Deuteronômio 2
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVT
1 Na sima, tobalukaki mpe tokendeki na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo ndenge Yawe atindaki ngai, pamba te tobalukaki mikolo ebele zingazinga ya etuka ya ngomba Seiri.
1 “Depois disso, demos meia-volta e regressamos pelo deserto, em direção ao mar Vermelho, conforme a instrução que o S enhor me deu. Por um longo tempo, vagamos de um lugar para outro na região do monte Seir.
2 Yawe alobaki na ngai :
2 “Finalmente, o S enhor me disse:
3 « Bowumeli mingi na kobaluka zingazinga ya etuka ya bangomba oyo ; sik’oyo bokende na ngambo ya nor.
3 ‘Vocês andaram por esta região montanhosa tempo suficiente; agora, sigam para o norte.
4 Pesa mitindo oyo epai ya bato : ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele.
4 Dê as seguintes ordens ao povo: Vocês passarão pelo território de seus parentes edomitas, os descendentes de Esaú, que habitam em Seir. Tenham muito cuidado, pois os edomitas se sentirão ameaçados.
5 Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye.
5 Não os perturbem, pois eu dei a eles como propriedade toda a região montanhosa ao redor do monte Seir, e não darei a vocês um metro sequer da terra deles.
6 Bokofuta bango palata mpo na biloko oyo bokolia mpe mpo na mayi oyo bokomela.
6 Paguem por todo alimento que comerem e pela água que beberem.
7 Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »
7 Pois o S enhor , seu Deus, tem abençoado vocês em tudo que têm feito. Ele tem cuidado de cada um de seus passos por este grande deserto. Durante estes quarenta anos, o S enhor , seu Deus, tem estado com vocês, e nada lhes tem faltado’.
8 Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi.
8 “Assim, contornamos o território de nossos parentes, os descendentes de Esaú, que habitam em Seir. Evitamos o caminho que passa pelo vale de Arabá, que sobe de Elate e Eziom-Geber. “Então, quando nos dirigimos para o norte pelo caminho do deserto de Moabe,
9 Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
9 o S enhor nos advertiu: ‘Não perturbem os moabitas, os descendentes de Ló, nem comecem uma guerra contra eles. Eu dei a eles como propriedade a região de Ar, e não darei a vocês parte alguma do território deles’.
10 Bato ya Emimi nde bazalaki kovanda kuna na kala. Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe lokola bana ya Anaki.
10 (Antigamente, um povo chamado emins havia habitado na região de Ar. Eram tão fortes, numerosos e altos quanto os enaquins.
11 Bango mpe bazalaki komonana lokola bato ya Refayimi ndenge moko na bana ya Anaki. Kasi bato ya Moabi bazalaki kobenga bango bato ya Emimi.
11 Os emins e os enaquins também eram conhecidos como refains, embora os moabitas os chamassem de emins.
12 Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi.
12 Em outros tempos, os horeus haviam habitado em Seir, mas os edomitas os expulsaram e ocuparam sua terra, da mesma forma que Israel expulsou os habitantes de Canaã quando o S enhor lhe deu a terra deles.)
13 Yawe alobaki : « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku.
13 “Então o S enhor nos disse: ‘Mexam-se! Atravessem o ribeiro de Zerede’. Assim, atravessamos o ribeiro.
14 Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango.
14 “Trinta e oito anos se passaram desde que partimos pela primeira vez de Cades-Barneia até atravessarmos, por fim, o ribeiro de Zerede. Àquela altura, todos os homens com idade suficiente para ir à guerra tinham morrido no deserto, como o S enhor havia jurado que aconteceria.
15 Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako.
15 A mão do S enhor pesou sobre eles e os eliminou, e eles morreram no meio do acampamento.
16 Tango bato ya suka kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba basilaki kokufa,
16 “Quando todos os homens com idade suficiente para ir à guerra haviam morrido,
17 Yawe alobaki na ngai :
17 o S enhor me disse:
18 « Lelo oyo, okokatisa Moabi mpe Ari.
18 ‘Hoje vocês atravessarão a fronteira com Moabe pela região de Ar
19 Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
19 e se aproximarão da terra dos amonitas, os descendentes de Ló. Não os perturbem nem comecem uma guerra contra eles. Eu dei a eles como propriedade a terra de Amom, e não darei a vocês parte alguma do território deles’.
20 Mboka yango mpe emonanaki lokola mboka oyo bato ya Refayimi bazalaki kovanda. Kasi bato ya Amoni bazalaki kobenga bato ya Refayimi : bato ya Zamizumi.
