1 Reis 8
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NTLH
1 Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
1 Aí o rei Salomão convocou todos os chefes das tribos e dos grupos de famílias de Israel para irem encontrar-se com ele em Jerusalém a fim de levarem a arca da aliança de Deus, de Sião , a Cidade de Davi , para o Templo.
2 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi Salomo, na feti monene, na sanza ya Etanimi oyo ezali sanza ya sambo.
2 Todos os israelitas se reuniram durante a Festa das Barracas , no mês de etanim , que é o sétimo mês.
3 Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Banganga-Nzambe batombolaki Sanduku.
3 Quando todos os chefes chegaram, os sacerdotes pegaram a arca da aliança
4 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku ya Yawe, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na yango.
4 e a levaram para o Templo. Os levitas e os sacerdotes levaram também a Tenda da Presença de Deus com todos os seus equipamentos para o Templo.
5 Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.
5 O rei Salomão e todo o povo de Israel se reuniram em frente da arca da aliança e ofereceram em sacrifício um grande número de ovelhas e touros, tantos que nem dava para contar.
6 Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.
6 Então os sacerdotes levaram a arca para dentro do Templo e a colocaram onde devia ficar, no Lugar Santíssimo , debaixo das asas dos querubins .
7 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.
7 Pois as suas asas estendidas cobriam a arca e os seus cabos.
8 Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na Esika ya bule oyo ezali liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Etikala wana kino na mokolo ya lelo.
8 As pontas dos cabos podiam ser vistas por qualquer pessoa que ficasse diretamente em frente ao Lugar Santíssimo, mas não podiam ser vistas de nenhum outro lugar. (Os cabos ainda estão ali até hoje .)
9 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.
9 Dentro da arca estavam somente as duas placas de pedra que Moisés havia colocado ali, quando, no monte Sinai, o Senhor Deus havia feito uma aliança com os israelitas depois que eles saíram do Egito.
10 Na tango Banganga-Nzambe babimaki na Esika-Oyo-Eleki-Bule, lipata ezipaki Tempelo ya Yawe ;
10 Quando os sacerdotes estavam saindo do Lugar Santo , uma nuvem encheu o Templo do Senhor
11 mpe Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango mpo na lipata, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo na Ye.
11 com a glória do Senhor , e eles não puderam voltar para dentro a fim de realizar os seus atos de culto.
12 Bongo, Salomo alobaki :
12 Aí Salomão disse: — Tu, ó embora tivesses resolvido viver entre as nuvens escuras.
13 Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela.
13 Mas agora eu construí para ti uma casa, um lugar onde viverás para sempre.
14 Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema.
14 Aí Salomão virou-se, olhou para o povo, que estava todo de pé, e pediu a bênção de Deus para todos.
15 Alobaki :
15 Depois disse: — Bendito seja o
16 « Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala ; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! »
16 “Desde o dia em que tirei do Egito o meu povo de Israel, eu não escolhi nenhuma cidade de todas as tribos da terra de Israel para ali construir um templo a fim de ser adorado nele. Mas escolhi você, Davi, para governar o meu povo.”
17 Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
17 E Salomão continuou: — Davi, o meu pai, tinha planos de construir um templo para a adoração do
18 Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai : « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai.
18 mas o Senhor lhe disse: “Você fez bem quando planejou construir um templo para mim,
19 Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango ; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
19 mas você não o construirá. Será o seu filho quem construirá o meu Templo.”
20 Yawe akokisi elaka na Ye. Nakitani na Davidi, tata na ngai, navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
20 E agora Deus cumpriu a sua promessa. Eu fiquei no lugar do meu pai como rei de Israel e construí o Templo para a adoração do Senhor , o Deus de Israel.
21 Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.
21 Também separei no Templo um lugar para colocar a arca da aliança , onde estão guardadas as placas de pedra da aliança que o Senhor Deus fez com os nossos antepassados quando os tirou do Egito.
22 Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe ; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo
22 Então, na presença de todo o povo reunido, Salomão foi e ficou em frente do altar. Levantou as mãos para o céu
23 mpe asambelaki :
23 e disse: — Ó
24 Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
24 Pelo teu poder cumpriste a promessa que fizeste a Davi, o meu pai; no dia de hoje todas as palavras da tua promessa foram completamente cumpridas.
25 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. ›
25 E agora, ó Senhor , Deus de Israel, eu te peço que cumpras a outra promessa que fizeste ao meu pai quando lhe disseste que sempre haveria um descendente dele governando como rei de Israel, contanto que eles te obedecessem com o mesmo cuidado com que ele obedeceu.
26 Sik’oyo, oh Nzambe ya Isalaele, nabondeli Yo, tika ete elaka yango oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, ekokisama !
26 Portanto, ó Deus de Israel, faze com que se cumpra aquilo que prometeste a Davi, o meu pai, teu servo .
27 Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi !
27 — Mas será que, de fato, ó Deus, tu podes morar no meio de nós, criaturas humanas, aqui na terra? Tu és tão grande, que não cabes nem mesmo no céu; como poderia este Templo que eu construí ser bastante grande para isso?
