2 Crônicas 8

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,
1 Depois de vinte anos, durante os quais Salomão construiu o templo do Senhor e o seu próprio palácio,
2 Salomo atongaki lisusu bingumba mike oyo Irami apesaki ye mpe avandisaki kuna bana ya Isalaele.
2 ele reconstruiu as cidades que Hirão lhe tinha dado, e nelas estabeleceu israelitas.
3 Salomo akendeki kobundisa engumba Amati ya Tsoba mpe abotolaki yango.
3 Depois atacou Hamate-Zobá e a conquistou.
4 Kati na esobe, atongaki engumba Tadimori ; mpe kati na Amati, atongaki bingumba nyonso ya kobombela biloko.
4 Também reconstruiu Tadmor, no deserto, e todas as cidades-armazéns que havia construído em Hamate.
5 Atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se lokola bingumba batonga makasi, elongo na bamir, bikuke mpe bibende oyo bakangelaka bikuke,
5 Reconstruiu Bete-Horom Alta e Bete-Horom Baixa, cidades fortificadas com muros, portas e trancas,
6 Baalati mpe bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, na Libani mpe na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
6 e também Baalate e todas as cidades-armazéns que possuía, e todas as cidades onde ficavam os seus carros e os seus cavalos. Construiu tudo o que desejou em Jerusalém, no Líbano e em todo o território que governou.
7 Batikali nyonso kati na bato ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te,
7 Todos os não israelitas, descendentes dos hititas, dos amorreus, dos ferezeus, dos heveus e dos jebuseus,
8 ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi, kino na mokolo ya lelo.
8 que não tinham sido mortos pelos israelitas, Salomão recrutou para o trabalho forçado, como continuam até hoje.
9 Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar.
9 Mas Salomão não obrigou nenhum israelita a trabalhos forçados; eles eram seus homens de guerra, chefes de seus capitães, comandantes dos seus carros e condutores de carros.
10 Ezalaki mpe na bakalaka ya lokumu oyo mokonzi Salomo atiaki mpo na kokamba basali na ye. Motango na bango ezalaki nkama mibale na tuku mitano.
10 Também eram israelitas os principais funcionários do rei Salomão, duzentos e cinqüenta funcionários que supervisionavam os trabalhadores.
11 Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki : « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. »
11 Salomão levou a filha do faraó da cidade de Davi para o palácio que ele havia construído para ela, pois dissera: "Minha mulher não deve morar no palácio de Davi, rei de Israel, pois os lugares onde entrou a arca do Senhor são sagrados".
12 Salomo abonzaki epai na Yawe bambeka ya kotumba, na etumbelo ya Yawe, oyo atongaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
12 Sobre o altar do Senhor, que havia construído diante do pórtico, Salomão passou a sacrificar holocaustos ao Senhor,
13 Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso : feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.
13 conforme as determinações de Moisés acerca das ofertas diárias e dos sábados, das luas novas e das três festas anuais: a festa dos pães sem fermento, a festa das semanas e a festa das cabanas.
14 Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.
14 De acordo com a ordem de seu pai Davi, designou os grupos dos sacerdotes para as suas tarefas, e os levitas para conduzirem o louvor e ajudarem os sacerdotes, conforme as determinações diárias. Também designou, por divisões, os porteiros das várias portas, conforme o que Davi, homem de Deus, tinha ordenado.
15 Batosaki na makambo nyonso mitindo ya mokonzi mpo na oyo etali Banganga-Nzambe mpe Balevi, ezala mpo na oyo etali bibombelo bomengo.
15 Todas as ordens dadas pelo rei aos sacerdotes e aos levitas, inclusive as ordens relativas aos tesouros, foram seguidas à risca.
16 Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama.
16 Todo o trabalho de Salomão foi executado, desde o dia em que foram lançados os alicerces do templo do Senhor até seu término. Assim foi concluído o templo do Senhor.
17 Salomo akendeki na Etsioni-Geberi mpe na Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi.
17 Depois Salomão foi a Eziom-Geber e a Elate, no litoral de Edom.
18 Irami atindelaki ye, na nzela ya basali na ye, bamasuwa mpe bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale. Bato ya Irami batambolaki elongo na basali ya Salomo kino na Ofiri, mpe bazwaki kuna bakilo nkoto zomi na mitano ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.
18 E Hirão enviou-lhe navios comandados por seus próprios marinheiros, homens que conheciam o mar. Eles navegavam com os marinheiros de Salomão até Ofir, e de lá trouxeram quinze toneladas e setecentos e cinqüenta quilos de ouro para o rei Salomão.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 8, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.