2 Reis 23

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARIB

Sair da comparação
ARIB Almeida Revisada Imprensa Bíblica
1 Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai na ye,
1 Então o rei deu ordem, e todos os anciãos de Judá e de Jerusalém se ajuntaram a ele.
2 mpe akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe basakoli, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na se kino na oyo aleki na lokumu. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe.
2 Subiu o rei à casa do Senhor, e com ele todos os homens de Judá, todos os habitantes de Jerusalém, os sacerdotes, os profetas, e todo o povo, desde o menor até o maior; e leu aos ouvidos deles todas as palavras do livro do pacto, que fora encontrado na casa do Senhor.
3 Mokonzi atelemaki na etemelo ya kolobela, asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : « Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. » Bato nyonso bandimaki kotosa boyokani yango.
3 Então o rei, pondo-se em pé junto à coluna, fez um pacto perante o Senhor, de andar com o Senhor, e guardar os seus mandamentos, os seus testemunhos e os seus estatutos, de todo o coração e de toda a alma, confirmando as palavras deste pacto, que estavam escritas naquele livro; e todo o povo esteve por este pacto.
4 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.
4 Também o rei mandou ao sumo sacerdote Hilquias, e aos sacerdotes da segunda ordem, e aos guardas da entrada, que tirassem do templo do Senhor todos os vasos que tinham sido feitos para Baal, e para a Asera, e para todo o exército do céu; e os queimou fora de Jerusalém, nos campos de Cedrom, e levou as cinzas deles para Betel.
5 Mokonzi alongolaki banganga-nzambe ya bapaya oyo bakonzi ya Yuda batiaki mpo na kotumba ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba ya bingumba ya Yuda mpe ya zingazinga ya Yelusalemi : bango nde bazalaki kotumba ansa mpo na Bala, mpo na moyi, mpo na sanza, mpo na minzoto mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo.
5 Destituiu os sacerdotes idólatras que os reis de Judá haviam constituído para queimarem incenso sobre os altos nas cidades de Judá, e ao redor de Jerusalém, como também os que queimavam incenso a Baal, ao sol, à lua, aos planetas, e a todo o exército do céu.
6 Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.
6 Tirou da casa do Senhor a Asera e, levando-a para fora de Jerusalém até o ribeiro de Cedrom, ali a queimou e a reduziu a pó, e lançou o pó sobre as sepulturas dos filhos do povo.
7 Mokonzi abukaki kati na Tempelo ya Yawe, bandako ya mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, bandako epai wapi basi bazalaki kotonga banzambala mpo na nzambe mwasi Ashera.
7 Derrubou as casas dos sodomitas que estavam na casa do Senhor, em que as mulheres teciam cortinas para a Asera.
8 Joziasi abengisaki Banganga-Nzambe nyonso ya bingumba ya Yuda mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki longwa na Geba kino na Beri-Sheba epai wapi banganga-nzambe wana bazalaki kotumba ansa. Abukaki mpe bisika ya bule oyo batonga pene ya bikuke ya bingumba : oyo ezalaki na ebandeli ya ekuke ya Jozue, moyangeli ya engumba, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi ya ekuke ya engumba.
8 Tirou das cidades de Judá todos os sacerdotes, e profanou os altos em que os sacerdotes queimavam incenso desde Geba até Berseba; e derrubou os altos que estavam às portas junto à entrada da porta de Josué, o chefe da cidade, à esquerda daquele que entrava pela porta da cidade.
9 Atako banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba bakokaki te kosala mosala na etumbelo ya Yawe kati na Yelusalemi, kasi bazalaki kolia mapa ezanga levire elongo na Banganga-Nzambe mosusu.
9 Todavia os sacerdotes dos altos não sacrificavam sobre o altar do Senhor em Jerusalém, porém comiam pães ázimos no meio de seus irmãos.
10 Mokonzi apanzaki etumbelo ya Tofeti, oyo ezalaki na Lubwaku ya Beni-Inomi mpo ete moto moko te asalela yango lisusu mpo na kotumba mwana na ye ya mobali to ya mwasi lokola mbeka epai ya Moloki.
10 Profanou a Tofete, que está no vale dos filhos de Hinom, para que ninguém fosse passar seu filho ou sua filha pelo fogo a Moloque.
11 Alongolaki, wuta na ekuke kino na Tempelo ya Yawe, bampunda oyo bakonzi ya Yuda babonzaki na nzambe Moyi, oyo ezalaki na lopango pembeni ya shambre ya Netani-Meleki, soda oyo baboma mokongo. Mokonzi atumbaki bashar oyo bazalaki kosalela losambo ya nzambe Moyi.
11 Tirou os cavalos que os reis de Judá tinham consagrado ao sol, à entrada da casa do Senhor, perto da câmara do camareiro Natã-Meleque, a qual estava no recinto; e os carros do sol queimou a fogo.
