2 Crônicas 9

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC

Sair da comparação
VC Versão Católica
1 Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu ya Salomo, ayaki na Yelusalemi mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ; ayaki elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema.
1 A rainha de Sabá, ouvindo falar da fama de Salomão, veio a Jerusalém para prová-lo por meio de enigmas. Ela tinha um séquito considerável, camelos carregados de aromas, grande quantidade de ouro e de pedras preciosas. Quando da sua visita a Salomão, expôs-lhe tudo o que tinha no coração.
2 Salomo apesaki ye biyano na mituna na ye nyonso ; ezalaki ata na motuna moko te oyo Salomo alongaki te kopesa eyano.
2 Salomão respondeu a todas as suas perguntas, e nada houve por demais obscuro que não pudesse solucionar.
3 Tango mwasi mokonzi ya Saba amonaki bwanya ya Salomo, ndako oyo atongaki,
3 Diante dessa sabedoria do rei, à vista da residência que tinha construído para si,
4 bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi.
4 dos manjares de sua mesa, dos aposentos de seus servos, da habitação e vestes de seus domésticos, de seus copeiros e seus trajes, dos holocaustos que oferecia no templo do Senhor, a rainha de Sabá ficou enlevada de admiração.
5 Alobaki na mokonzi : « Makambo oyo nayokaki wuta na mokili na ngai na tina na misala mpe na bwanya na yo ezali ya solo !
5 É, pois, verdade, disse ela ao rei, o que tinha ouvido dizer, em minha terra, a respeito de tuas obras e de tua sabedoria.
6 Nandimaki te makambo oyo bazalaki koloba na tina na yango kino tango ngai moko nayei mpe namoni yango na miso na ngai moko. Nzokande, kolanda oyo ngai namoni, makambo oyo bayebisaki ngai te na tina na bwanya yango ezali penza kati-kati ! Solo, oleki sango ya lokumu oyo nayokaki na tina na yo !
6 Não queria dar fé a isso antes de vir e ver com meus próprios olhos. Pois bem, o que me tinham descrito não era sequer a metade de tua imensa sabedoria; ultrapassas tudo o que soube de ti pela tua fama!
7 Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya !
7 Felizes os teus servos! Felizes esses servos que sempre estão diante de ti e ouvem tua sabedoria!
8 Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti na Ye ya bokonzi lokola mokonzi mpo na kosalela Yawe, Nzambe na yo ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpe alingi ete ewumela mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi na yango, mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »
8 Bendito seja o Senhor, teu Deus, que te tomou como objeto de afeição, e te colocou no seu trono, como rei em nome do Senhor, teu Deus! É por causa de seu amor a Israel, e porque quer fazê-lo subsistir para sempre que te fez rei, para que faças reinar o direito e a justiça!
9 Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Etikala lisusu kozala te na biloko ebele ya solo kitoko lokola biloko oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo.
9 Em seguida, presenteou ao rei cento e vinte talentos de ouro, grande quantidade de aromas e pedras preciosas. Jamais se viram tantos aromas quantos os que a rainha de Sabá dera ao rei Salomão.
10 Lisusu, basali ya Irami mpe ya Salomo, oyo bamemaki wolo wuta na Ofiri bamemaki mpe mabaya ya santale mpe mabanga ya talo.
10 Os servos de Hirão e os servos de Salomão, que traziam o ouro de Ofir, trouxeram também madeira de sândalo e pedras preciosas.
11 Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi, banzenze mpe mandanda mpo na bayembi. Batikalaki nanu komona nyonso wana te kati na mokili ya Yuda.
11 Com essa madeira de sândalo o rei fez degraus para o templo do Senhor e para o palácio real, harpas e liras para os cantores. Nunca ainda se tinha visto semelhante madeira na terra de Judá.
12 Na ngambo na ye, mokonzi Salomo apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki, koleka kutu biloko oyo amemelaki mokonzi. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye.
12 O rei Salomão presenteou a rainha de Sabá com tudo o que ela sonhava ganhar, com muito mais do que ela havia trazido. Depois ela retomou com seus servos o caminho de sua terra.
13 Mobu na mobu, Salomo azalaki kozwa bakilo ya wolo nkoto tuku mibale,
13 O peso de ouro que Salomão recebia cada ano era de seiscentos e sessenta e seis talentos,
14 mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mpe mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge. Bakonzi nyonso ya Arabi mpe bayangeli ya bituka bazalaki komema wolo mpe palata epai ya Salomo.
