2 Crônicas 23

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Na mobu ya sambo, Nganga-Nzambe Yeoyada alongolaki kobanga mpe azwaki mokano ya kosala boyokani elongo na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : Azaria, mwana mobali ya Yeroami ; Isimaeli, mwana mobali ya Yoanani ; Azaria, mwana mobali ya Obedi ; Maaseya, mwana mobali ya Adaya ; mpe Elishafati, mwana mobali ya Zikiri.
1 No sétimo ano Joiada encorajou-se e fez um acordo com os líderes dos batalhões de cem: Azarias, filho de Jeroão, Ismael, filho de Joanã, Azarias, filho de Obede, Maaséias, filho de Adaías, e Elisafate, filho de Zicri.
2 Batambolaki kati na Yuda mpe basangisaki Balevi elongo na bakonzi ya mabota ya Isalaele, oyo bawutaki na bingumba nyonso. Tango bayaki na Yelusalemi,
2 Eles percorreram todo o Judá e reuniram de todas as cidades, os levitas e os chefes das famílias israelitas. Quando chegaram a Jerusalém,
3 lisanga mobimba esalaki boyokani elongo na mokonzi kati na Tempelo ya Nzambe. Yeoyada alobaki na bango : « Mwana mobali ya mokonzi asengeli kokonza lokola mokonzi, kolanda elaka oyo Yawe apesaki na tina na bakitani ya Davidi.
3 toda a assembléia fez um acordo com o rei no templo de Deus. Joiada lhes disse: "Reinará o filho do rei, conforme o Senhor prometeu acerca dos descendentes de Davi.
4 Sik’oyo, tala ndenge bokosala : ‹ kati na bandambo misato ya lisanga na bino Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakosala na mokolo ya Saba, ndambo ya liboso bakokengela bikuke,
4 Vocês vão fazer o seguinte: Um terço de vocês, sacerdotes e levitas que entrarão de serviço no sábado, deverá ficar vigiando nas portas do templo;
5 ndambo ya mibale bakokengela ndako ya mokonzi, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke ya Yesodi. Bato nyonso bakozala kati na mapango ya Tempelo ya Yawe.
5 um terço, no palácio real; e um terço, na porta do Alicerce; e todo o povo estará nos pátios do templo do Senhor.
6 Moko te asengeli kokota kati na Tempelo ya Yawe longola kaka Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakozala na mosala, pamba te bazali bule. Bato nyonso oyo batikali basengeli kotosa mobeko ya Yawe.
6 Ninguém deverá entrar no templo do Senhor, exceto os sacerdotes e os levitas de serviço; esses podem entrar porque são consagrados, mas o povo deverá observar o que o Senhor lhes determinou.
7 Balevi bakozingela mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko. Moto mosusu oyo akomeka kokota na Tempelo ya Yawe, basengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. › »
7 Os levitas deverão posicionar-se em torno do rei, todos de armas na mão. Matem todo aquele que entrar no templo. Acompanhem o rei aonde quer que ele for".
8 Balevi mpe bato nyonso ya Yuda basalaki ndenge kaka Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango ya Saba, pamba te Nganga-Nzambe Yeoyada apemisaki ndambo moko te.
8 Os levitas e todos os homens de Judá fizeram como o sacerdote Joiada havia ordenado. Cada um levou seus soldados, tanto os que estavam entrando de serviço no sábado como os que estavam saindo, pois o sacerdote Joiada não havia dispensado nenhuma das divisões.
9 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga, banguba minene mpe banguba mike ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe.
9 Então ele deu aos líderes dos batalhões de cem, as lanças e os escudos grandes e pequenos que haviam pertencido ao rei Davi, e que estavam no templo de Deus.
10 Atiaki bato nyonso zingazinga ya mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo.
10 Posicionou todos os homens, todos de arma na mão, em volta do rei, perto do altar e do templo, desde o lado sul até o lado norte do templo.
11 Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
11 Joiada e seus filhos trouxeram o filho do rei e o coroaram; entregaram-lhe uma cópia da aliança e o proclamaram rei, ungindo-o e gritando: "Viva o rei! "
12 Tango Atali ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki kopota mbangu mpe kobetela mokonzi maboko, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe,
12 Quando Atalia ouviu o barulho do povo correndo e aclamando o rei, foi ao templo do Senhor, onde estava o povo.
13 atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo ; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki :
13 Lá ela viu o rei à entrada, de pé junto à coluna. Os oficiais e tocadores de cornetas estavam ao lado do rei, e todo o povo se alegrava ao som das cornetas; os músicos com seus instrumentos musicais dirigiam os louvores. Então Atalia rasgou suas vestes e gritou: "Traição! Traição! "
14 Nganga-Nzambe Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko mpe alobaki na bango :
14 O sacerdote Joiada ordenou aos líderes dos batalhões de cem que estavam no comando das tropas: "Levem-na para fora por entre as fileiras, e matem à espada todo que a seguir". Pois o sacerdote dissera: "Não a matem no templo do Senhor".
15 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.
15 Então eles a prenderam e levaram à porta dos Cavalos, no terreno do palácio, e lá a mataram.
16 Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe.
16 E Joiada fez um acordo pelo qual ele, o povo e o rei seriam o povo do Senhor.
17 Bato nyonso bakendeki na ndako ya nzambe Bala, babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo.
17 Então todo o povo foi ao templo de Baal e o derrubou. Despedaçaram os altares e os ídolos, e mataram Matã, sacerdote de Baal, em frente dos altares.
18 Yeoyada apesaki mosala ya kokengela Tempelo ya Yawe epai ya Banganga-Nzambe Balevi oyo Davidi apesaki mosala ya Tempelo ya Yawe, mpo na kotumba mbeka epai na Yawe, ndenge ekomama kati na mibeko ya Moyize, na esengo mpe na koyemba banzembo, ndenge Davidi atindaki.
18 E Joiada confiou a supervisão do templo do Senhor aos sacerdotes levitas, aos quais Davi tinha atribuído tarefas no templo, para apresentarem os holocaustos ao Senhor, conforme está escrito na lei de Moisés, com júbilo e cânticos, segundo as instruções de Davi.
19 Atiaki lisusu bakengeli na bikuke ya Tempelo ya Yawe mpo na kopekisa moto nyonso ya mbindo kokota kuna.
19 Também pôs guardas nas portas do templo do Senhor para que não entrasse ninguém que de alguma forma estivesse impuro.
20 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya lokumu, bakambi ya bato mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya likolo. Mpe kuna, bavandisaki ye na kiti ya bokonzi.
20 Levou consigo os líderes dos batalhões de cem, os nobres, os governantes do povo e todo o povo e, juntos, conduziram o rei do templo do Senhor ao palácio, passando pela porta superior, e instalaram o rei no trono;
21 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga.
21 e todo o povo se alegrou. A cidade acalmou-se depois que Atalia foi morta à espada.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 23, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.