28 Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo ! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo na mokolo ya lelo.
28 Ó Senhor , meu Deus, eu sou teu servo. Escuta a minha oração e atende os pedidos que te faço hoje.
29 Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki na tina na yango : ‹ Kombo na Ngai ekozala awa. › Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo.
29 Olha de dia e de noite para este Templo, o lugar que escolheste para nele seres adorado. Ouve-me quando eu orar com o rosto virado para este lugar.
30 Okoyoka libondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo ! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka mpe limbisa !
30 Escuta as minhas orações e as orações do teu povo quando eles orarem com o rosto virado para cá. Sim, da tua casa no céu, ouve-nos e perdoa-nos.
31 Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,
31 — Quando alguém for acusado de prejudicar outra pessoa e for trazido até o teu altar neste Templo e jurar que é inocente,
32 yoka wuta na Likolo ; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye, kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
32 ó Senhor , ouve do céu e julga os teus servos. Castiga o culpado como ele merecer e declara que não tem culpa aquele que for inocente, recompensando-o como ele merecer.
33 Tango banguna bakolonga bato na Yo, Isalaele, mpo ete basali lisumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,
33 — Quando, por ter pecado contra ti, o teu povo de Israel for derrotado pelos seus inimigos e, quando ele se virar para ti e vier a este Templo para te louvar e pedir o teu perdão,
34 yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki batata na bango.
34 escuta-o do céu. Perdoa o pecado do teu povo e leva-o de volta para a terra que deste aos seus antepassados.
35 Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,
35 — Quando o céu se fechar, e não chover, porque o teu povo pecou contra ti, e eles se arrependerem e virarem o rosto na direção deste Templo e orarem e te louvarem, depois que os tiveres castigado,
36 yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
36 escuta-os do céu. Perdoa os pecados do rei e do povo de Israel e ensina-os a fazer o que é direito. Então, ó Deus, faze cair chuva sobre esta tua terra que deste ao teu povo para ser deles para sempre.
37 Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango ; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango,
37 — Quando nesta terra houver falta de alimentos, ou houver pragas, ou as colheitas forem destruídas por ventos muito quentes ou por bandos de gafanhotos, ou quando o teu povo for atacado pelos seus inimigos, ou quando houver peste ou doença entre o povo,
38 soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
38 escuta as suas orações. Se alguém do teu povo de Israel, sentindo no seu coração o peso da desgraça, estender as mãos na direção deste Templo e orar,
39 yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.
39 escuta a sua oração. Lá do teu lar no céu, ouve o teu povo, perdoa-o e ajuda-o. Só tu conheces os pensamentos secretos do coração humano. Trata cada pessoa como merecer,
40 Sala bongo mpo ete bana ya Isalaele batosa Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso.
40 para que o teu povo te tema e te obedeça durante todo o tempo em que eles viverem na terra que deste aos nossos antepassados.
41 Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo : wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo na Yo,
41 — ausente —
42 pamba te bakoyoka sango ya Kombo monene na Yo, ya loboko na Yo ya nguya mpe esembolama ; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo,
42 — ausente —
43 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.
43 ouve a sua oração. Lá do céu, onde vives, escuta-o e faze tudo o que ele te pedir, para que todos os povos da terra possam te conhecer e temer, como faz o teu povo de Israel. Então eles ficarão sabendo que este Templo que eu construí é o lugar onde deves ser adorado.
44 Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yawe na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo,
44 — Quando ordenares que o teu povo saia para a guerra contra os seus inimigos, e o teu povo orar a ti, virados para esta cidade que escolheste e para este Templo que construí em honra do teu nome,
45 yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.
45 escuta do céu as suas orações e os seus pedidos. Ouve-os e dá-lhes a vitória.
46 Tango bana ya Isalaele bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu, na mokili ya banguna, ezala ya mosika to ya pene,
46 — Quando eles pecarem contra ti — e não há ninguém que não peque — e na tua ira deixares que os inimigos deles os derrotem e os levem prisioneiros para alguma terra inimiga, longe ou perto daqui,
47 mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; ›
47 ouve as orações do teu povo. Se ali, naquela terra, eles se arrependerem e orarem a ti, confessando que foram pecadores e maus, escuta as suas orações, ó Senhor .
48 soki, wuta na mokili ya banguna na bango epai wapi bamemaki bango lokola bawumbu, basengi Yo bolimbisi na mitema mpe na milimo na bango mobimba ; soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo ;
48 Se naquela terra eles verdadeiramente e sinceramente se arrependerem e orarem a ti, virados na direção desta terra que deste aos nossos antepassados, desta cidade que escolheste e deste Templo que construí em honra do teu nome,
49 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango,
49 escuta as orações deles. Do teu lar no céu ouve-os e dá-lhes a vitória.
50 limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa.
50 Perdoa os pecados que o teu povo tem cometido contra ti e a sua revolta contra ti e faze com que os seus inimigos os tratem com bondade.
