Daniel 1

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
1 No terceiro ano do reinado de Jeoaquim, rei de Judá, Nabucodonosor, rei da Babilônia, veio a Jerusalém e a sitiou.
2 Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye.
2 E o Senhor entregou Jeoaquim, rei de Judá, nas suas mãos, e também alguns dos utensílios do templo de Deus. Ele levou os utensílios para o templo do seu deus na terra de Sinear e os colocou na casa do tesouro do seu deus.
3 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ashipenazi, mokonzi ya bakalaka na ye ya lokumu, ete ayeisa na Babiloni ndambo ya bana ya Isalaele oyo babotama na mabota ya bakonzi to ya bato ya lokumu,
3 Então o rei ordenou que Aspenaz, o chefe dos oficiais da sua corte, trouxesse alguns dos israelitas da família real e da nobreza;
4 bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.
4 jovens sem defeito físico, de boa aparência, cultos, inteligentes, que dominassem os vários campos do conhecimento e fossem capacitados para servir no palácio do rei. Ele devia ensinar-lhes a língua e a literatura dos babilônios.
5 Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela : nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola ; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi.
5 O rei designou-lhes uma porção diária de comida e de vinho da própria mesa do rei. Eles receberiam um treinamento durante três anos, e depois disso passariam a servir o rei.
6 Kati na ndambo ya bato oyo bawutaki na Yuda, ezalaki na Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria.
6 Entre esses estavam alguns que vieram de Judá: Daniel, Hananias, Misael e Azarias.
7 Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika ; apesaki Daniele kombo Belitsatsari ; Anania, Shadraki ; Mikaeli, Meshaki ; mpe Azaria, Abedinego.
7 O chefe dos oficiais deu-lhes novos nomes: a Daniel deu o nome de Beltessazar; a Hananias, Sadraque; a Misael, Mesaque; e a Azarias, Abede-Nego.
8 Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi ; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.
8 Daniel, contudo, decidiu não se tornar impuro com a comida e com o vinho do rei, e pediu ao chefe dos oficiais permissão para se abster deles.
9 Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu.
9 E Deus fez com que o homem fosse bondoso para com Daniel e tivesse simpatia por ele.
10 Kasi mokonzi ya bakalaka ya lokumu alobaki na Daniele :
10 Apesar disso, ele disse a Daniel: "Tenho medo do rei, o meu senhor, que determinou a comida e a bebida de vocês. E se ele os achar menos saudáveis que os outros jovens da mesma idade? O rei poderia pedir a minha cabeça por causa de vocês".
11 Daniele alobaki na mosali oyo mokonzi ya bakalaka ya lokumu aponaki mpo ete abatela Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria :
11 Daniel disse então ao homem que o chefe dos oficiais tinha encarregado de cuidar de Daniel, Hananias, Misael e Azarias:
12 « Nabondeli yo, meka basali na yo mikolo zomi : pesa biso kaka bandunda lokola bilei mpe mayi mpo na komela ; kopesa biso eloko mosusu te !
12 "Peço-lhe que faça uma experiência com os seus servos durante dez dias: Não nos dê nada além de vegetais para comer e água para beber.
13 Sima na mikolo yango, okotala yo moko bilongi na biso mpe bilongi ya bilenge mosusu oyo bazali kolia bilei ya mokonzi ; bongo okosala basali na yo ndenge yo moko okomona. »
13 Depois compare a nossa aparência com a dos jovens que comem a comida do rei, e trate os seus servos de acordo com o que você concluir".
14 Mosala andimaki bosenga na bango mpe amekaki bango mikolo zomi.
14 Ele concordou e fez a experiência com eles durante dez dias.
15 Sima na mikolo yango zomi, bakomaki bilongi kitoko mpe banzoto ngebungebu koleka bilenge oyo bazalaki kolia bilei ya mokonzi.
15 Passados os dez dias eles pareciam mais saudáveis e mais fortes do que todos os jovens que comiam a comida da mesa do rei.
16 Boye, mosali yango akomaki kotia pembeni bilei mpe vino oyo bazalaki kobongisela bango mpe kopesa bango kaka bandunda.
16 Assim o encarregado tirou a comida especial e o vinho que haviam sido designados e em lugar disso lhes dava vegetais.
17 Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.
17 A esses quatro jovens Deus deu sabedoria e inteligência para conhecerem todos os aspectos da cultura e da ciência. E Daniel, além disso, sabia interpretar todo tipo de visões e sonhos.
18 Sima na mikolo oyo mokonzi akataki mpo ete bamemela ye bango, mokonzi ya bakalaka ya lokumu amemaki bango liboso ya Nabukodonozori.
18 Ao final do tempo estabelecido pelo rei para que os jovens fossem trazidos à sua presença, o chefe dos oficiais os apresentou a Nabucodonosor.
19 Mokonzi asololaki na bango ; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi.
19 O rei conversou com eles, e não encontrou ninguém comparável a Daniel, Hananias, Misael e Azarias; de modo que eles passaram a servir o rei.
20 Na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kotuna bango, oyo ezalaki kosenga bwanya mpe bososoli, amonaki ete bazali mayele mbala zomi koleka bato ya soloka mpe ya maji ya mokili na ye mobimba.
20 O rei lhes fez perguntas sobre todos os assuntos nos quais se exigia sabedoria e conhecimento, e descobriu que eram dez vezes mais sábios do que todos os magos e encantadores de todo o seu reino.
21 Mpe Daniele awumelaki kosala kati na ndako ya mokonzi kino na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi.
21 E Daniel permaneceu ali até o primeiro ano do rei Ciro.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar Daniel 1, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.