Deuteronômio 28

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs BKJ

Sair da comparação
1 Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili.
1 E acontecerá que, se ouvires diligentemente a voz do SENHOR teu Deus, para guardar e cumprir todos os seus mandamentos, que te ordeno neste dia, que o SENHOR teu Deus te exaltará acima de todas as nações da terra;
2 Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino :
2 e todas estas bênçãos virão a ti, e te alcançarão, se ouvires a voz do SENHOR teu Deus.
3 Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga.
3 Bendito serás tu na cidade, e bendito serás tu no campo.
4 Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.
4 Bendito será o fruto do teu corpo, e o fruto da tua terra, e o fruto dos teus animais, e o crescimento das tuas vacas, e os rebanhos das tuas ovelhas.
5 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekopambolama.
5 Bendito será o teu cesto e o teu armazém.
6 Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima.
6 Bendito serás quando entrares e bendito serás quando saíres.
7 Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino ; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.
7 O SENHOR fará com que os inimigos que se levantarem contra ti sejam feridos perante a tua face. Eles sairão contra ti por um caminho, e fugirão diante de ti por sete caminhos.
8 Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.
8 O SENHOR ordenará que a bênção esteja contigo nos teus celeiros e em tudo que puseres a tua mão; e te abençoará na terra que o SENHOR teu Deus te der.
9 Yawe akokomisa bino libota na Ye ya bule ndenge alakaki bino tango alapaki ndayi, pamba te bokobatela mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotambola na banzela na Ye.
9 O SENHOR te estabelecerá como um povo santo para si mesmo, como te jurou, se guardares os mandamentos do SENHOR teu Deus, e andares nos seus caminhos.
10 Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino.
10 E todos os povos da terra verão que és chamado pelo nome do SENHOR; e terão medo de ti.
11 Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino.
11 E o SENHOR te tornará abundante em bens, no fruto do teu ventre, e no fruto dos teus animais, e no fruto da tua terra, na terra que o SENHOR jurou aos teus pais que te daria.
12 Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.
12 O SENHOR te abrirá o seu bom tesouro, os céus, para dar chuva à tua terra no seu tempo, e para abençoar toda a obra das tuas mãos; e emprestarás a muitas nações, e tu não pedirás nada emprestado.
13 Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te ; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te.
13 E o SENHOR fará de ti a cabeça, e não a cauda; e só estarás em cima, e não estarás debaixo; se ouvires os mandamentos do SENHOR teu Deus, que te ordeno neste dia, para que os observes e os cumpras;
14 Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.
14 e não te desviarás de todas as palavras que te ordeno neste dia, nem para a direita nem para a esquerda, para andares após outros deuses, para os servires.
15 Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino :
15 Mas acontecerá que, se não deres ouvidos à voz do SENHOR teu Deus, para cuidares de cumprir todos os seus mandamentos e os seus estatutos, que te ordeno neste dia, sobre ti virão todas estas maldições e te alcançarão.
16 Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga.
16 Maldito serás tu na cidade, e maldito serás tu no campo.
17 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe.
17 Malditos serão o teu cesto e o teu armazém.
18 Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.
18 Maldito será o fruto do teu ventre, e o fruto da tua terra, e o crescimento das tuas vacas, e os rebanhos das tuas ovelhas.
19 Bokolakelama mabe tango bokokota mpe bokolakelama mabe tango bokobima.
19 Maldito serás tu ao entrares e maldito serás ao saíres.
20 Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano ; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe.
20 O SENHOR mandará sobre ti a maldição, a aflição e a repreensão, em tudo que puseres a tua mão para fazer, até que sejas destruído e até que pereças rapidamente, por causa da maldade das tuas obras, com que me deixaste.
21 Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
21 O SENHOR fará com que a peste se agarre a ti, até que ele te tenha consumido da terra, a qual vais possuir.
22 Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino : fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino : kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa.
22 O SENHOR te ferirá com a tuberculose e com a febre, e com uma inflamação, e com um ardor intenso, e com a espada, e com golpes, e com a ferrugem; e te perseguirão até que pereças.
23 Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te.
23 E os teus céus, que estão sobre a tua cabeça, serão de bronze, e a terra que está debaixo de ti será de ferro.
24 Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo ; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino.
24 O SENHOR fará que a chuva da tua terra seja pó e poeira; dos céus ela descerá sobre ti, até que sejas destruído.
25 Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.
