2 Crônicas 15

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVT

Sair da comparação
NVT Nova Versão Transformadora
1 Molimo ya Nzambe akitelaki Azaria, mwana mobali ya Odedi.
1 Então o Espírito de Deus veio sobre Azarias, filho de Odede,
2 Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !
2 e ele foi ao encontro do rei Asa. “Ouça-me, Asa!”, disse ele. “Ouça-me todo o povo de Judá e de Benjamim! O S enhor estará com vocês enquanto estiverem com ele! Sempre que o buscarem, o encontrarão. Mas, se o abandonarem, ele os abandonará.
3 Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.
3 Durante muito tempo, Israel esteve sem o verdadeiro Deus, sem sacerdote para ensiná-los e sem lei para instruí-los.
4 Kasi kati na pasi na bango, bazongelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; balukaki Ye, mpe Ye amimonisaki epai na bango.
4 No entanto, sempre que se viram em dificuldades e se voltaram para o S enhor , o Deus de Israel, e o buscaram, eles o encontraram.
5 Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili.
5 “Naquele tempo, não era seguro viajar. Problemas afligiam os habitantes de todas as terras.
6 Ekolo moko ezalaki kobundisa ekolo mosusu, engumba moko ezalaki kobundisa engumba mosusu, pamba te Nzambe azalaki kokotisa mobulu kati na bango na nzela ya pasi ya lolenge nyonso.
6 Uma nação lutava contra outra, e uma cidade contra outra, pois Deus os afligia com todo tipo de angústia.
7 Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »
7 Quanto a vocês, porém, sejam fortes e corajosos, pois seu trabalho será recompensado.”
8 Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi ; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
8 Quando Asa ouviu essa mensagem do profeta Azarias, encheu-se de coragem e removeu todos os ídolos repulsivos da terra de Judá e de Benjamim e das cidades que ele havia capturado na região montanhosa de Efraim. Além disso, restaurou o altar do S enhor , que ficava na frente da sala de entrada do templo do S enhor .
9 Asangisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, elongo na bato oyo bawutaki na mabota ya Efrayimi, ya Manase mpe ya Simeoni, oyo bakomaki kovanda kati na bango, pamba te bana ebele ya Isalaele basanganaki na mokonzi Asa tango bamonaki ete Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye.
9 Depois, Asa reuniu todo o povo de Judá e de Benjamim, e também o povo de Efraim, de Manassés e de Simeão que havia se estabelecido entre eles. Muita gente de Israel tinha se mudado para Judá no reinado de Asa, quando viu que o S enhor , seu Deus, estava com ele.
10 Basanganaki na Yelusalemi na sanza ya misato ya mobu ya zomi na mitano ya bokonzi ya Asa.
10 Reuniram-se em Jerusalém no terceiro mês do décimo quinto ano do reinado de Asa.
11 Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo.
11 Naquele dia, sacrificaram ao S enhor setecentos bois e sete mil ovelhas dos despojos que haviam tomado na batalha.
12 Basalaki boyokani na kolapa ndayi ete bakokangama na Yawe, Nzambe ya batata na bango, na mitema mpe na molimo na bango mobimba ;
12 Então fizeram um acordo de buscar o S enhor , o Deus de seus antepassados, de todo o coração e de toda a alma.
13 bongo moto nyonso oyo akokangama te na Yawe, Nzambe ya Isalaele, azala mwana to mokolo, tata to mama, basengeli koboma ye.
13 Concordaram que qualquer um que não buscasse o S enhor , o Deus de Israel, deveria morrer, jovem ou idoso, homem ou mulher.
14 Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke.
14 Fizeram esse juramento de lealdade ao S enhor em alta voz, ao som de trombetas e clarins.
15 Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba ; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.
15 Todo o Judá se alegrou com esse acordo, pois o fizeram de todo o coração. Buscaram o S enhor com sinceridade e o encontraram. E o S enhor lhes deu descanso de todos os lados.
16 Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron.
16 O rei Asa chegou a depor sua avó Maaca da posição de rainha-mãe, pois ela havia feito um poste obsceno para a deusa Aserá. Derrubou esse poste obsceno, o quebrou e o queimou no vale de Cedrom.
17 Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye ;
17 Embora os santuários idólatras não tivessem sido removidos de Israel, o coração de Asa permaneceu inteiramente fiel durante toda a sua vida.
18 azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu.
18 Ele trouxe para o templo de Deus a prata, o ouro e os diversos utensílios que ele e seu pai haviam consagrado.
19 Bitumba ezalaki lisusu te kino na mobu ya tuku misato na mitano ya bokonzi ya Asa.
19 Não houve mais guerra até o trigésimo quinto ano do reinado de Asa.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 15, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.