2 Crônicas 29

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NAA

Sair da comparação
NAA Nova Almeida Atualizada 2017
1 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari.
1 Ezequias tinha vinte e cinco anos de idade quando começou a reinar e reinou vinte e nove anos em Jerusalém. A mãe dele se chamava Abia e era filha de Zacarias.
2 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
2 Ezequias fez o que era reto aos olhos do Senhor , segundo tudo o que Davi, seu pai, havia feito.
3 Na sanza ya liboso ya mobu ya liboso ya bokonzi na ye, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe abongisaki yango.
3 No primeiro ano do seu reinado, no primeiro mês, abriu os portões da Casa do Senhor e os reparou.
4 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, asangisaki bango na libanda ya ngambo ya este.
4 Trouxe os sacerdotes e os levitas, reuniu-os na praça leste
5 Alobaki na bango :
5 e lhes disse: — Escutem, levitas! Santifiquem agora a si mesmos e santifiquem a Casa do
6 Batata na biso bazangaki boyengebene, basalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe basundolaki Ye ; batikaki Tempelo ya Yawe mpe bapesaki Ye mokongo.
6 Porque nossos pais foram infiéis e fizeram o que era mau aos olhos do Senhor , nosso Deus, e o abandonaram. Desviaram o seu rosto do tabernáculo do Senhor e lhe viraram as costas.
7 Bakangaki kutu bikuke ya ndako moke ya kokotela, babomaki minda mpe batikaki kobonzela Nzambe ya Isalaele malasi mpe bambeka ya kotumba kati na Esika ya bule.
7 Também fecharam os portões do pórtico, apagaram as lâmpadas, não queimaram incenso, nem ofereceram holocaustos no santuário ao Deus de Israel.
8 Boye, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi, akomisaki bango eloko ya kobanga, ya somo mpe ya kotiola, ndenge bokoki komona yango na miso na bino.
8 Por isso a ira do Senhor veio sobre Judá e Jerusalém, e ele os transformou em objeto de espanto, de horror e de vaias, como vocês estão vendo com os seus próprios olhos.
9 Yango wana batata na biso bakweyaki na mopanga ; mpe yango wana lisusu bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi mpe basi na biso bazali kati na bowumbu.
9 Porque eis que os nossos pais caíram à espada, e, por isso, os nossos filhos, as nossas filhas e as nossas mulheres foram para o cativeiro.
10 Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso.
10 — Agora estou resolvido a fazer uma aliança com o Senhor , Deus de Israel, para que o furor da sua ira se afaste de nós.
11 Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye.
11 Meus filhos, não sejam negligentes, pois o Senhor os escolheu para estarem diante dele para o servirem, para serem os seus ministros e queimarem incenso.
12 Bongo, Balevi oyo bakotaki na mosala :
12 Então se levantaram os seguintes levitas: Maate, filho de Amasai, e Joel, filho de Azarias, dos filhos dos coatitas; Quis, filho de Abdi, e Azarias, filho de Jealelel, dos filhos de Merari; Joá, filho de Zima, e Éden, filho de Joá, dos filhos de Gérson;
13 na molongo ya Elitsafani :
13 Sinri e Jeuel, dos filhos de Elisafã; Zacarias e Matanias, dos filhos de Asafe;
14 na molongo ya Emani :
14 Jeuel e Simei, dos filhos de Hemã; Semaías e Uziel, dos filhos de Jedutum.
15 Tango basangisaki bandeko na bango mpe bamibulisaki, bakotaki mpo na kopetola Tempelo ya Yawe, ndenge mokonzi apesaki mitindo mpe kolanda Liloba na Yawe.
15 Congregaram os seus irmãos, santificaram-se e vieram, cumprindo a ordem do rei, segundo as palavras do Senhor , para purificar a Casa do Senhor .
16 Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango : babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron.
16 Os sacerdotes entraram na Casa do Senhor , para a purificar, e tiraram para fora, ao pátio da Casa do Senhor , todas as coisas impuras que encontraram no templo do Senhor . E os levitas pegaram essas coisas e as levaram para fora, ao vale do Cedrom.
17 Babandaki mosala yango ya kopetola na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe, na mokolo ya mwambe ya sanza yango, bakomaki na ndako moke ya kokotela na Tempelo. Basalaki lisusu mikolo mwambe mpo na kokoba kobulisa Tempelo ya Yawe mpe basukisaki mosala yango na mokolo ya zomi na motoba ya sanza ya liboso.
17 Começaram a santificar no primeiro dia do primeiro mês e no oitavo dia do mês chegaram ao pórtico do Senhor . Em oito dias santificaram a Casa do Senhor e no décimo sexto dia do mês terminaram.
18 Bakendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe balobaki :
18 Então foram falar com o rei Ezequias no palácio e disseram: — Já purificamos toda a Casa do
19 Tobongisi mpe tobulisi bisalelo nyonso oyo mokonzi Akazi, na kozanga boyengebene na ye na miso ya Yawe, abebisaki bosantu na yango tango azalaki mokonzi. Bisalelo yango ekomi sik’oyo liboso ya etumbelo.
19 Também todos os objetos que o rei Acaz, em sua infidelidade, jogou fora durante o seu reinado, nós já preparamos e santificamos; e eis que estão diante do altar do Senhor .
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, mokonzi Ezekiasi asangisaki bakambi ya engumba mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe.
20 Então o rei Ezequias se levantou de madrugada, reuniu os chefes da cidade e subiu à Casa do Senhor .
21 Bamemaki bangombe sambo ya mibali, bameme sambo ya mibali, bana meme sambo ya mibali mpe bantaba sambo ya mibali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na mokili, mpo na Esika ya bule mpe mpo na Yuda. Mokonzi apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ete babonza bambeka yango na etumbelo ya Yawe.