25 O SENHOR fará com que sejas ferido diante de teus inimigos; sairás por um caminho contra eles, e fugirás por sete caminhos perante eles; e serás removido a todos os reinos da terra.
26 Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango.
26 E o teu cadáver será alimento a todas as aves do ar, e a todos os animais da terra, e nenhum homem os espantará.
27 Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.
27 O SENHOR te ferirá com as úlceras do Egito, e com tumores, e com sarna, e com coceira, das quais não te poderás curar.
28 Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.
28 O SENHOR te ferirá com loucura, e cegueira, e espanto de coração;
29 Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.
29 e tatearás ao meio-dia, como o cego tateia na escuridão, e não prosperarás nos teus caminhos; e somente serás oprimido e roubado eternamente; e nenhum homem te salvará.
30 Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.
30 Tomarás uma esposa, e outro homem se deitará com ela; edificarás uma casa, e não habitarás nela; plantarás uma vinha, e não colherás as suas uvas.
31 Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te ; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino ; mpe moto moko te akosunga bino.
31 Teu boi será morto diante dos teus olhos, e não comerás dele; teu jumento será violentamente tomado diante de tua face, e não te será restituído; as tuas ovelhas serão dadas aos teus inimigos, e não terás ninguém que as resgate.
32 Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.
32 Teus filhos e tuas filhas serão dados a outro povo, e os teus olhos olharão e desfalecerão com saudades deles todo o dia; e não haverá poder na tua mão.
33 Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.
33 Uma nação que não conheces comerá o fruto da tua terra, e todo o teu trabalho, e serás somente oprimido e esmagado sempre,
34 Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.
34 assim ficarás enlouquecido pelo que os teus olhos virem.
35 Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.
35 O SENHOR te ferirá nos joelhos, e nas pernas, com uma úlcera dolorosa que não pode ser curada, desde a sola de teu pé até o topo da tua cabeça.
36 Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.
36 O SENHOR te trará, e ao teu rei, que colocares sobre ti, uma nação que nem tu, nem teus pais conheceram; e ali servirás a outros deuses, madeira e pedra.
37 Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino.
37 E te tornarás um espanto, um provérbio e um ludíbrio entre todas as nações a que o SENHOR te levar.
38 Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke ; pamba te mabanki ekolia bankona wana.
38 Lançarás muita semente ao campo, e colherás pouco, porque a locusta a comerá.
39 Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.
39 Plantarás vinhas, e as cultivarás, mas não beberás o vinho, nem colherás as uvas, porque os bichos as comerão.
40 Bokozala na banzete ya olive na mokili na bino mobimba, kasi bokopakola mafuta na yango te, pamba te bambuma ya olive ekokweya liboso ete ekomela.
40 Terás oliveiras por todos os teus termos, mas não te ungirás com o azeite, pois as tuas oliveiras expulsarão os seus frutos.
41 Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu.
41 Gerarás filhos e filhas, mas não serão para ti porque irão em cativeiro.
42 Mabanki ekolia banzete na bino nyonso mpe bambuma ya mabele na bino.
42 Todas as tuas árvores e o fruto da tua terra a locusta consumirá.
43 Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ;
43 O estrangeiro que está no meio de ti se elevará acima de ti, muito alto, e tu descerás muito baixo.
44 akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.
44 Ele emprestará a ti, e tu não emprestarás a ele; ele será a cabeça, e tu serás a cauda.
45 Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino.
45 Além disso, todas essas maldições te virão, e te perseguirão, e te dominarão, até que sejas destruído; porque não ouviste a voz do SENHOR teu Deus, para guardares os seus mandamentos e os seus estatutos que ele te ordenou.
46 Bilakeli mabe oyo ekozala elembo mpe makambo ya kokamwa epai na bino mpe epai ya bakitani na bino mpo na libela.
46 E elas estarão sobre ti, como um sinal e um prodígio, e sobre a tua semente para sempre.
47 Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki ;
47 Porque não serviste ao SENHOR teu Deus com alegria e com gozo de coração, pela abundância de todas as coisas;
48 tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.
48 portanto, servirás a teus inimigos, que o SENHOR enviará contra ti, com fome, e com sede, e com nudez, e com escassez de todas as coisas; e ele porá um jugo de ferro no teu pescoço, até que te tenha destruído.
49 Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.
49 O SENHOR trará contra ti uma nação distante, da extremidade da terra, veloz como o voo da águia; uma nação cuja língua não entenderás;
50 Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te.