14 além do que lhe traziam os mercadores e traficantes. Todos os reis da Arábia, como os governadores locais, traziam a Salomão {um tributo} de ouro e prata.
15 Mokonzi Salomo asalisaki na wolo batuta banguba minene nkama mibale ; nguba moko na moko esengaki bakilo motoba ya wolo.
15 O rei Salomão mandou fabricar duzentos escudos de ouro batido, para cada um dos quais utilizou seiscentos siclos de ouro batido;
16 Asalisaki lisusu na wolo batuta banguba mike nkama misato ; nguba moko na moko ya moke esengaki bakilo misato ya wolo. Mokonzi atiaki yango kati na ndako na ye, oyo bazalaki kobenga « ndako ya zamba ya Libani. »
16 e trezentos pequenos escudos de ouro batido, para cada um dos quais empregou trezentos siclos de ouro. O rei colocou-os no palácio do Bosque do Líbano.
17 Mokonzi asalaki na pembe ya nzoko kiti moko monene ya bokonzi mpe abambaki yango wolo ya peto.
17 Mandou também construir um grande trono de marfim, revestido de ouro puro.
18 Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba, enyatelo makolo ya wolo ekanganaki na kiti. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko, mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko.
18 Esse trono tinha seis degraus, com um escabelo de ouro fixado no trono. Nos dois lados do assento havia encostos flanqueados por leões.
19 Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te.
19 Doze leões estavam colocados à direita e à esquerda, nos seis degraus. Nada de semelhante havia ainda sido feito em nenhum reino.
20 Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te.
20 Todas as taças do rei Salomão eram feitas de ouro, e todo o vasilhame do palácio do Bosque do Líbano era de ouro puro. Nada era de prata, metal do qual no tempo de Salomão não se fazia caso algum.
21 Mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kokende na Tarsisi, elongo na basali ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga wuta na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « Paoni. »
21 Pois o rei tinha navios que iam a Társis com os servos de Hirão, e uma vez a cada três anos a frota voltava de Társis, carregada de ouro, prata, marfim, macacos e pavões.
22 Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya.
22 Dessa maneira, por sua riqueza e sabedoria, o rei Salomão avantajava-se a todos os reis da terra,
23 Bakonzi nyonso ya mokili bazalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye.
23 e todos procuravam sua presença a fim de poderem ouvir a sabedoria que Deus lhe tinha infundido no coração.
24 Moko na moko azalaki komemela ye lokola kado biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso.
24 Cada um lhe trazia anualmente seu presente: objetos de prata, objetos de ouro, vestimentas, armas, aromas, cavalos e mulos.
25 Salomo azalaki na bashambre nkoto minei mpo na kobomba bampunda elongo na bashar, mpe batambolisi nkoto zomi na mibale mpo na bashar. Atiaki yango kati na bingumba ya bashar mpe epai na ye, Salomo, kati na Yelusalemi.
25 Salomão possuía cavalariças para quatro mil cavalos de carros e doze mil {cavalgaduras} para cavaleiros, que ele colocou nas cidades onde estavam abrigados seus carros assim como em Jerusalém, perto de si.
26 Azalaki likolo ya bakonzi nyonso, longwa na Ebale (Efrate) kino na mokili ya bato ya Filisitia mpe na mondelo ya Ejipito.
26 Ele dominava sobre todos os reis, desde o Eufrates até a terra dos filisteus e a fronteira do Egito.
27 Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele kati na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.
27 Graças a ele, a prata tornou-se, em Jerusalém, tão comum como as pedras, e os cedros tão numerosos como os sicômoros da planície.
28 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na mikili mosusu.
28 Era do Egito e de todas as terras que se importavam cavalos para Salomão.
29 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Natan, ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo ; mpe kati na buku ya bimoniseli ya Yedo, momoni makambo, na tina na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.
29 O resto dos feitos de Salomão, dos primeiros aos últimos, está relatado no livro do profeta Natã, na profecia de Aías de Silo e nas visões do vidente Ado a respeito de Jeroboão, filho de Nabat.
30 Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi.
30 O reinado de Salomão sobre todo o Israel durou quarenta anos, em Jerusalém.
31 Bongo Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.
31 Depois disso, Salomão adormeceu com seus pais e foi sepultado na cidade de Davi, seu pai. Seu filho Roboão sucedeu-lhe no trono.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 9, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.