que castigou os egípcios, como vocês bem sabem. Pelo contrário, ele mandará essas doenças para os povos que odeiam vocês.
16 Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
16 Acabem com todos os povos que o Senhor , nosso Deus, entregar nas mãos de vocês. Não tenham pena deles, nem adorem os seus deuses, pois isso seria uma armadilha mortal para vocês.
17 Tango mosusu okomilobela : « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango ? »
17 — Não fiquem pensando assim: “Estes povos são mais numerosos do que nós; como poderemos derrotá-los?”
18 Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.
18 Não tenham medo deles; lembrem daquilo que o Senhor , nosso Deus, fez com o rei do Egito e com todo o seu povo.
19 Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.
19 Lembrem das pragas, dos milagres e das coisas espantosas que vocês viram e não esqueçam o grande poder com que o Senhor os tirou do Egito. Pois o Senhor , nosso Deus, fará com esses povos, de quem vocês estão com medo, a mesma coisa que fez com os egípcios.
20 Mpe kutu, Yawe, Nzambe na yo, akotindela bango banzoyi ya minene kino tango bato oyo bakotikala mpe bakobombama liboso na yo bakokufa.
20 Deus fará com que esses povos fujam apavorados e destruirá os que escaparem e se esconderem de vocês.
21 Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.
21 — Portanto, não tenham medo deles, pois com vocês está o Senhor , nosso Deus, o Deus que é forte e causa medo.
22 Yawe, Nzambe na yo, akobengana moke-moke bikolo oyo ezali liboso na yo ; okokoka te kosilisa bango na mbala moko, noki te banyama mabe ekokoma ebele zingazinga na yo.
22 Pouco a pouco ele irá expulsando os povos que vocês enfrentarem. Mas vocês não irão destruí-los todos de uma vez; se fizessem isso, o número dos animais selvagens aumentaria, e eles seriam um grande perigo.
23 Kasi Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, akotia bango noki na mobulu monene kino bakobebisama.
23 O Senhor vai entregar os inimigos nas mãos de vocês e vai deixá-los tão apavorados, que eles serão destruídos.
24 Yawe akokaba bakonzi na bango na maboko na yo, mpe okolimwisa bakombo na bango na mokili ; moko te akokoka kotelemela yo, okobebisa bango.
24 Deus também entregará nas suas mãos os reis desses povos. Vocês os matarão, e ninguém lembrará nem do nome deles. Vocês derrotarão todos os seus inimigos; ninguém poderá resistir.
25 Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
25 Queimem todas as imagens dos deuses desses povos. Não cobicem a prata e o ouro que estão nas imagens, nem fiquem com eles, pois isso seria uma armadilha mortal para vocês. Para o Senhor , nosso Deus, adorar ídolos é uma coisa nojenta.
26 Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.
26 Não levem nenhum ídolo para dentro de suas casas, pois a maldição que está sobre o ídolo estará também sobre vocês. Detestem e odeiem com todo o coração os ídolos, pois o ídolo é uma coisa amaldiçoada.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Deuteronômio 7, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.