51 Pamba te bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na bowumbu wuta na Ejipito, wuta kati na libulu ya moto makasi oyo banyangwiselaka bibende.
51 Eles são o teu povo que tiraste daquela fornalha acesa, o Egito.
52 Tika ete miso na Yo efungwama wana mowumbu na Yo mpe Isalaele, bato na Yo, bakobondela Yo ; yoka bango tango nyonso oyo bakotombola mingongo epai na Yo.
52 — Ó Senhor , nosso Deus, eu te peço que olhes com simpatia para o teu povo de Israel e para o seu rei e escutes as suas orações sempre que eles te chamarem pedindo ajuda.
53 Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. »
53 Tu os escolheste entre todos os povos para serem o teu povo, conforme lhes disseste por meio do teu servo Moisés, quando tiraste do Egito os nossos antepassados.
54 Tango Salomo asilisaki kosambela mpe kobondela Yawe, atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe epai wapi afukamaki mpe atombolaki maboko na ye na likolo.
54 Depois que Salomão acabou de orar ao Senhor Deus, ele se levantou e ficou em frente do altar, onde havia estado ajoelhado com as mãos levantadas para o céu.
55 Wana atelemaki, apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele na mongongo makasi mpe alobaki :
55 Então, em voz alta, pediu as bênçãos de Deus para todo o povo que estava reunido ali. Ele disse:
56 « Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.
56 — Bendito seja o Senhor Deus, que deu paz ao seu povo, como havia prometido! Ele tem cumprido todas as abençoadas promessas que fez por meio do seu servo Moisés.
57 Tika ete Yawe, Nzambe na biso, azala elongo na biso ndenge azalaki elongo na batata na biso ; atika biso te mpe abwaka biso te ;
57 Que o Senhor , nosso Deus, esteja conosco assim como esteve com os nossos antepassados! Que ele nunca nos deixe, nem nos abandone!
58 kasi abongola mitema na biso epai na Ye mpo ete tokoka kotambola na nzela na Ye, kobatela mibeko na Ye, malako na Ye mpe mitindo na Ye oyo apesaki na batata na biso.
58 Que Deus nos faça obedientes a ele, para que sempre vivamos conforme ele quer, obedecendo a todos os mandamentos, leis e ensinos que ele deu aos nossos antepassados!
59 Tika ete mabondeli na ngai oyo nawuti kotombola epai na Yawe, Nzambe na biso, ezala liboso na Ye butu mpe moyi ; mpe tika ete alongisa mowumbu na Ye mpe Isalaele, bato na Ye, ndenge bosenga na bango ya mokolo na mokolo ezali ;
59 Que o Senhor , nosso Deus, lembre sempre desta oração e dos pedidos que eu lhe fiz! Que ele sempre tenha misericórdia do povo de Israel e do seu rei, de acordo com o que precisarem!
60 mpo ete bato nyonso kati na mokili bayeba solo ete Yawe azali Nzambe, mosusu lokola Ye azali te.
60 E assim todas as nações do mundo ficarão sabendo que somente o Senhor é Deus e que não há nenhum outro.
61 Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. »
61 Que vocês sejam sempre fiéis ao Senhor , nosso Deus, obedecendo a todos os seus mandamentos e leis, como fazem hoje!
62 Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe.
62 Então o rei Salomão e todo o povo que estava ali ofereceram sacrifícios a Deus, o Senhor .
63 Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe.
63 Ele ofereceu em sacrifício vinte e dois mil bois e cento e vinte mil ovelhas como ofertas de paz. E assim o rei e todo o povo dedicaram o Templo ao serviço do Senhor .
64 Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani.
64 Naquele mesmo dia Salomão separou, a fim de ser sagrada para Deus, a parte central do pátio que ficava em frente ao Templo. Ali ele apresentou as ofertas que foram completamente queimadas, as ofertas de cereais e a gordura dos animais que haviam sido trazidos como ofertas de paz. Salomão fez isso porque o altar de bronze era muito pequeno para todas essas ofertas.
65 Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene ; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.
65 Naquela ocasião, ali no Templo, Salomão e todo o povo de Israel comemoraram durante sete dias a Festa das Barracas . O povo era uma enorme multidão de pessoas que tinham vindo do país inteiro, desde a subida de Hamate, no Norte, até a fronteira do Egito, no Sul.
66 Na mokolo ya mwambe, Salomo azongisaki bato. Bongo bato bapambolaki ye mpe bazongaki na bandako na bango ya kapo na esengo mpe na nsayi na mitema mpo na bolamu nyonso oyo Yawe asalelaki Davidi, mowumbu na Ye, mpe Isalaele, bato na Ye.
66 No oitavo dia Salomão mandou o povo para casa. Todos pediram as bênçãos de Deus para ele e foram embora, felizes por causa de todas as coisas boas que o Senhor Deus tinha dado ao seu servo Davi e ao seu povo de Israel.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Reis 8, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.