21 Mandou trazer sete novilhos, sete carneiros, sete cordeiros e sete bodes, como oferta pelo pecado a favor do reino, do santuário e de Judá; e ordenou aos filhos de Arão, os sacerdotes, que os oferecessem sobre o altar do Senhor .
22 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bangombe, bazwaki makila na yango mpe babwakaki yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bameme ya mibali mpe babwakaki makila na yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bana meme mpe babwakaki makila na yango na etumbelo.
22 Mortos os novilhos, os sacerdotes pegaram o sangue e o aspergiram sobre o altar; mataram os carneiros e aspergiram o sangue sobre o altar; também mataram os cordeiros e aspergiram o sangue sobre o altar.
23 Bongo bamemaki bantaba ya mibali oyo ebongisamaki mpo na mbeka mpo na masumu, liboso ya mokonzi mpe lisanga, mpe batiaki yango maboko.
23 Para oferta pelo pecado, trouxeram os bodes diante do rei e da congregação, e estes puseram as mãos sobre eles.
24 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bantaba mpe babwakaki makila na yango na etumbelo lokola mbeka mpo na masumu, mpe mpo na kokokisa mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele mobimba ; pamba te mokonzi apesaki mitindo ete babonza mpo na Isalaele mobimba bambeka ya kotumba mpe bambeka mpo na masumu.
24 Os sacerdotes os mataram e, com o sangue, fizeram uma oferta pelo pecado, ao pé do altar, para expiação de todo o Israel, porque o rei havia ordenado que se fizesse aquele holocausto e oferta pelo pecado, por todo o Israel.
25 Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi ; mpe ya mosakoli Natan ; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye.
25 Também pôs os levitas na Casa do Senhor com címbalos, liras e harpas, segundo o mandado de Davi e de Gade, o vidente do rei, e do profeta Natã. Porque este mandado veio do Senhor , por meio de seus profetas.
26 Balevi babongamaki elongo na bibetelo mindule ya Davidi, mpe Banganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango.
26 Os levitas estavam em pé com os instrumentos musicais de Davi, e os sacerdotes tinham as trombetas.
27 Ezekiasi apesaki mitindo ete babonza mbeka ya kotumba na etumbelo ; mpe tango babandaki kobonza mbeka ya kotumba, babandaki mpe koyemba mpo na kokumisa Yawe na bakelelo mpe bibetelo mindule ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.
27 Ezequias ordenou que oferecessem o holocausto sobre o altar. No momento em que começou o holocausto, começou também o cântico ao Senhor com as trombetas, ao som dos instrumentos musicais de Davi, rei de Israel.
28 Lisanga mobimba egumbamaki wana ; bayembi bazalaki koyemba, mpe babeti kelelo bazalaki kobeta yango ; nyonso ekobaki kino tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba.
28 Toda a congregação se prostrou, quando se entoava o cântico, e as trombetas soavam; tudo isto até findar-se o holocausto.
29 Tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba, mokonzi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakitisaki bilongi na bango mpe bagumbamaki kino na se.
29 Depois que eles terminaram de oferecer o sacrifício, o rei e todos os que estavam com ele se prostraram e adoraram.
30 Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.
30 Então o rei Ezequias e os chefes ordenaram aos levitas que louvassem o Senhor com as palavras de Davi e de Asafe, o vidente. Eles o fizeram com alegria, e se inclinaram, e adoraram.
31 Ezekiasi alobaki :
31 Ezequias tomou a palavra e disse: — Agora vocês se consagraram ao A congregação trouxe sacrifícios e ofertas de ação de graças, e todos os que estavam de coração disposto trouxeram holocaustos.
32 Tala motango ya bambeka ya kotumba oyo lisanga ebonzaki : bangombe ya mibali tuku sambo, bameme ya mibali nkama moko, bana meme nkama mibale : nyonso lokola bambeka ya kotumba mpo na Yawe.
32 O número dos holocaustos que a congregação trouxe foi de setenta bois, cem carneiros e duzentos cordeiros; tudo isto em holocausto para o Senhor .
33 Babulisaki lisusu lokola bambeka bangombe nkama motoba, bameme mpe bantaba nkoto misato.
33 Também foram consagrados seiscentos bois e três mil ovelhas.
34 Kasi lokola Banganga-Nzambe bazalaki mingi te mpo na kokata na biteni bambeka nyonso ya kotumba, bandeko na bango, Balevi, basungaki bango kino mosala nyonso esilaki mpe kino Banganga-Nzambe mosusu bamibulisaki ; pamba te Balevi balekaki Banganga-Nzambe na makanisi ya komibulisa.
34 Os sacerdotes, porém, eram muito poucos e não conseguiam tirar a pele de todos os holocaustos. Por isso os seus irmãos, os levitas, os ajudaram, até findar-se a obra e até que os outros sacerdotes se santificaram. Porque os levitas foram mais retos de coração, para se santificarem, do que os sacerdotes.
35 Longola bambeka ya kotumba oyo ezalaki mingi, esengelaki lisusu kotumba mafuta ya bambeka ya boyokani mpe kosopa bambeka ya masanga mpo na bambeka ya kotumba. Ezali boye nde babongisaki lisusu misala ya Tempelo ya Yawe.
35 Além dos holocaustos em abundância, houve também a gordura das ofertas pacíficas e as libações para os holocaustos. Assim se restabeleceu o ministério da Casa do
36 Ezekiasi mpe bato nyonso basepelaki na ndenge Nzambe akokisaki makambo mpo na bato na Ye, pamba te nyonso esalemaki na lombangu.
36 Ezequias e todo o povo se alegraram com o que Deus tinha feito pelo povo, porque esta obra foi feita em pouco tempo.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 29, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.