2 Crônicas 3

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC

Sair da comparação
VC Versão Católica
1 Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
1 Salomão começou a construção do templo do Senhor, em Jerusalém, no monte Mória, para isso designado por Davi, seu pai, no mesmo lugar que Davi preparara, na eira de Ornã, o jebuseu.
2 Abandaki kotonga na mokolo ya mibale ya sanza ya mibale, na mobu ya minei ya bokonzi na ye.
2 Foi no segundo dia do segundo mês, no quarto ano de seu reinado, que iniciou a obra.
3 Moboko oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Nzambe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse.
3 Estes são os fundamentos determinados por Salomão para a construção do templo: de comprimento, sessenta côvados, segundo a antiga medida; de largura, vinte côvados.
4 Ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe ezalaki na bametele pene zomi, na bosanda, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto kati na yango.
4 O pórtico, que se achava no frontispício, e cujo comprimento correspondia à largura do edifício, tinha vinte côvados, e vinte de altura. Era revestido de ouro puro por dentro.
5 Babetaki mabaya ya sipele na bamir ya eteni oyo eleki monene mpe abambaki wolo ya peto na likolo na yango. Asalaki bililingi ya nzete ya mbila mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
5 A grande sala foi forrada de ciprestes; ele a guarneceu de ouro puro nos lugares em que estavam esculpidas as palmas e as pequenas cadeias.
6 Abambaki mabanga ya talo mpo na kokomisa yango kitoko. Wolo oyo asalelaki ezalaki wolo ya Parivayimi.
6 Ornou esta sala com pedras preciosas; o ouro era de Parvaim.
7 Apakolaki wolo na motondo, na bikuke, na bamir, mpe atobolaki bililingi ya basheribe na bamir.
7 O rei revestiu de ouro a sala: traves, umbrais, paredes e portas; nas paredes mandou esculpir querubins.
8 Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule ; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe : bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe.
8 Fez também a construção da sala do Santo dos Santos, cujo comprimento, igual à largura do edifício, era de vinte côvados. O valor do ouro fino, com que o recobriu, era de seiscentos talentos.
9 Basete oyo basalelaki ezalaki ya wolo, mpe ezalaki ya bagrame nkama motoba. Apakolaki lisusu wolo na bashambre ya likolo.
9 Mesmo os pregos eram de ouro e pesavam cinqüenta siclos. Revestiu igualmente de ouro os aposentos.
10 Atiaki bililingi ya basheribe mibale kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe apakolaki yango wolo.
10 Para o interior do Santo dos Santos, mandou esculpir dois querubins e os revestiu de ouro.
11 Mapapu ya basheribe ezalaki na bametele pene zomi na molayi. Lipapu ya sheribe ya liboso ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe etutaki mir ya Tempelo ya Yawe ; bongo lipapu na ye mosusu, oyo ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano, etutaki lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki mpe na bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
11 O comprimento de suas asas era de vinte côvados; uma asa do primeiro, de cinco côvados de comprimento, tocava a parede da sala, e outra, de cinco côvados, tocava a asa do segundo querubim.
12 Ndenge moko mpe mpo na lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano : etutaki mir mosusu ya Tempelo ya Yawe ; mpe lipapu mosusu oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano etutaki lipapu ya sheribe ya liboso.
12 Uma asa do segundo querubim, de cinco côvados de comprimento, tocava a parede da sala, e a outra, de cinco côvados de comprimento, tocava a asa do primeiro.
13 Mapapu ya basheribe yango ezalaki ya kofungwama na molayi ya bametele pene zomi. Basheribe nyonso mibale batelemaki na makolo na bango, mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya kati ya Esika ya bule.
13 Assim, a envergadura das asas destes querubins era de vinte côvados. Sustentavam-se sobre seus pés, com o rosto voltado para a sala.
14 Asalaki rido ya lino, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, mpe atongaki bililingi ya basheribe na likolo na yango.
14 O rei mandou fazer uma cortina em púrpura violeta, carmesim e linho fino, e nela mandou bordar querubins.
15 Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
15 Diante do edifício, levantou duas colunas de trinta e cinco côvados de altura, tendo no alto um capitel de cinco côvados.
16 Asalaki bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni mpe atiaki yango na mito ya makonzi ; asalaki lisusu bililingi ya bambuma nkama moko ya grenade, mpe akangisaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
16 Como para o santuário, fez pequenas cadeias, colocou-as no cimo das colunas, e suspendeu nelas cem romãs.
17 Mpe atongaki makonzi liboso ya Tempelo ya Yawe : moko na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe mosusu, na ngambo ya loboko ya mobali. Abengaki likonzi ya ngambo ya loboko ya mwasi Yakini, mpe oyo ya ngambo ya loboko ya mobali, Boazi.
17 Levantou colunas, uma à direita e outra à esquerda da fachada do templo: chamou à da direita Jaquim e à da esquerda Boaz.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 3, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.