2 Crônicas 21

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
1 Josafá descansou com seus antepassados e foi sepultado junto deles na cidade de Davi, e seu filho Jeorão foi o seu sucessor.
2 Tala bandeko mibali ya Yorami : Azaria, Yeyeli, Zakari, Azaria, Mikaeli mpe Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Jozafati, mokonzi ya Isalaele.
2 Os irmãos de Jeorão, filhos de Josafá, foram Azarias, Jeiel, Zacarias, Azarias, Micael e Sefatias. Todos eles foram filhos de Josafá, rei de Israel.
3 Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo ; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali.
3 Ele deu-lhes muitos presentes de prata e ouro e objetos de valor, bem como cidades fortificadas em Judá, mas o reino deu a Jeorão, porque este era seu filho mais velho.
4 Tango Yorami azwaki bokonzi ya tata na ye mpe alendaki na bokonzi yango, abomaki na mopanga bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na ndambo ya bakambi ya Isalaele.
4 Logo Jeorão se fortaleceu no reino de seu pai, e matou à espada todos os seus irmãos, juntamente com alguns dos líderes de Israel.
5 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi.
5 Ele tinha trinta e dois anos de idade quando começou a reinar, e reinou oito anos em Jerusalém.
6 Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana mwasi ya Akabi.
6 Andou nos caminhos dos reis de Israel, como a família de Acabe havia feito, pois se casou com uma filha de Acabe. E fez o que o Senhor reprova.
7 Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye.
7 Entretanto, por causa da aliança que havia feito com Davi, o Senhor não quis destruir a dinastia dele. Ele havia prometido manter para sempre um descendente de Davi no trono.
8 Na tango oyo Yorami azalaki na bokonzi, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi.
8 Nos dias de Jeorão, os edomitas rebelaram-se contra o domínio de Judá, proclamando seu próprio rei.
9 Yorami akendeki kuna elongo na bakonzi na ye ya basoda mpe bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar.
9 Por isso, Jeorão foi combatê-los com seus líderes e com todos os seus carros de guerra. Os edomitas cercaram a ele e aos chefes de seus carros de guerra, mas ele os atacou de noite e rompeu o cerco inimigo.
10 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye.
10 E até hoje Edom continua independente de Judá. Nessa mesma época, a cidade de Libna também tornou-se independente, pois Jeorão havia abandonado o Senhor, o Deus dos seus antepassados.
11 Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda ; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda.
11 Ele até construiu altares idólatras nas colinas de Judá, levando o povo de Jerusalém a prostituir-se e Judá a desviar-se.
12 Yorami azwaki mokanda kowuta na mosakoli Eliya ; ezalaki koloba :
12 Então Jeorão recebeu uma carta do profeta Elias, que dizia: "Assim diz o Senhor, o Deus de Davi, seu antepassado: ‘Você não tem andado nos caminhos de seu pai Josafá nem de Asa, rei de Judá.
13 kasi olandi banzela ya bakonzi ya Isalaele, mpe otindiki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi na kosambela banzambe ya bikeko ndenge libota ya Akabi esalaki ; lokola obomaki lisusu bandeko na yo ya mibali, bato ya ndako ya tata na yo, bato oyo bazalaki malamu koleka yo,
13 Mas sim nos caminhos dos reis de Israel, e levou Judá e o povo de Jerusalém a se prostituírem na idolatria como a família de Acabe. E ainda assassinou seus próprios irmãos, membros da família de seu pai, homens que eram melhores do que você.
14 Yawe alingi sik’oyo koboma, na nzela ya etumbu ya somo, bato na yo, bana na yo ya mibali, basi na yo mpe biloko na yo nyonso.
14 Por isso, o Senhor vai ferir terrivelmente seu povo, seus filhos, suas mulheres e tudo o que é seu.
15 Yo moko mpe okobela bokono ya makasi, bokono ya libumu oyo pasi na yango ekomata se komata mikolo nyonso kino kobimisa yo misopo na libanda. › »
15 Você ficará muito doente; terá uma enfermidade no ventre, que irá piorar até que saiam os seus intestinos’ ".
16 Yawe asalaki ete bato ya Filisitia mpe bato ya Arabi oyo bazalaki kovanda pembeni ya bato ya Kushi babundisa Yorami.
16 O Senhor despertou contra Jeorão a hostilidade dos filisteus e dos árabes que viviam perto dos etíopes.
17 Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye ; mwana mobali moko kaka atikalaki : Yoakazi, mwana na ye ya suka.
17 Eles atacaram o reino de Judá, invadiram-no e levaram todos os bens que encontraram no palácio do rei, juntamente com suas mulheres e seus filhos. Só ficou Acazias, o filho mais novo.
18 Sima na makambo oyo nyonso, Yawe atindelaki ye bokono ya libumu oyo esilaka te.
18 Depois disso tudo, o Senhor afligiu Jeorão com uma doença incurável nos intestinos.
19 Pasi na yango ezalaki mikolo nyonso komata se komata ; mpe na suka ya mobu ya mibale, misopo ya Yorami ebimaki na libanda mpo na bokono mpe akufaki kati na pasi makasi. Bato na ye batumbaki te biloko ya solo kitoko mpo na kopesa ye lokumu ndenge basalaki mpo na batata na ye.
19 Algum tempo depois, ao fim do segundo ano, tanto se agravou a doença que os seus intestinos saíram, e ele morreu sofrendo dores horríveis. Seu povo não fez nenhuma fogueira em sua homenagem, como havia feito para os seus antepassados.
20 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.
20 Jeorão tinha trinta e dois anos de idade quando começou a reinar, e reinou oito anos em Jerusalém. Morreu sem que ninguém o lamentasse, e foi sepultado na cidade de Davi, mas não nos túmulos dos reis.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 21, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.