12 Mokonzi abukaki bitumbelo oyo bakonzi ya Yuda batongaki na likolo ya shambre ya likolo ya Akazi, mpe bitumbelo oyo Manase atongisaki kati na mapango mibale ya Tempelo ya Yawe. Alongolaki yango wana, abukaki yango na biteni, mpe abwakaki yango na lubwaku ya Sedron.
12 Também o rei derrubou os altares que estavam sobre o terraço do cenáculo de Acaz, os quais os reis de Judá tinham feito, como também os altares que Manassés fizera nos dois átrios da casa do Senhor; e, tendo-os esmigalhado, os tirou dali e lançou o pó deles no ribeiro de Cedrom.
13 Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni ; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni.
13 O rei profanou também os altos que estavam ao oriente de Jerusalém, à direita do Monte de Corrupção, os quais Salomão, rei de Israel, edificara a Astarote, abominação dos sidônios, a Quemós, abominação dos moabitas, e a Milcom, abominação dos filhos de Amom.
14 Joziasi abukaki mabanga ya bule, akweyisaki makonzi ya Ashera, mpe atondisaki esika yango na mikuwa ya bato.
14 Semelhantemente quebrou as colunas, e cortou os aserins, e encheu os seus lugares de ossos de homens.
15 Joziasi abukaki mpe etumbelo oyo ezalaki na Beteli mpe esambelo ya likolo ya ngomba oyo Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, atongaki mpo na kopengwisa bana ya Isalaele. Abukaki etumbelo yango mpe akomisaki yango putulu. Bongo atumbaki mpe likonzi ya Ashera.
15 Igualmente o altar que estava em Betel, e o alto feito por Jeroboão, filho de Nebate, que fizera Israel pecar, esse altar e o alto ele os derrubou; queimando o alto, reduziu-o a pó, e queimou a Asera.
16 Tango Joziasi atalaki na zingazinga, amonaki bakunda oyo ezalaki na likolo ya ngomba ; boye akundolaki mikuwa oyo ezalaki kuna mpe atumbaki yango na likolo ya etumbelo. Na nzela yango, abebisaki lokumu ya etumbelo yango kolanda Liloba na Yawe, oyo moto na Nzambe asakolaki.
16 E, virando-se Josias, viu as sepulturas que estavam ali no monte, e mandou tirar os ossos das sepulturas e os queimou sobre aquele altar, e assim o profanou, conforme a palavra do Senhor proclamada pelo homem de Deus que predissera estas coisas.
17 Mokonzi atunaki :
17 Então perguntou: Que monumento é este que vejo? Responderam-lhe os homens da cidade: É a sepultura do homem de Deus que veio de Judá e predisse estas coisas que acabas de fazer contra este altar de Betel.
18 Mokonzi alobaki :
18 Ao que disse Josias: Deixai-o estar; ninguém mexa nos seus ossos. Deixaram estar, pois, os seus ossos juntamente com os do profeta que viera de Samária.
19 Ndenge asalaki na Beteli, Joziasi abukaki bisika nyonso ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bakonzi ya Isalaele batongaki kati na bingumba ya Samari, oyo na tina na yango Yawe asilikaki makasi.
19 Josias tirou também todas as casas dos altos que havia nas cidades de Samária, e que os reis de Israel tinham feito para provocarem o Senhor à ira, e lhes fez conforme tudo o que havia feito em Betel.
20 Joziasi abomaki banganga-nzambe nyonso ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bazalaki kuna, abonzaki bango lokola mbeka na likolo ya bitumbelo na bango moko mpe atumbaki mikuwa ya bato na likolo ya bitumbelo yango. Bongo azongaki na Yelusalemi.
20 E a todos os sacerdotes dos altos que encontrou ali, ele os matou sobre os respectivos altares, onde também queimou ossos de homens; depois voltou a Jerusalém.
21 Mokonzi apesaki mitindo epai ya bato nyonso : « Bosala feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na bino, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Boyokani. »
21 Então o rei deu ordem a todo o povo dizendo: Celebrai a páscoa ao Senhor vosso Deus, como está escrito neste livro do pacto.
22 Feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te wuta na tango oyo bilombe bakambaki Isalaele to na tango nyonso ya bakonzi ya Isalaele mpe ya bakonzi ya Yuda.
22 Pois não se celebrara tal páscoa desde os dias dos juízes que julgaram a Israel, nem em todos os dias dos reis de Israel, nem tampouco nos dias dos reis de Judá.
23 Kasi tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, basalaki lisusu feti ya Pasika mpo na Yawe, na Yelusalemi.
23 Foi no décimo oitavo ano do rei Josias que esta páscoa foi celebrada ao Senhor em Jerusalém.
24 Joziasi abomaki mpe bato oyo basololaka na milimo ya bakufi, bamoni makambo, bikilakila, banzambe ya bikeko, mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na mokili ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Asalaki bongo mpo na kokokisa mitindo oyo ekomama kati na buku oyo Nganga-Nzambe Ilikia amonaki kati na Tempelo ya Yawe.
