2 Crônicas 17

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ACF

Sair da comparação
ACF Almeida Corrigida Fiel
1 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele.
1 E Jeosafá, seu filho, reinou em seu lugar; e fortificou-se contra Israel.
2 Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi ; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki.
2 E pôs soldados em todas as cidades fortificadas de Judá, e estabeleceu guarnições na terra de Judá, como também nas cidades de Efraim, que Asa seu pai tinha tomado.
3 Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala.
3 E o Senhor era com Jeosafá; porque andou nos primeiros caminhos de Davi seu pai, e não buscou a Baalins.
4 Kasi alukaki Nzambe ya tata na ye mpe atosaki mibeko na Ye : alandaki te makambo oyo ezalaki kosalema kati na Isalaele.
4 Antes buscou ao Deus de seu pai, andou nos seus mandamentos, e não segundo as obras de Israel.
5 Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu.
5 E o Senhor confirmou o reino na sua mão, e todo o Judá deu presentes a Jeosafá, o qual teve riquezas e glória em abundância.
6 Motema na ye esepelaki makasi kotambola na banzela ya Yawe kino kolongola kati na Yuda bisambelo ya likolo ya bangomba mpe makonzi ya Ashera.
6 E exaltou-se o seu coração nos caminhos do Senhor e, ainda mais, tirou os altos e os bosques de Judá.
7 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe.
7 E no terceiro ano do seu reinado enviou ele os seus príncipes, a Bene-Hail, a Obadias, a Zacarias, a Natanael e a Micaías, para ensinarem nas cidades de Judá.
8 Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa : Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya ; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami.
8 E com eles os levitas, Semaías, Netanias, Zebadias, Asael, Semiramote, Jônatas, Adonias, Tobias e Tobe-Adonias e, com estes levitas, os sacerdotes, Elisama e Jeorão.
9 Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.
9 E ensinaram em Judá, levando consigo o livro da lei do Senhor; e foram a todas as cidades de Judá, ensinando entre o povo.
10 Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati.
10 E veio o temor do Senhor sobre todos os reinos das terras, que estavam ao redor de Judá, e não guerrearam contra Jeosafá.
11 Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo.
11 E alguns dentre os filisteus traziam presentes a Jeosafá, e prata como tributo; também os árabes lhe trouxeram gado miúdo; sete mil e setecentos carneiros, e sete mil e setecentos bodes.
12 Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko.
12 Cresceu, pois, Jeosafá grandemente em extremo e edificou fortalezas e cidades de provisões em Judá.
13 Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia ; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko.
13 E teve muitas obras nas cidades de Judá, e homens de guerra e valentes, em Jerusalém.
14 Tala motango na bango kolanda mabota na bango :
14 E este é o número deles segundo as suas casas paternas; em Judá eram capitàes dos milhares: o chefe Adna, e com ele trezentos mil homens valentes;
15 sima na ye, Yoanani : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale na tuku mwambe ;
15 E depois dele o capitão Joanã, e com ele duzentos e oitenta mil;
16 sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale.
16 E depois Amasias, filho de Zicri, que voluntariamente se entregou ao Senhor, e com ele duzentos mil homens valentes;
17 Kati na libota ya Benjame :
17 E de Benjamim, Eliada, homem valente, e com ele duzentos mil, armados de arco e de escudo;
18 Yozabadi, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama moko na tuku mwambe.
18 E depois dele Jozabade, e com ele cento e oitenta mil, armados para a guerra.
19 Bato oyo nyonso bazalaki kosala epai ya mokonzi lokola bakonzi ya basoda ya mpiko, bakisa ba-oyo mokonzi atiaki kati na bingumba batonga makasi ya Yuda mobimba.
19 Estes estavam no serviço do rei; afora os que o rei tinha posto nas cidades fortes por todo o Judá.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 17, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.