1 Tessalonicenses 3

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Boye lokola tokokaki lisusu kokanga motema te, tomonaki ete ezali malamu mpo na biso kotikala na Ateni.
1 Por isso, quando não pudemos mais suportar, achamos por bem permanecer sozinhos em Atenas
2 Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,
2 e, assim, enviamos Timóteo, nosso irmão e cooperador de Deus no evangelho de Cristo, para fortalecê-los e dar-lhes ânimo na fé,
3 na tina ete moko te kati na bino abungisa kondima likolo ya pasi oyo bozali komona ; pamba te bino moko boyebi malamu ete tobongisama mpo na yango.
3 para que ninguém seja abalado por essas tribulações. Vocês sabem muito bem que fomos designados para isso.
4 Tango tozalaki nanu elongo na bino, toyebisaki bino ete tokokutana na minyoko. Mpe esalemi kaka ndenge wana, ndenge boyebi yango malamu.
4 Quando estávamos com vocês, já lhes dizíamos que seríamos perseguidos, o que realmente aconteceu, como vocês sabem.
5 Mpo na yango, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, natindaki Timote mpo na koluka koyeba soki bozali kaka kokoba kati na kondima. Nazalaki kobanga ete Satana ameka bino mpe ete mosala na biso ekende pamba.
5 Por essa razão, não suportando mais, enviei Timóteo para saber a respeito da fé que vocês têm, a fim de que o tentador não os seduzisse, tornando inútil o nosso esforço.
6 Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino : ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.
6 Agora, porém, Timóteo acaba de chegar da parte de vocês, dando-nos boas notícias a respeito da fé e do amor que vocês têm. Ele nos falou que vocês sempre guardam boas recordações de nós, desejando ver-nos, assim como nós queremos vê-los.
7 Bandeko, sango ya kondima na bino elendisi biso makasi, kati na pasi mpe minyoko nyonso oyo tozali komona ;
7 Por isso, irmãos, em toda a nossa necessidade e tribulação temos bom ânimo a seu respeito, por sabermos da sua fé;
8 mpe nzoto na biso eningani sik’oyo na esengo mpo ete botelemi ngwi kati na Nkolo.
8 pois agora vivemos, visto que vocês estão firmes no Senhor.
9 Matondi ya ndenge nini tokoki kozongisa epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozali na yango mpo na bino liboso ya Nzambe na biso ?
9 Como podemos ser suficientemente gratos a Deus por vocês, por toda a alegria que temos diante dele por causa de vocês?
10 Tobondelaka Nzambe na molende nyonso, butu mpe moyi, mpo ete apesa biso nzela ya komona bino lisusu mpe ya kokokisa oyo ezangi kati na kondima na bino.
10 Noite e dia com perseverança oramos para que possamos vê-los pessoalmente e suprir o que falta à sua fé.
11 Sik’oyo, tika ete Ye moko Nzambe, Tata na biso, mpe Yesu, Nkolo na biso, bafungolela biso nzela ya koya epai na bino.
11 Que o próprio Deus, nosso Pai, e nosso Senhor Jesus preparem o nosso caminho até vocês.
12 Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.
12 Que o Senhor faça crescer e transbordar o amor que vocês têm uns para com os outros e para com todos, a exemplo do nosso amor por vocês.
13 Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso ! Amen !
13 Que ele fortaleça os seus corações para serem irrepreensíveis em santidade diante de nosso Deus e Pai, na vinda de nosso Senhor Jesus com todos os seus santos.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Tessalonicenses 3, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.