24 Além disso, os adivinhos, os feiticeiros, os terafins, os ídolos e todas abominações que se viam na terra de Judá e em Jerusalém, Josias os extirpou, para confirmar as palavras da lei, que estavam escritas no livro que o sacerdote Hilquias achara na casa do Senhor.
25 Mokonzi moko te azongelaki Yawe lokola Joziasi, na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso, kolanda mibeko nyonso ya Moyize. Mpe sima na ye, mokonzi moko te azalaki lokola ye.
25 Ora, antes dele não houve rei que lhe fosse semelhante, que se convertesse ao Senhor de todo o seu coração, e de toda a sua alma, e de todas as suas forças, conforme toda a lei de Moisés; e depois dele nunca se levantou outro semelhante.
26 Nzokande, Yawe atikaki te kanda makasi na Ye, oyo apeliselaki Yuda likolo ya mabe nyonso oyo Manase asalaki mpo na kopesa Ye kanda.
26 Todavia o Senhor não se demoveu do ardor da sua grande ira, com que ardia contra Judá por causa de todas as provocações com que Manassés o provocara.
27 Boye Yawe alobaki : « Nakobengana mpe Yuda na miso na Ngai ndenge nabenganaki Isalaele ; nakobwaka Yelusalemi, engumba oyo napona, elongo na Tempelo na yango, oyo na tina na yango nalobaki : ‹ Kombo na Ngai ekozala kuna. › »
27 E disse o Senhor: Também a Judá hei de remover de diante da minha face, como removi a Israel, e rejeitarei esta cidade de Jerusalém que elegi, como também a casa da qual eu disse: Estará ali o meu nome.
28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joziasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
28 Ora, o restante dos atos de Josias, e tudo quanto fez, por ventura não estão escritos no livro das crônicas dos reis de Judá?
29 Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido.
29 Nos seus dias subiu Faraó-Neco, rei do Egito, contra o rei da Assíria, ao rio Eufrates. E o rei Josias lhe foi ao encontro; e Faraó-Neco o matou em Megido, logo que o viu.
30 Basoda ya Joziasi bamemaki ebembe na ye na likolo ya shar, longwa na Megido kino na Yelusalemi epai wapi bakundaki ye kati na kunda na ye moko. Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, bapakolaki ye mafuta mpe bakomisaki ye mokonzi mpo na kokitana na tata na ye.
30 De Megido os seus servos o levaram morto num carro, e o trouxeram a Jerusalém, onde o sepultaram no seu sepulcro. E o povo da terra tomou a Jeoacaz, filho de Josias, ungiram-no, e o fizeram rei em lugar de seu pai.
31 Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
31 Jeoacaz tinha vinte e três anos quando começou a reinar, e reinou três meses em Jerusalém. O nome de sua mãe era Hamutal, filha de Jeremias, de Libna.
32 Yoakazi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki.
32 Ele fez o que era mau aos olhos do Senhor, conforme tudo o que seus pais haviam feito.
33 Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo.
33 Ora, Faraó-Neco mandou prendê-lo em Ribla, na terra de Hamate, para que não reinasse em Jerusalém; e à terra impôs o tributo de cem talentos de prata e um talento de ouro.
34 Faraon Neko akomisaki Eliakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi mpo na kokitana na Joziasi, tata na ye ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi akangaki Yoakazi mpe amemaki ye na Ejipito. Mpe Yoakazi akufaki kuna.
34 Também Faraó-Neco constituiu rei a Eliaquim, filho de Josias, em lugar de Josias, seu pai, e lhe mudou o nome em Jeoiaquim; porém levou consigo a Jeoacaz, que conduzido ao Egito, ali morreu.
35 Yeoyakimi afutaki epai ya Faraon Neko palata mpe wolo oyo asengaki. Mpo na kofuta yango, Yeoyakimi asengaki ete bato ya mokili bafuta mpako. Afutisaki bato mpako ya palata to ya wolo kolanda bozwi na bango.
35 E Jeoiaquim deu a Faraó a prata e o ouro; porém impôs à terra uma taxa, para fornecer esse dinheiro conforme o mandado de Faraó. Exigiu do povo da terra, de cada um segundo a sua avaliação, prata e ouro, para o dar a Faraó-Neco.
36 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma.
36 Jeoiaquim tinha vinte e cinco ano quando começou a reinar, e reinou onze anos em Jerusalém. O nome de sua mãe era Zebida, filha de Pedaías, de Ruma.
37 Yeoyakimi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka bakoko na ye basalaki.
37 Ele fez o que era mau aos olhos do Senhor, conforme tudo o que seus pais haviam feito.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Reis 23, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.