2 Crônicas 11

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki mabota ya Yuda mpe ya Benjame, aponaki bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami.
1 Quando Roboão chegou em Jerusalém, convocou cento e oitenta mil homens de combate, das tribos de Judá e de Benjamim, para guerrearem contra Israel e recuperarem o reino para Roboão.
2 Kasi Yawe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe :
2 Entretanto, veio esta palavra do Senhor a Semaías, homem de Deus:
3 — Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda, mpe bana nyonso ya Isalaele oyo bazali kati na Yuda mpe Benjame :
3 "Diga a Roboão, filho de Salomão, rei de Judá, e a todos os israelitas de Judá e de Benjamim:
4 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokende te kobundisa bandeko na bino ! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › »
4 ‘Assim diz o Senhor: Não saiam à guerra contra os seus irmãos. Voltem para casa, todos vocês, pois fui eu que fiz isso’ ". E eles obedeceram à palavra do Senhor e desistiram de marchar contra Jeroboão.
5 Wana Roboami avandaki na Yelusalemi, atongaki bamir zingazinga ya bingumba ebele ya Yuda mpo na kolendisa yango.
5 Roboão morou em Jerusalém e reconstruiu algumas cidades para a defesa de Judá. Foram elas:
6 Alendisaki Beteleemi, Etami, Tekoa,
6 Belém, Etã, Tecoa,
7 Beti-Tsuri, Soko, Adulami,
7 Bete-Zur, Socó, Adulão,
8 Gati, Maresha, Zifi,
8 Gate, Maressa, Zife,
9 Adorayimi, Lakishi, Azeka,
9 Adoraim, Láquis, Azeca,
10 Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame.
10 Zorá, Aijalom e Hebrom. Essas cidades foram fortificadas em Judá e em Benjamim.
11 Atongaki zingazinga na yango bamir, atiaki kuna bayangeli mpe bibombelo ya biloko ya kolia, ya mafuta mpe ya vino.
11 Ele fortaleceu as suas defesas e nelas colocou comandantes, com suprimentos de alimentos, azeite e vinho.
12 Kati na bingumba yango nyonso, atiaki banguba minene mpe makonga mpo na kokomisa yango makasi koleka. Boye Yuda mpe Benjame ekomaki ya Roboami.
12 Armazenou escudos grandes e lanças em todas as cidades, tornando-as muito fortes. Assim, Judá e Benjamim continuaram sob o seu domínio.
13 Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kati na Isalaele mobimba bayaki kosangana na Roboami wuta na bituka na bango nyonso.
13 Os sacerdotes e os levitas de todos os distritos de Israel o apoiaram.
14 Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe.
14 Os levitas chegaram até a abandonar as suas pastagens e os seus bens, e foram para Judá e para Jerusalém, porque Jeroboão e seus filhos os haviam rejeitado como sacerdotes do Senhor,
15 Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe.
15 nomeando seus próprios sacerdotes para os altares idólatras e para os ídolos que haviam feito em forma de bodes e de bezerros.
16 Bato ya mabota nyonso ya Isalaele, oyo balukaka Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mitema na bango mobimba balandaki Balevi, na Yelusalemi, mpo na kobonzela Yawe, Nzambe ya batata na bango, mbeka.
16 De todas as tribos de Israel aqueles que estavam realmente dispostos a buscar o Senhor, o Deus de Israel, seguiram os levitas até Jerusalém para oferecerem sacrifícios ao Senhor, ao Deus dos seus antepassados.
17 Mibu misato, balendisaki bokonzi ya Yuda mpe nguya ya Roboami, mwana mobali ya Salomo ; pamba te mibu misato yango, balandaki ndakisa ya Davidi mpe ya Salomo.
17 Eles fortaleceram o reino de Judá e durante três anos apoiaram Roboão, filho de Salomão, andando nos caminhos de Davi e de Salomão durante esse tempo.
18 Roboami abalaki Maalati, mwana mwasi ya Yerimoti, mwana mobali ya Davidi mpe ya Abiyaili, mwana mwasi ya Eliabi, mwana mobali ya Izayi.
18 Roboão casou-se com Maalate, filha de Jeremote e neta de Davi. A mãe de Maalate era Abiail, filha de Eliabe e neta de Jessé.
19 Maalati abotelaki Roboami bana mibali oyo : Yewushi, Shemaria mpe Zaami.
19 Ela deu-lhe três filhos: Jeús, Semarias e Zaão.
20 Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye : Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti.
20 Depois ele casou-se com Maaca, filha de Absalão, a qual lhe deu os filhos Abias, Atai, Ziza e Selomite.
21 Roboami alingaki mingi Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, koleka basi mpe bamakangu na ye nyonso. Azalaki na basi zomi na mwambe mpe bamakangu tuku motoba ; mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mwambe mpe bana basi tuku motoba.
21 Roboão amava Maaca, filha de Absalão, mais do que a qualquer outra de suas esposas e concubinas. Ao todo ele teve dezoito esposas e sessenta concubinas, vinte e oito filhos e sessenta filhas.
22 Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi.
22 Roboão nomeou Abias, filho de Maaca, o chefe entre os seus irmãos, com o intuito de fazê-lo rei.
23 Boye, asalelaki mayele ya kopanza bana na ye nyonso ya mibali kati na bituka nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, kati na bingumba nyonso batonga makasi ; apesaki bango bilei mpe basi ebele.
23 Ele agiu com sabedoria, dispersando seus filhos pelos distritos de Judá e de Benjamim, e pelas cidades fortificadas. Garantiu-lhes fartas provisões e lhes conseguiu muitas mulheres.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 2 Crônicas 11, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.