50 uma nação de aspecto feroz, que não terá respeito pelo velho, nem mostrará benevolência ao jovem;
51 Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.
51 e ela comerá do fruto do teu gado, e o fruto da tua terra, até que sejas destruído; e tampouco te deixará grão, vinho, azeite, ou o aumento das tuas vacas, ou os rebanhos de tuas ovelhas, até que te tenha destruído.
52 Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
52 E ela te sitiará em todas as tuas portas, até que caiam teus muros altos e fortes em que confiavas, por toda a tua terra; e ela te sitiará em todas as tuas portas, por toda a tua terra, que o SENHOR teu Deus te deu.
53 Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
53 E comerás o fruto do teu próprio corpo, a carne de teus filhos e de tuas filhas, que o SENHOR teu Deus te deu, no cerco e no apuro com que teus inimigos te afligirem;
54 Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.
54 de modo que o homem que for terno entre vós, e muito dócil, seus olhos serão malignos para com seu irmão, e para com a esposa do seu seio, e para com o restante de seus filhos, que ele deixar;
55 Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso.
55 assim ele não dará a nenhum deles a carne de seus filhos, que ele comerá; porque não lhe sobrou nada no cerco e no apuro com que teus inimigos te afligirá em todas as tuas portas.
56 Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi,
56 A mulher terna e delicada entre vós, que não se aventura a colocar a planta de seu pé no chão da delicadeza e da ternura, seus olhos serão malignos para com o esposo do seu seio, e para o seu filho, e para a sua filha,
57 mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.
57 e para com a placenta que lhe sair entre os pés, e para com os filhos que terá; porque ela os comerá secretamente, por falta de todas as coisas, no cerco e no apuro, com que o teu inimigo te afligirá em tuas portas.
58 Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ;
58 Se não cuidares de cumprir todas as palavras desta lei, que estão escritas neste livro, para que possas temer esse glorioso e terrível nome, O SENHOR Teu Deus;
59 Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo : bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te.
59 então o SENHOR fará maravilhosas as tuas pragas, e as pragas da tua semente, e grandes pragas, e de longa duração, e enfermidades dolorosas e prolongadas.
60 Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino.
60 Além disso, ele te trará todas as enfermidades do Egito, que temias, e elas se agarrarão a ti.
61 Yawe akotindela bino lisusu lolenge nyonso ya bokono mpe bapota oyo ekomami te kati na buku oyo ya Mobeko, kino bokobebisama.
61 Também o SENHOR te trará toda enfermidade, e toda praga, que não estiver escrita no livro desta lei, até que sejas destruído.
62 Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino.
62 E sereis poucos em número, mesmo tendo sido numerosos como as estrelas dos céus; porque não quisestes obedecer à voz do SENHOR teu Deus.
63 Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.
63 E acontecerá que, assim como o SENHOR se alegrava convosco, para fazer-vos bem e multiplicar-vos, também o SENHOR se alegrará sobre vós, para vos destruir, e vos reduzir a nada; e sereis arrancados da terra que fostes a possuir.
64 Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.
64 E o SENHOR vos espalhará entre todos os povos, desde uma extremidade da terra até a outra; e ali servirás outros deuses, que nem tu nem teus pais conheceram, até mesmo madeira e pedra.
65 Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba.
65 E entre essas nações não terás descanso, nem a planta do teu pé terá descanso; mas o SENHOR te dará um coração trêmulo, e olhos desfalecidos, e tristeza de mente,
66 Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka.
66 e a tua vida estará como suspensa diante de ti; e temerás dia e noite, e não terás certeza de tua vida;
67 Na tongo, bokoloba : « Pokwa ekokoma tango nini ? » Mpe na pokwa, bokoloba : « Tongo ekotana tango nini ? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona.
67 pela manhã, dirás: Quisera Deus que fosse noite! E pela noite dirás: Quisera Deus que fosse manhã! Isso, pelo temor do teu coração com que temerás, e pela visão que os teus olhos verão.
68 Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.
68 E o SENHOR te levará outra vez ao Egito em barcos, pelo caminho de que te falei: Não mais o verás; e ali sereis vendidos aos vossos inimigos, como servos e servas, e nenhum homem vos comprará.
69 Tala maloba ya boyokani oyo Yawe atindaki Moyize kosala elongo na bana ya Isalaele na etando ya Moabi, na likolo ya boyokani oyo asalaki na bango na ngomba Orebi.
69 — ausente —

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Deuteronômio 28, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.