20 (Antigamente, aquela região era considerada terra dos refains que haviam habitado ali, embora os amonitas os chamassem de zanzumins.
21 Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
21 Também eram tão fortes, numerosos e altos quanto os enaquins. Mas o S enhor os destruiu para que os amonitas tomassem posse de sua terra.
22 Yawe asalaki mpe ndenge wana mpo na bakitani ya Ezawu oyo bazalaki kovanda na Seiri tango abomaki bato ya Ori liboso na bango. Bakitani ya Ezawu babenganaki bato ya Ori mpe bakomaki kovanda na bisika na bango kino na mokolo ya lelo.
22 Ele fez o mesmo pelos descendentes de Esaú que habitavam em Seir, pois destruiu os horeus para que os descendentes de Esaú se estabelecessem no lugar deles. Os descendentes de Esaú habitam nessa terra até hoje.
23 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
23 Algo parecido aconteceu quando os caftoreus de Creta invadiram e destruíram os aveus, que habitavam em povoados na região de Gaza.)
24 Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.
24 “Então o S enhor disse: ‘Mexam-se! Atravessem o vale de Arnom. Vejam, eu lhes entregarei o amorreu Seom, rei de Hesbom, e lhes darei a terra dele. Ataquem-no e comecem a tomar posse daquele território.
25 Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. »
25 A partir de hoje, farei os povos de toda a terra se encherem de medo por sua causa. Quando ouvirem relatos a seu respeito, tremerão de angústia e pavor’.”
26 Wuta na esobe ya Kedemoti, natindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, na maloba ya kimia.
26 “Do deserto de Quedemote, enviei embaixadores ao rei Seom de Hesbom com a seguinte proposta de paz:
27 Nalobaki : « Tobondeli yo, tika biso tolekela na mokili na yo. Tokoleka kaka na nzela ya monene, tokobaluka te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to ya mobali.
27 ‘Deixe-nos atravessar seu território. Ficaremos na estrada principal e não nos desviaremos nem para um lado nem para o outro.
28 Okotekela biso biloko ya kolia mpe mayi ya komela na motuya ya palata. Kasi tika biso kaka toleka na makolo
28 Venda-nos alimentos para comermos e água para bebermos, e pagaremos por tudo. Queremos apenas permissão para passar por seu território.
29 ndenge bakitani ya Ezawu, oyo bavandaka na mokili ya Seiri, mpe bato ya Moabi, oyo bavandaka na Ari, basalelaki biso kino tokatisaki Yordani mpe tokotaki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. »
29 Os descendentes de Esaú, que habitam em Seir, nos permitiram passar pelo território deles, como também fizeram os moabitas, que habitam na região de Ar. Deixe-nos passar até atravessarmos o Jordão e entrarmos na terra que o S enhor , nosso Deus, nos dá’.
30 Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.
30 “Mas Seom, rei de Hesbom, não nos permitiu passar, pois o S enhor , seu Deus, endureceu-lhe o coração e o tornou hostil, a fim de entregá-lo em nossas mãos, como de fato aconteceu.
31 Bongo Yawe alobaki na ngai : « Tala, nabandi kokaba na maboko na bino Sikoni mpe mokili na ye. Banda kobotola yango mpe kamata yango. »
31 “Então o S enhor me disse: ‘Veja, eu lhes entrego o rei Seom e seu território. Agora, comecem a conquistar sua terra e a tomar posse dela’.
32 Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi,
32 “Então o rei Seom declarou guerra contra nós e mobilizou todas as suas tropas em Jaza.
33 Yawe, Nzambe na biso, akabaki ye na maboko na biso mpe tobomaki ye, bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso.
33 Mas o S enhor , nosso Deus, o entregou a nós, e matamos a ele, seus filhos e todo o seu povo.
34 Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso ; totikaki ata moto moko te.
34 Conquistamos todas as suas cidades e as destruímos completamente. Matamos homens, mulheres e crianças. Não poupamos ninguém.
35 Kasi tomemaki mpo na biso : bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tokutaki na bingumba na bango.
35 Tomamos como despojo todos os animais e todos os objetos de valor das cidades que conquistamos.
36 Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.
36 “Também conquistamos Aroer, à beira do vale de Arnom, além da cidade no vale e toda a região até Gileade. Nenhuma cidade tinha muralhas fortes o suficiente para nos deter, pois o S enhor , nosso Deus, nos entregou tudo.
37 Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso.
37 Evitamos, porém, a terra dos amonitas, ao longo do rio Jaboque, e as cidades da região montanhosa, ou seja, todos os lugares que o S enhor , nosso Deus, havia ordenado que deixássemos em paz.”
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Deuteronômio 2, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.