2 Reis 25

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARA

Sair da comparação
ARA Almeida Revista e Atualizada 1993
1 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.
1 Sucedeu que, no nono ano do reinado de Zedequias, aos dez dias do décimo mês, Nabucodonosor, rei da Babilônia, veio contra Jerusalém, ele e todo o seu exército, e se acamparam contra ela, e levantaram contra ela tranqueiras em redor.
2 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.
2 A cidade ficou sitiada até ao undécimo ano do rei Zedequias.
3 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,
3 Aos nove dias do quarto mês, quando a cidade se via apertada da fome, e não havia pão para o povo da terra,
4 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
4 então, a cidade foi arrombada, e todos os homens de guerra fugiram de noite pelo caminho da porta que está entre os dois muros perto do jardim do rei, a despeito de os caldeus se acharem contra a cidade em redor; o rei fugiu pelo caminho da Campina,
5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki ye mpe bapanzanaki.
5 porém o exército dos caldeus perseguiu o rei Zedequias e o alcançou nas campinas de Jericó; e todo o exército deste se dispersou e o abandonou.
6 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu.
6 Então, o tomaram preso e o fizeram subir ao rei da Babilônia, a Ribla, o qual lhe pronunciou a sentença.
7 Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye ; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni.
7 Aos filhos de Zedequias mataram à sua própria vista e a ele vazaram os olhos; ataram-no com duas cadeias de bronze e o levaram para a Babilônia.
8 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli mpe mosali ya mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya sambo ya sanza ya mitano.
8 No sétimo dia do quinto mês, do ano décimo nono de Nabucodonosor, rei da Babilônia, Nebuzaradã, chefe da guarda e servidor do rei da Babilônia, veio a Jerusalém.
9 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.
9 E queimou a Casa do Senhor e a casa do rei, como também todas as casas de Jerusalém; também entregou às chamas todos os edifícios importantes.
10 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.
10 Todo o exército dos caldeus que estava com o chefe da guarda derribou os muros em redor de Jerusalém.
11 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki.
11 O mais do povo que havia ficado na cidade, e os desertores que se entregaram ao rei da Babilônia, e o mais da multidão, Nebuzaradã, o chefe da guarda, levou cativos.
12 Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.
12 Porém dos mais pobres da terra deixou o chefe da guarda ficar alguns para vinheiros e para lavradores.
13 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.
13 Cortaram em pedaços os caldeus as colunas de bronze que estavam na Casa do Senhor , como também os suportes e o mar de bronze que estavam na Casa do Senhor ; e levaram o bronze para a Babilônia.
14 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo, basani ya putulu, bapawu, bambeli, bakopo.
14 Levaram também as panelas, as pás, as espevitadeiras, os recipientes de incenso e todos os utensílios de bronze, com que se ministrava.
15 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : bambabola mpe basani ya kobwakela mayi.
15 Tomou também o chefe da guarda os braseiros, as bacias e tudo quanto fosse de ouro ou de prata.
16 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene mpe bashario.
16 Quanto às duas colunas, ao mar e aos suportes que Salomão fizera para a Casa do Senhor , o peso do bronze de todos estes utensílios era incalculável.
17 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na bosanda. Moto ya likonzi, oyo ezalaki na songe, ezalaki ya bronze mpe na metele pene moko na ndambo na molayi ; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe bambuma ya grenade. Makonzi nyonso mibale mpe bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama ezalaki ndenge moko.
17 A altura de uma coluna era de dezoito côvados, e sobre ela havia um capitel de bronze de três côvados de altura; a obra de rede e as romãs sobre o capitel ao redor, tudo era de bronze; semelhante a esta era a outra coluna com a rede.
18 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.
18 Levou também o chefe da guarda a Seraías, sumo sacerdote, e a Sofonias, segundo sacerdote, e os três guardas da porta.
19 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba, bapesi toli mitano, mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba.
19 Da cidade tomou a um oficial, que era comandante das tropas de guerra, e cinco homens dos que eram conselheiros do rei e se achavam na cidade, como também ao escrivão-mor do exército, que alistava o povo da terra, e sessenta homens do povo do lugar, que se achavam na cidade.
20 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila.
20 Tomando-os, Nebuzaradã, o chefe da guarda, levou-os ao rei da Babilônia, a Ribla.
21 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.
21 O rei da Babilônia os feriu e os matou em Ribla, na terra de Hamate. Assim, Judá foi levado cativo para fora da sua terra.
22 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda.
22 Quanto ao povo que ficara na terra de Judá, Nabucodonosor, rei da Babilônia, que o deixara ficar, nomeou governador sobre ele a Gedalias, filho de Aicão, filho de Safã.
23 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa ; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
23 Ouvindo, pois, os capitães dos exércitos, eles e os seus homens, que o rei da Babilônia nomeara governador a Gedalias, vieram ter com este em Mispa, a saber, Ismael, filho de Netanias, Joanã, filho de Careá, Seraías, filho de Tanumete, o netofatita, e Jazanias, filho do maacatita, eles e os seus homens.
24 Gedalia alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. »
24 Gedalias jurou a eles e aos seus homens e lhes disse: Nada temais da parte dos caldeus; ficai na terra, servi ao rei da Babilônia, e bem vos irá.
25 Kasi na sanza ya misato, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi, ayaki elongo na basoda zomi ; babomaki Gedalia elongo na bato ya Yuda mpe bato ya Babiloni oyo bazalaki elongo na ye, na Mitsipa.
25 Sucedeu, porém, que, no sétimo mês, veio Ismael, filho de Netanias, filho de Elisama, de família real, e dez homens, com ele, e feriram Gedalias, e ele morreu, como também aos judeus e aos caldeus que estavam com ele em Mispa.
26 Boye bato nyonso, kobanda na bato ya se kino bato ya lokumu, elongo na bakonzi ya basoda, bakimaki na Ejipito, pamba te bazalaki kobanga bato ya Babiloni.
26 Então, se levantou todo o povo, tanto os pequenos como os grandes, como também os capitães das tropas, e foram para o Egito, porque temiam aos caldeus.
27 Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.
27 No trigésimo sétimo ano do cativeiro de Joaquim, rei de Judá, no dia vinte e sete do duodécimo mês, Evil-Merodaque, rei da Babilônia, no ano em que começou a reinar, libertou do cárcere a Joaquim, rei de Judá.
28 Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ;
28 Falou com ele benignamente e lhe deu lugar de mais honra do que a dos reis que estavam com ele na Babilônia.
29 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.
29 Mudou-lhe as vestes do cárcere, e Joaquim passou a comer pão na sua presença todos os dias da sua vida.
30 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.
30 E da parte do rei lhe foi dada subsistência vitalícia, uma pensão diária, durante os dias da sua vida.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Reis 25, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.